Yobo 2:1-13

  • Satana atye lisusu ntembe na bosembo ya Yobo (1-5)

  • Satana abwakeli Yobo maladi (6-8)

  • Mwasi ya Yobo alobi: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá na yo!” (9, 10)

  • Baninga misato ya Yobo bayei (11-13)

2  Nsima na yango, mokolo ekómaki oyo bana ya Nzambe ya solo*+ bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova.+ Satana mpe akɔtaki elongo na bango mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova.+  Bongo Yehova alobaki na Satana: “Outi wapi?” Satana apesaki Yehova eyano ete: “Nauti kotambolatambola na mabele mpe kolekaleka kuna.”+  Mpe Yehova alobaki na Satana: “Otyaki likebi na* mosaleli na ngai Yobo? Na mabele moto moko lokola ye azali te. Azali sembo mpe azangi mbeba,+ abangaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kokangama makasi na bosembo na ye,+ atako ozali kotinda ngai nasala ye mabe+ kaka mpamba.”  Kasi Satana apesaki Yehova eyano ete: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso oyo azali na yango mpo na kobatela bomoi* na ye.  Kasi, mpo makambo ebongwana, sembolá lobɔkɔ na yo, bɛtá mokuwa na ye mpe mosuni na ye, mpe okomona ndenge akolakela yo mpenza mabe.”+  Na yango, Yehova alobaki na Satana: “Talá! Azali na mabɔkɔ na yo!* Kasi koboma ye te!”*  Bongo Satana alongwaki liboso* ya Yehova mpe abwakelaki Yobo banda na litambe tii na motó maladi ya babibɔ oyo enyokolaka mpenza.+  Yobo azwaki eteni ya mbɛki oyo epasuká mpo na komikwanza mpe afandaki na putulu ya mɔtɔ.+  Nsukansuka, mwasi na ye alobaki na ye ete: “Ozali kaka kokangama makasi na bosembo na yo? Lakelá Nzambe mabe mpe kufá na yo!” 10  Kasi Yobo alobaki na ye: “Ozali koloba lokola mwasi moko ya zoba. Tokondima kaka makambo ya malamu oyo euti na Nzambe ya solo, kasi tokondima oyo ya mabe te?”+ Na nyonso wana, Yobo asalaki lisumu te na mbɛbu na ye.+ 11  Baninga misato ya Yobo bayokaki nsango ya bampasi nyonso oyo ekómelaki ye, mpe bayaki, moto na moto auti na esika na ye: Elifaze+ Motemane, Biledade+ Moshua+ ná Zofare+ Monaamate. Bongo bayokanaki bákutana mpo na kokende kotala Yobo mpe kobɔndisa ye. 12  Ntango bamonaki ye na mosika, bayebaki ye lisusu te. Babandaki koganga na kolela mpe bapasolaki bilamba na bango, babwakaki putulu ya mabele na mopɛpɛ mpe na mitó na bango.+ 13  Bongo bafandaki elongo na ye na mabele mikolo nsambo, butu moi. Moko te kati na bango alobaki na ye ata liloba moko, mpo bamonaki ete mpasi na ye eleki makasi.+

Maloba na nse

Ezali maloba ya elilingi na Ebre mpo na kolobela baanzelu oyo bazali bana ya Nzambe.
Lil., “Otyaki motema epai ya.”
To, “molimo.”
To, “Azali na nse ya nguya na yo.”
To, “koboma molimo na ye te.”
Lil., “liboso ya elongi.”