Epai ya Baefese 1:1-23

  • Mbote (1, 2)

  • Mapamboli ya elimo (3-7)

  • Koyanganisa biloko nyonso na nse ya bokonzi ya Kristo (8-14)

    • “Mosala ya kotambwisa makambo” na bantango oyo etyamá (10)

    • Kotyama elembo na elimo lokola ‘ndanga ya libelalibela’ (13, 14)

  • Paulo apesi Nzambe matɔndi mpo na kondima ya Baefese mpe abondeli mpo na bango (15-23)

1  Ngai Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na kolanda mokano ya Nzambe, nakomeli basantu oyo bazali na Efese+ mpe bazali sembo na bomoko elongo na Kristo Yesu:  Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.  Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo asanzolama, mpo apamboli biso na lipamboli nyonso ya elimo na bisika ya likoló na bomoko elongo na Kristo,+  ndenge aponaki biso liboso ya ebandeli ya mokili, mpo tózala na bomoko elongo na ye,* tózala basantu mpe tózanga mbeba+ liboso na ye na kati ya bolingo.  Mpo akanaki liboso ete akozwa biso+ mpe akokómisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo,+ na kolanda ndenge asepeli mpe mokano na ye,+  mpo na kosanzola boboto monene na ye ya nkembo+ oyo andimaki komonisela biso na boboto mpenza na nzela ya Mwana na ye ya bolingo.+  Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana,+ ɛɛ, mabunga na biso elimbisami, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.+  Nzambe atondisaki biso na boboto monene yango na bwanya nyonso mpe na mayele,*  na ndenge ayebisaki biso sekele mosantu+ ya mokano na ye. Yango eyokani na makambo oyo asepelaki kosala na kolanda mokano na ye 10  mpo na mosala ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, mpo na koyanganisa biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele.+ Ɛɛ, na nse ya bokonzi na ye, 11  oyo tozali na bomoko elongo na ye mpe totyamaki bazwi-ya-libula,+ ndenge ekanamaki liboso na kolanda mokano ya moto oyo azali kosala makambo nyonso ndenge azwi ekateli na kolanda mposa na ye, 12  mpo biso baoyo tozali bato ya liboso oyo totyaki elikya na Kristo, tósala mpo na kosanzola nkembo na ye. 13  Kasi bino mpe botyaki elikya epai na ye nsima ya koyoka liloba ya solo, nsango malamu oyo etali lobiko na bino. Nsima ya kondimela ye, Nzambe asalelaki elimo santu oyo alakaki mpo na kotya bino elembo,+ asalelaki Kristo mpo na kosala yango. 14  Elimo santu ezali ndanga ya libula na biso oyo epesami libelalibela,+ mpo na kosikola na nzela ya lisiko+ bato* ya Nzambe ye moko,+ mpo na kosanzola nkembo na ye. 15  Yango wana ngai mpe, banda nayoká nsango ya kondima oyo bozali na yango na Nkolo Yesu mpe bolingo oyo bomoniselaka basantu nyonso, 16  natikaka te kopesa Nzambe matɔndi mpo na bino. Nazali kokoba kotánga bino na mabondeli na ngai, 17  mpo Nzambe ya Nkolo na biso Yesu Kristo, Tata ya nkembo, apesa bino elimo moko ya bwanya mpe ya emoniseli na boyebi ya solosolo ya koyeba ye.+ 18  Angɛngisi miso ya motema na bino, mpo bóyeba mpenza elikya oyo ye abengelaki bino, bomɛngo ya nkembo oyo ye abombi mpo ezala libula ya basantu,+ 19  mpe bonene ya nguya na ye oyo eleki nyonso epai na biso bandimi.+ Yango emonani na mosala ya nguya na ye monene, 20  oyo asalelaki ntango asekwisaki Kristo* mpe afandisaki ye na lobɔkɔ na ye ya mobali+ na bisika ya likoló, 21  likoló mpenza koleka guvɛrnema nyonso mpe bokonzi mpe nguya mpe bonkolo mpe nkombo nyonso oyo epesami,+ kaka na mokili oyo* te, kasi mpe na oyo ezali koya. 22  Atyaki mpe biloko nyonso na nse ya makolo na ye,+ mpe akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá,+ 23  yango ezali nzoto na ye,+ oyo etondi na biloko oyo etali ye. Kristo azali moto oyo atondisaka biloko nyonso na kati ya nyonso.

Maloba na nse

Elingi koloba, elongo na Kristo.
To, “makanisi malamu.”
Lil., “eloko.”
Lil., “alamwisaki Kristo uta na bakufi.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.