Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Yobo

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Yobo azali sembo mpe mozwi (1-5)

    • Satana atye ntembe na bosembo ya Yobo (6-12)

    • Yobo abungisi bomɛngo mpe bana na ye (13-19)

    • Yobo afundi Nzambe te (20-22)

  • 2

    • Satana atye lisusu ntembe na bosembo ya Yobo (1-5)

    • Satana abwakeli Yobo maladi (6-8)

    • Mwasi ya Yobo alobi: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá na yo!” (9, 10)

    • Baninga misato ya Yobo bayei (11-13)

  • 3

    • Yobo alakeli mabe mokolo oyo abotamaki (1-26)

      • Azali komituna ntina oyo azali komona mpasi (20, 21)

  • 4

    • Maloba ya liboso ya Elifaze (1-21)

      • Atyoli bosembo ya Yobo (7, 8)

      • Alobeli nsango oyo euti epai ya elimo moko (12-17)

      • ‘Nzambe andimelaka basaleli na ye te’ (18)

  • 5

    • Maloba ya liboso ya Elifaze ezali kokoba (1-27)

      • ‘Nzambe akangaka bato ya bwanya na kati ya mayele mabe na bango moko’ (13)

      • ‘Yobo asengeli te koboya disiplini ya Nzambe’ (17)

  • 6

    • Yobo apesi eyano (1-30)

      • Alobi ete azali na ntina ya komilelalela (2-6)

      • Babɔndisi na ye bazali bakosi (15-18)

      • “Maloba ya bosembo eyokisaka mpasi te!” (25)

  • 7

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-21)

      • Bomoi ezali lokola mosala ya kotindama na makasi (1, 2)

      • “Mpo na nini okómisi ngai eloko na yo ya kobɛta?” (20)

  • 8

    • Maloba ya liboso ya Biledade (1-22)

      • Alobi ete bana ya Yobo basalaki lisumu (4)

      • ‘Soki ozalaka sembo, Nzambe alingaki kobatela yo’ (6)

      • Alobi ete Yobo abangaka Nzambe te (13)

  • 9

    • Yobo apesi eyano (1-35)

      • Moto, mowei mpamba akoki te kowelana na Nzambe (2-4)

      • ‘Nzambe asalaka makambo oyo ekoki kososolama te’ (10)

      • Moto akoki te kosamba na Nzambe (32)

  • 10

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-22)

      • ‘Mpo na nini Nzambe azali kobundisa ngai?’ (2)

      • Bokeseni kati na Nzambe mpe Yobo, mowei mpamba (4-12)

      • “Mpo napema mwa moke” (20)

  • 11

    • Maloba ya liboso ya Zofare (1-20)

      • Afundi Yobo ete azali bilobaloba (2, 3)

      • Ayebisi Yobo abwaka mabe mosika (14)

  • 12

    • Yobo apesi eyano (1-25)

      • “Bino boleki ngai te” (3)

      • “Nakómi eloko ya kosɛka” (4)

      • ‘Bwanya ezali epai ya Nzambe’ (13)

      • Nzambe azali likoló ya basambisi mpe bakonzi (17, 18)

  • 13

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-28)

      • ‘Nalingi nde kosolola na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso’ (3)

      • “Bozali minganga ya ntina te” (4)

      • “Nayebi ete nazali na elonga” (18)

      • Azali komituna ntina oyo Nzambe azwi ye lokola monguna (24)

  • 14

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-22)

      • Moto azali na bomoi mokuse mpe atondi na mpasi (1)

      • “Elikya ezalaka ata mpo na nzete” (7)

      • “Aa! Soki obombaka ngai ata na Nkunda!” (13)

      • “Soki moto akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” (14)

      • Nzambe akozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na ye (15)

  • 15

    • Maloba ya mibale ya Elifaze (1-35)

      • Alobi ete Yobo abangaka Nzambe te (4)

      • Alobi ete Yobo azali lofundo (7-9)

      • ‘Nzambe andimelaka basantu na ye te’ (15)

      • ‘Moto mabe nde anyokwamaka’ (20-24)

  • 16

    • Yobo apesi eyano (1-22)

      • “Bozali babɔndisi mabe!” (2)

      • Alobi ete Nzambe atye ye likoló lokola eloko na ye ya kobɛta (12)

  • 17

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-16)

      • “Basɛki bazingi ngai” (2)

      • “Akómisi ngai eloko ya kotyola” (6)

      • “Nkunda nde ekokóma ndako na ngai” (13)

  • 18

    • Maloba ya mibale ya Biledade (1-21)

      • Elobeli ndenge basumuki basukaka (5-20)

      • Alobi ete Yobo ayebi Nzambe te (21)

  • 19

    • Yobo apesi eyano (1-29)

      • Aboyi mpamela ya “baninga” na ye (1-6)

      • Alobi ete basundoli ye (13-19)

      • “Mosikoli na ngai azali na bomoi” (25)

  • 20

    • Maloba ya mibale ya Zofare (1-29)

      • Amoni lokola Yobo afingi ye (2, 3)

      • Alobi ete Yobo azali moto mabe (5)

      • Alobi ete Yobo asepelaka na lisumu (12, 13)

  • 21

    • Yobo apesi eyano (1-34)

      • ‘Mpo na nini makambo ya bato mabe etambolaka malamu?’ (7-13)

      • Amonisi mabe ya “babɔndisi” na ye (27-34)

  • 22

    • Maloba ya misato ya Elifaze (1-30)

      • “Moto akoki kozala na ntina epai ya Nzambe?” (2, 3)

      • Afundi Yobo ete azali lokoso mpe azangi bosembo (6-9)

      • ‘Zongelá Nzambe mpe okozongisama’ (23)

  • 23

    • Yobo apesi eyano (1-17)

      • Alingi amema likambo na ye liboso ya Nzambe (1-7)

      • Alobi ete akoki te komona Nzambe (8, 9)

      • ‘Nabateli nzela na ye, napɛngwi na yango te’ (11)

  • 24

    • Yobo azali kokoba kopesa eyano (1-25)

      • ‘Mpo na nini Nzambe atyá mokolo na ye ya kosambisa te?’ (1)

      • Alobi ete Nzambe atikaka nzela na mabe (12)

      • Basumuki balingaka molili (13-17)

  • 25

    • Maloba ya misato ya Biledade (1-6)

      • ‘Ndenge nini moto akoki kozala na ngambo te liboso ya Nzambe?’ (4)

      • Alobi ete bosembo ya moto ezali mpamba (5, 6)

  • 26

    • Yobo apesi eyano (1-14)

      • ‘Osalisi moto oyo azangi nguya!’’ (1-4)

      • ‘Nzambe atɛlɛmisi mabele likoló ya eloko te’ (7)

      • ‘Ezali kaka ebandeli ya banzela ya Nzambe’ (14)

  • 27

    • Yobo azwi ekateli ya kobatela bosembo na ye (1-23)

      • “Nakotika te bosembo na ngai” (5)

      • Moto oyo abangaka Nzambe te azali na elikya te (8)

      • “Mpo na nini maloba na biso ezali mpenza mpamba?” (12)

      • Nsukansuka moto mabe azangaka nyonso (13-23)

  • 28

    • Yobo akesenisi biloko ya motuya na bwanya (1-28)

      • Mosala makasi ya bato oyo balukaka biloko ya motuya (1-11)

      • Bwanya eleki biloko ya motuya (18)

      • Kobanga Yehova ezali bwanya ya solosolo (28)

  • 29

    • Yobo azali kokanisa mikolo ya esengo oyo azalaki na yango liboso akutana na bampasi (1-25)

      • Bazalaki komemya ye na porte ya engumba (7-10)

      • Ndenge azalaki sembo (11-17)

      • Moto nyonso azalaki koyoka toli na ye (21-23)

  • 30

    • Yobo alobeli ndenge bomoi na ye ebongwani (1-31)

      • Bato ya mpambampamba batyoli ye (1-15)

      • Mpo na ye emonani lokola Nzambe asalisi ye te (20, 21)

      • “Loposo na ngai ekómi moindo” (30)

  • 31

    • Yobo azali kolongisa bosembo na ye (1-40)

      • “Kondimana na miso na ngai” (1)

      • Asɛngi Nzambe atya ye na emekeli-kilo (6)

      • Azali moto ya ekobo te (9-12)

      • Alingá mbongo te (24, 25)

      • Azali mosambeli ya bikeko te (26-28)

  • 32

    • Elenge Elihu akɔti na lisolo (1-22)

      • Asilikeli Yobo mpe baninga ya Yobo (2, 3)

      • Azelaki na limemya nyonso liboso ya koloba (6, 7)

      • Ezali mbula te nde esalaka ete moto azala na bwanya (9)

      • Elihu azali na mposa makasi ya koloba (18-20)

  • 33

    • Elihu apameli Yobo ndenge azali komimona ete azali sembo (1-33)

      • Lisiko ezwami (24)

      • Kozonga na makasi ya bolenge (25)

  • 34

    • Elihu alongisi bosembo mpe banzela ya Nzambe (1-37)

      • Yobo alobi ete Nzambe aboyeli ye bosembo (5)

      • Nzambe ya solo asalaka ata moke te likambo na motema mabe (10)

      • Yobo azangi boyebi (35)

  • 35

    • Elihu amonisi polele likanisi ya libunga oyo Yobo azali na yango (1-16)

      • Yobo alobi ete azali sembo koleka Nzambe (2)

      • Nzambe atombwani likoló mpenza, lisumu esalaka ye eloko te (5, 6)

      • Yobo asengeli kozela Nzambe (14)

  • 36

    • Elihu akumisi bonene ya Nzambe oyo ekoki kososolama te (1-33)

      • Bato ya botosi bakozala na bomoi ya malamu; baoyo babangaka Nzambe te bakoboyama (11-13)

      • ‘Molakisi nani azali lokola Nzambe?’ (22)

      • Yobo asengeli kokumisa Nzambe (24)

      • “Nzambe atombwani koleka oyo biso tokoki koyeba” (26)

      • Nzambe apesaka mbula mpe mokalikali mitindo (27-33)

  • 37

    • Biloko ya nguya oyo Nzambe akelá emonisaka bonene na ye (1-24)

      • Nzambe asukisaka misala ya moto (7)

      • ‘Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe’ (14)

      • Moto akoki te kososola makambo nyonso etali Nzambe (23)

      • Moto moko te asengeli kokanisa ete azali na bwanya (24)

  • 38

    • Yehova amonisi ete moto azali mpenza moke (1-41)

      • ‘Ozalaki wapi ntango mabele ezalisamaki?’ (4-6)

      • Bana ya Nzambe bagangaki na esengo mpe babɛtaki mabɔkɔ (7)

      • Mituna mpo na biloko Nzambe akelá (8-32)

      • “Mibeko oyo etambwisaka likoló” (33)

  • 39

    • Moto ayebi te ndenge oyo banyama ekelamaki (1-30)

      • Bantaba ya ngomba mpe bishe (1-4)

      • Mpunda ya zamba (5-8)

      • Ngɔmbɛ-mobali ya zamba (9-12)

      • Maligbanga (13-18)

      • Mpunda (19-25)

      • Kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ mpe mpongo (26-30)

  • 40

    • Yehova atuni mituna mosusu (1-24)

      • Yobo andimi ete azali na likambo ya koloba te (3-5)

      • ‘Okobɛta ntembe na bosembo na ngai?’ (8)

      • Nzambe alobeli makasi ya Behemote (15-24)

  • 41

    • Nzambe alobeli Leviatana, nyama ya kokamwa mpenza (1-34)

  • 42

    • Yobo apesi Yehova eyano (1-6)

    • Baninga misato ya Yobo bakweisami (7-9)

    • Yehova azongiseli Yobo bozwi na ye (10-17)

      • Bana ya Yobo ya mibali ná ya basi (13-15)