Epai ya Baebre 7:1-28

  • Melekisedeke, kaka ye moko mokonzi mpe nganga-nzambe (1-10)

  • Bonganga-nzambe ya Kristo eleki nyonso (11-28)

    • Kristo azali na likoki ya kobikisa mpenza (25)

7  Mpo Melekisedeke yango, mokonzi ya Saleme, nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, akutanaki na Abrahama ntango autaki koboma bakonzi mpe apambolaki ye,+  mpe Abrahama apesaki ye moko ya bandambo zomi ya eloko nyonso. Libosoliboso, nkombo na ye ebongolami na, “Mokonzi ya Bosembo,” mpe lisusu mokonzi ya Saleme, elingi koloba, “Mokonzi ya Kimya.”  Lokola azali na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te mpe bomoi na ye ezali na nsuka te, kasi akómi lokola Mwana ya Nzambe, azali nganga-nzambe mpo na libela.*+  Bótala ndenge azalaki moto monene mpenza, mobali yango oyo Abrahama, mokonzi ya libota, apesaki moko ya bandambo zomi ya biloko ya kitoko mingi na biloko oyo azwaki na etumba.+  Ya solo, na kolanda Mibeko, bana ya Levi+ oyo batyami na mosala ya bonganga-nzambe bazwi mitindo ya kokɔngɔla epai ya bato moko ya bandambo zomi,+ elingi koloba, epai ya bandeko na bango, atako bazali bana ya* Abrahama.  Kasi moto oyo molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye eutaki na bango te azwaki moko ya bandambo zomi epai ya Abrahama mpe apambolaki moto oyo azwaki bilaka.+  Nzokande ntembe ezali te ete moto oyo azali moke apambolami na moto oyo aleki ye.  Balevi bazalaki kozwa moko ya bandambo zomi mpe bazali bato oyo bakufaka, kasi moto mosusu oyo azwaki moko ya bandambo zomi, Makomami elobi ete azali na bomoi.+  Mpe tokoki koloba ete na nzela ya Abrahama, ata Levi oyo azwaka moko ya bandambo zomi, afutaki moko ya bandambo zomi, 10  mpo Levi abotamaki naino te uta na* nkɔkɔ na ye, ntango Melekisedeke akutanaki na ye.+ 11  Yango wana, soki ezaleli ya kokoka eyaka na nzela ya bonganga-nzambe ya Balevi+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko oyo bapesaki bato) mpo na ntina nini nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ kasi te lokola Arona? 12  Mpo lokola bonganga-nzambe ezali kobongwana, Mibeko mpe esengeli kobongwana.+ 13  Mpo moto oyo balobeli makambo oyo, auti na libota mosusu oyo moto na yango ata moko te asalá na etumbelo.+ 14  Mpo eyebani polele mpenza ete Nkolo na biso autaki na Yuda,+ nzokande Moize alobelaki eloko moko te oyo etali banganga-nzambe oyo bautaki na libota yango. 15  Mpe yango ekómi lisusu polele koleka, ntango nganga-nzambe mosusu+ azali kobima lokola Melekisedeke,+ 16  oyo akómi bongo, na kolanda te makambo oyo ekomami na kati ya mibeko oyo etali molɔngɔ ya bankɔkɔ esika auti, kasi nde na kolanda nguya ya bomoi moko oyo ekoki te kobebisama.+ 17  Mpo litatoli epesami mpo na ye ete: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+ 18  Yango wana, balongolaki mibeko ya liboso mpo ezalaki makasi te mpe ezalaki na litomba te.+ 19  Mpo Mibeko ekómisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka,+ kasi koya ya elikya moko oyo eleki malamu esalaki yango;+ elikya oyo na nzela na yango tozali kopusana penepene na Nzambe.+ 20  Lisusu, lokola esalemaki na kolapa ndai 21  (mpo ezali na bato oyo bakómi banganga-nzambe na ndai te, kasi moto wana akómi nganga-nzambe na ndai ya Moto oyo alobaki ete: “Yehova* alapi ndai mpe akobongola makanisi na ye te:* ‘Ozali nganga-nzambe libela na libela’”),+ 22  Yesu akómi mpenza ndanga* ya kondimana oyo eleki malamu.+ 23  Lisusu, mingi basengelaki kokóma banganga-nzambe nsima ya bamosusu+ mpo liwa ezalaki kopesa bango nzela te ya kokoba kozala bongo; 24  kasi ye, lokola azali na bomoi libela na libela,+ azali na bakitani te na bonganga-nzambe na ye. 25  Bongo akoki mpe kobikisa mpenza bato oyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpo azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.+ 26  Ebongi mpo na biso kozala na nganga-nzambe monene ya ndenge wana, oyo azali sembo, azali na likambo te, na mbindo te,+ akabwani na basumuki, mpe atombwami koleka likoló.+ 27  Na bokeseni na banganga-nzambe minene mosusu, azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo,+ libosoliboso mpo na masumu na ye moko mpe na nsima mpo na oyo ya bato,+ mpo asalaki yango mbala moko mpo na libela ntango amikabaki.+ 28  Mpo Mibeko etyaka bato ya bolɛmbu banganga-nzambe minene,+ kasi liloba ya ndai+ oyo eyaki nsima ya Mibeko ezali kotya nde Mwana moko, oyo akómisami moto oyo akoki na nyonso+ libela na libela.

Maloba na nse

To, “seko na seko.”
Lil., “bautaki na bangɛi ya.”
Lil., “azalaki naino na bangɛi ya.”
Talá Ap. A5.
To, “akoyoka mawa te.”
To, “moto oyo apesami ndanga.”