Epai ya Baebre 4:1-16

  • Likama ya kokɔta te na kopema ya Nzambe (1-10)

  • Malendisi mpo na kokɔta na kopema ya Nzambe (11-13)

    • “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi” (12)

  • Yesu, nganga-nzambe monene oyo aleki nyonso (14-16)

4  Yango wana, lokola elaka ya kokɔta na kopema na ye ezali naino, tózala ekɛngɛ* mpo tóbungisa elaka yango te.+  Mpo basakwelaki biso mpe nsango malamu,+ kaka ndenge basakwelaki bango; kasi bazwaki litomba te na liloba oyo bayokaki, mpo bazalaki na kondima moko te ná baoyo batosaki.  Mpo biso bato oyo tondimi, tozali mpenza kokɔta na kopema yango, ndenge alobaki ete: “Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete: ‘Bakokɔta te na kopema na ngai,’”+ atako misala na ye esukaki banda mokili ebandá.+  Mpo na mokolo ya nsambo alobi na esika moko ete: “Mpe Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo na misala na ye nyonso oyo asalaki,”+  mpe na esika yango alobi lisusu ete: “Bakokɔta te na kopema na ngai.”+  Baoyo basakwelaki bango nsango malamu liboso bakɔtaki te na kopema yango mpo bazangaki botosi, kasi basusu bazali na likoki ya kokɔta.+  Na yango, nsima ya ntango molai, atye lisusu mokolo moko boye ntango alobi na nzembo ya Davidi ete: “Lelo oyo”; kaka ndenge elobamaki liboso ete: “Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye, bókómisa mitema na bino makasi te.”+  Mpo soki Yosua+ akɔtisaka bango na esika moko ya kopema, mbɛlɛ na nsima Nzambe alobeli mokolo mosusu te.  Na yango, etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya Nzambe.+ 10  Mpo moto oyo akɔti na kopema ya Nzambe apemi mpe na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye.+ 11  Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo tókɔta na kopema wana, mpo moto moko te akwea mpe alanda ndakisa yango ya kozanga botosi.+ 12  Mpo liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya;+ epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale+ mpe ekɔtaka tii kokabola molimo* ná elimo,* matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema. 13  Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ebombami na miso ya Nzambe,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+ 14  Yango wana, lokola tozali na nganga-nzambe monene oyo aleki banganga-nzambe minene nyonso, Yesu Mwana ya Nzambe+ oyo akɔti na likoló, tókoba kosakola polele ete tozali na kondima epai na ye.+ 15  Mpo nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso,+ kasi tozali na nganga-nzambe oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.+ 16  Na yango, tópusana kozanga kobanga penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene,+ mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.

Maloba na nse

Lil., “tózala na kobanga.”