Ndenge ekomamá na Luka 3:1-38

  • Ebandeli ya mosala ya Yoane (1, 2)

  • Yoane azali kosakola batisimo (3-20)

  • Batisimo ya Yesu (21, 22)

  • Molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Kristo (23-38)

3  Na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibere Kaisala, ntango Ponse Pilate azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Erode*+ azalaki moyangeli ya etúká* ya Galile, ndeko na ye Filipe azalaki moyangeli ya etúká ya Iturea mpe ya Trakonitise, mpe Lisaniasi moyangeli ya etúká ya Abilene,  na mikolo ya nganga-nzambe mokonzi Anasi mpe ya Kaifa,+ Yoane+ mwana ya Zekaria azwaki nsango ya Nzambe na esobe.+  Bongo Yoane atambolaki na etúká mobimba zingazinga ya Yordani, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu,+  kaka ndenge ekomami na mokanda ya mosakoli Yisaya ete: “Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.+  Mabwaku nyonso ekozipama, mpe bangomba minene ná bangomba mike nyonso ekokóma patatalu. Banzela nyonso oyo egumbamá ekokóma semba mpe banzela ya mabakumabaku ekokóma kitoko.  Mpe bato nyonso* bakomona lobiko ya Nzambe.’”*+  Bongo abandaki koloba na ebele ya bato oyo bazalaki koya mpo abatisa bango: “Bino bana ya banyoka ya ngɛngɛ,* nani akebisi bino mpo bókima nkanda oyo ezali koya?+  Yango wana bósala misala oyo emonisi ete bobongoli mitema. Bóbanda koloba te na mitema na bino ete: ‘Abrahama azali Tata na biso.’ Mpo nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abrahama bana na mabanga oyo.  Ya solo, epasola esili kotyama na mosisa ya banzete. Yango wana, nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te bakokata yango mpe bakobwaka yango na mɔtɔ.”+ 10  Mpe ebele ya bato yango bazalaki kotuna ye: “Sikoyo tosengeli kosala nini?” 11  Azongiselaki bango: “Moto oyo azali na bilamba mibale* apesa moko na moto oyo azangi, mpe moto oyo azali na eloko ya kolya asala mpe bongo.”+ 12  Ata bakɔngɔli-mpako mpe bayaki kobatisama,+ mpe batunaki ye: “Moteyi, biso tosengeli kosala nini?” 13  Ye azongiselaki bango: “Bósɛnga* eloko moko te koleka motuya ya mpako oyo etyamá.”+ 14  Lisusu, baoyo bazalaki na mosala ya soda bazalaki kotuna ye: “Biso tosengeli kosala nini?” Alobaki na bango: “Bótungisa moto te* mpe bófunda moto na efundeli ya lokuta te,+ kasi bósepela kaka na lifuti na bino.” 15  Nzokande bato bazalaki kozela, mpe bango nyonso bazalaki komituna na mitema na bango mpo na Yoane: “Mbala mosusu ye nde Kristo?”+ 16  Yoane ayanolaki, alobi na bango nyonso: “Ngai nazali kobatisa bino na mai, kasi moto oyo azali makasi koleka ngai azali koya, mpe nabongi te kofungola bansinga ya basandale na ye.+ Ye akobatisa bino na elimo santu mpe na mɔtɔ.+ 17  Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye mpo na kopɛtola mpenza esika na ye ya kotutatuta mbuma. Akoyanganisa blé na ndako na ye ya kobomba biloko, kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.” 18  Alobaki mpe maloba mosusu mingi ya kolendisa mpe akobaki kosakwela bato nsango malamu. 19  Kasi Yoane apamelaki Erode moyangeli ya etúká mpo na Erodiadi mwasi ya ndeko na ye mpe mpo na misala nyonso ya mabe oyo Erode asalaki. 20  Longola makambo nyonso wana ya mabe, Erode asalaki likambo mosusu: Atyaki Yoane na bolɔkɔ.+ 21  Bongo ntango bato nyonso babatisamaki, Yesu mpe abatisamaki.+ Ntango abandaki kobondela, likoló efungwamaki,+ 22  mpe elimo santu oyo emonanaki na lolenge ya ebenga* ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló, elobi: “Yo ozali Mwana na ngai, ya bolingo; nandimi yo.”+ 23  Ntango Yesu+ abandaki mosala na ye azalaki na mbula soki 30,+ mpe eyebanaki ete azali mwanaya Yozefe,+mwana ya Heli, 24  mwana ya Matati,mwana ya Levi,mwana ya Meleki,mwana ya Yanai,mwana ya Yozefe, 25  mwana ya Matatiasi,mwana ya Amose,mwana ya Nahumu,mwana ya Eseli,mwana ya Nagai, 26  mwana ya Maate,mwana ya Matatiasi,mwana ya Semeina,mwana ya Yoseke,mwana ya Yoda, 27  mwana ya Yoanane,mwana ya Resa,mwana ya Zerubabele,+mwana ya Shealatiele,+mwana ya Neri, 28  mwana ya Meleki,mwana ya Adi,mwana ya Kosama,mwana ya Elemadama,mwana ya Ere, 29  mwana ya Yesu,mwana ya Eliezere,mwana ya Yorimi,mwana ya Matati,mwana ya Levi, 30  mwana ya Simeone,mwana ya Yudasi,mwana ya Yozefe,mwana ya Yonama,mwana ya Eliakime, 31  mwana ya Melea,mwana ya Mena,mwana ya Matata,mwana ya Natane,+mwana ya Davidi,+ 32  mwana ya Yese,+mwana ya Obede,+mwana ya Boaze,+mwana ya Salemone,+mwana ya Nahashone,+ 33  mwana ya Aminadabe,mwana ya Arni,mwana ya Hezerone,mwana ya Pereze,+mwana ya Yuda,+ 34  mwana ya Yakobo,+mwana ya Yisaka,+mwana ya Abrahama,+mwana ya Tera,+mwana ya Nahore,+ 35  mwana ya Seruge,+mwana ya Reu,+mwana ya Pelege,+mwana ya Ebere,+mwana ya Shela,+ 36  mwana ya Kainana,mwana ya Arpakashade,+mwana ya Seme,+mwana ya Noa,+mwana ya Lameke,+ 37  mwana ya Metusela,+mwana ya Enoka,mwana ya Yarede,+mwana ya Mahalaleele,+mwana ya Kainana,+ 38  mwana ya Enoshe,+mwana ya Sete,+mwana ya Adama,+mwana ya Nzambe.

Maloba na nse

Lil., “Tetrake.”
Elingi koloba, Herode Antipasi. Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
Lil., “mosuni nyonso.”
To, “mwango ya kobikisa ya Nzambe.”
To, “bana ya bitupa.”
To, “elamba mosusu.”
To, “Bókɔngɔla.”
To, “Bóbɔtɔla moto eloko te.”
Lil., “na lolenge ya nzoto ya ebenga.”