Ndenge ekomamá na Marko 1:1-45

  • Yoane Mobatisi azali kosakola (1-8)

  • Batisimo ya Yesu (9-11)

  • Satana ameki Yesu (12, 13)

  • Yesu abandi kosakola na Galile (14, 15)

  • Yesu abengi bayekoli ya liboso (16-20)

  • Elimo moko ya mbindo ebimisami (21-28)

  • Yesu abikisi bato mingi na Kapernaume (29-34)

  • Yesu azali kobondela na esika na ye moko (35-39)

  • Moto moko ya maladi ya maba abikisami (40-45)

1  Ebandeli ya nsango malamu oyo etali Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe:  Kaka ndenge ekomamá na mokanda ya mosakoli Yisaya: “(Talá! nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela mpo na yo.)+  Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.’”+  Yoane Mobatisi azalaki na esobe, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu.+  Bato nyonso ya Yudea mpe bafandi nyonso ya Yerusaleme bazalaki kokende epai na ye, mpe azalaki kobatisa* bango na Ebale Yordani, bazalaki koyambola masumu na bango polelepolele.+  Nzokande Yoane azalaki kolata bilamba basalá na nsuki ya kamela ná mokaba ya mposo ya nyama na loketo na ye,+ mpe azalaki kolya mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba.+  Mpe azalaki kosakola boye: “Moto moko ya makasi koleka ngai azali koya nsima na ngai, mpe nabongi te kogumbama mpo na kofungola bansinga ya basandale na ye.+  Ngai, nabatisi bino na mai, kasi ye akobatisa bino na elimo santu.”+  Na mikolo yango, Yesu autaki na Nazarete, na Galile, mpe Yoane abatisaki ye na Yordani.+ 10  Na mbala moko ntango abimaki na mai, amonaki likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokita likoló na ye lokola ebenga.+ 11  Mpe mongongo moko eutaki na likoló, elobi: “Yo ozali Mwana na ngai, ya bolingo; nandimi yo.”+ 12  Mpe na mbala moko elimo epusaki Yesu akende na esobe. 13  Akobaki kofanda na esobe mikolo 40; kuna Satana amekaki ye.+ Azalaki elongo na banyama ya zamba, kasi baanzelu bazalaki kosalela ye.+ 14  Ntango bakangaki Yoane, na nsima Yesu akendaki na Galile.+ Kuna azalaki kosakola nsango malamu ya Nzambe,+ 15  mpe azalaki koloba: “Ntango oyo etyamá ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema+ mpe bóndima* nsango malamu.” 16  Ntango Yesu azalaki kotambola pembenipembeni ya mbu ya Galile, amonaki Simo ná ndeko na ye Andre+ bazali kobwaka minyama na bango na mbu,+ mpo bazalaki baluki-mbisi.+ 17  Na yango Yesu alobaki na bango: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.”+ 18  Na mbala moko basundolaki minyama na bango mpe balandaki ye.+ 19  Ntango apusanaki mwa moke liboso, amonaki Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane, wana bazalaki na masuwa na bango, bazali kobongisa minyama na bango,+ 20  mpe abengaki bango mbala moko. Bongo batikaki tata na bango Zebede na masuwa elongo na bato ya misala mpe balandaki Yesu. 21  Mpe bakɔtaki na Kapernaume. Ntango kaka Sabata ekómaki, akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya.+ 22  Mpe bato bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya, mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.+ 23  Kaka na ntango wana, ezalaki na mobali moko na kati ya sinagoga na bango oyo azalaki na elimo moko ya mbindo, mpe agangaki: 24  “Biso ná yo likambo nini, Yesu moto ya Nazarete?+ Oyei nde koboma biso? Nayebi yo malamu: ozali Mosantu ya Nzambe!”+ 25  Kasi Yesu apamelaki elimo yango ete: “Fandá nyɛɛ, mpe bimá na nzoto na ye!” 26  Mpe elimo yango ya mbindo eningisaki mobali yango mpe egangaki na makasi na yango nyonso, na nsima ebimaki na nzoto na ye. 27  Boye, bato nyonso bakamwaki mingi tii babandaki kotunana bango na bango mpe koloba: “Oyo likambo nini? Liteya moko ya sika! Na bokonzi nyonso, azali kopesa mitindo ata na bilimo ya mbindo, mpe yango ezali kotosa ye.” 28  Na yango nsango ya Yesu epalanganaki nokinoki bipai nyonso na etúká mobimba ya Galile. 29  Bongo balongwaki na sinagoga mpe bakendaki na ndako ya Simo ná Andre, elongo na Yakobo ná Yoane.+ 30  Nzokande mama-bokilo ya Simo+ alalaki, azalaki na fiɛvrɛ; mpe na mbala moko bayebisaki Yesu likambo na ye. 31  Akendaki epai na ye, asimbaki ye na lobɔkɔ mpe atɛlɛmisaki ye. Bongo fiɛvrɛ na ye esilaki mpe abandaki kosalela bango. 32  Na mpokwa, ntango moi elalaki, bato babandaki komemela ye baoyo nyonso bazalaki na maladi mpe baoyo bazalaki na bademo;+ 33  mpe bato nyonso ya engumba bayanganaki liboso mpenza ya porte. 34  Bongo abikisaki bato mingi oyo bazalaki kobɛla bamaladi ya ndenge na ndenge,+ mpe abimisaki bademo mingi, kasi azalaki kotika bademo báloba te, mpo bayebaki ete ye azali Kristo.* 35  Na ntɔngɔntɔngɔ, wana molili ezalaki naino, atɛlɛmaki, abimaki na libándá mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te, mpe kuna abandaki kobondela.+ 36  Nzokande, Simo mpe baoyo bazalaki elongo na ye bakendaki koluka ye. 37  Ntango bamonaki ye, balobaki na ye: “Bato nyonso bazali koluka yo.” 38  Kasi alobaki na bango: “Tókende epai mosusu, na bingumba ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna, mpamba te ezali mpo na yango nde nayei.”+ 39  Mpe akendaki kosakola na basinagoga na bango, na Galile mobimba mpe azalaki kobimisa bademo.+ 40  Moto moko ya maba mpe ayaki epai na ye, azalaki kobondela ye, afukami mpe alobi: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+ 41  Na yango Yesu ayokelaki ye mawa, asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, mpe alobaki na ye: “Nalingi! Kómá pɛto.”+ 42  Na mbala moko maladi na ye ya maba elimwaki, mpe akómaki pɛto. 43  Bongo Yesu apesaki ye mitindo ya makasi mpe na mbala moko atikaki ye akende, 44  alobi na ye: “Kebá ete oloba likambo yango na moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe, mpe pesá biloko ndenge Moize apesaki mitindo+ mpo na kopɛtolama na yo, mpo ezala litatoli mpo na bango.”+ 45  Kasi nsima ya kokende, moto yango abandaki koyebisa bipai nyonso likambo oyo ekómelaki ye, mpe Yesu akokaki lisusu kokɔta polele te na engumba moko, kasi azalaki kotikala libándá na bisika oyo bato bazalaka te. Atako bongo bato bazalaki se koya epai na ye, bazalaki kouta bipai nyonso.+

Maloba na nse

Lil., “liboso ya elongi na yo.”
Talá Ap. A5.
To, “kozindisa.”
To, “bózala na kondima na.”
To mbala mosusu, “bayebaki soki azalaki nani.”