Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Yirimia

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Yirimia atyami mosakoli (1-10)

    • Emonaneli ya Nzete ya amande (11, 12)

    • Emonaneli ya nzungu (13-16)

    • Yirimia alendisami mpo na mokumba na ye (17-19)

  • 2

    • Yisraele esundoli Yehova mpo na kosambela banzambe mosusu (1-37)

      • Yisraele ekokanisami na nzete ya vinyo ya bopaya (21)

      • Bilamba na ye ezali na makila (34)

  • 3

    • Bonene ya lipɛngwi ya Yisraele (1-5)

    • Yisraele ná Yuda bamemi ngámbo mpo na ekobo (6-11)

    • Libyangi ya kobongola motema (12-25)

  • 4

    • Kobongola motema ememaka mapamboli (1-4)

    • Libebi ekouta na Nɔrdi (5-18)

    • Yirimia atungisami mpo na libebi oyo ezali koya (19-31)

  • 5

    • Bato baboyi disiplini ya Yehova (1-13)

    • Libebi kasi kosilisama nyonso te (14-19)

    • Yehova asɛngi bato bázongisa monɔkɔ (20-31)

  • 6

    • Etikali moke Yerusaleme ezingama (1-9)

    • Nkanda ya Yehova mpo na Yerusaleme (10-21)

      • Bazali koloba “Kimya!” nzokande kimya ezali te (14)

    • Bato mabe mpenza bauti na nɔrdi (22-26)

    • Yirimia akozala momeki-bibende (27-30)

  • 7

    • Bato bamikosi ndenge batye motema na tempelo ya Yehova (1-11)

    • Likambo oyo ekómelaki Shilo yango nde ekokómela Tempelo (12-15)

    • Etumbu mpo na losambo ya lokuta (16-34)

      • Losambo ya “Mokonzi-mwasi ya likoló” (18)

      • Kopesa mbeka ya bana na Hinome (31)

  • 8

    • ‘Bato bazali kosala makambo ndenge bato nyonso basalaka’ (1-7)

    • Bwanya nini bato bazali na yango kozanga liloba ya Yehova? (8-17)

    • Yirimia amitungisi mpo na bampota ya Yuda (18-22)

      • “Balsame ezali na Gileade te?” (22)

  • 9

    • Yirimia ayoki mawa makasi (1-3a)

    • Yehova asɛngi Yuda ezongisa monɔkɔ (3b-16)

    • Kolelalela mpo na Yuda (17-22)

    • Moto amikumisa mpo ayebi Yehova (23-26)

  • 10

    • Banzambe ya bikólo bakokani te na Nzambe ya bomoi (1-16)

    • Ntango ya libebi mpe ya komemama na mboka mopaya ekómi pene (17, 18)

    • Yirimia ayoki mawa (19-22)

    • Libondeli ya mosakoli (23-25)

      • Moto akoki te kotambwisa makolo na ye (23)

  • 11

    • Yuda ebuki kondimana na Nzambe (1-17)

      • Banzambe ebele lokola bingumba (13)

    • Yirimia akokanisami na mwana-mpate mobali oyo amemami mpo na kobomama (18-20)

    • Bato ya mboka ya Yirimia batɛmɛli ye (21-23)

  • 12

    • Yirimia amemi likambo na ye epai ya Nzambe (1-4)

    • Eyano ya Yehova (5-17)

  • 13

    • Mokaba ya lini ebebisami (1-11)

    • Bilokó ya vinyo ekotutanisama (12-14)

    • Yuda oyo azali kobonga te akomemama na mboka mopaya (15-27)

      • “Mokushi akoki nde kobongola loposo na ye?” (23)

  • 14

    • Kokauka makasi, nzala, mpe bitumba (1-12)

    • Basakoli ya lokuta bazwi etumbu (13-18)

    • Yirimia andimi masumu ya bato (19-22)

  • 15

    • Yehova akobongola etumbu na ye te (1-9)

    • Yirimia amemi likambo na ye epai ya Nzambe (10)

    • Eyano ya Yehova (11-14)

    • Libondeli ya Yirimia (15-18)

      • Yirimia azali na esengo ya kolya maloba ya Nzambe (16)

    • Yehova alendisi Yirimia (19-21)

  • 16

    • Yirimia asengeli te kobala, kolela to kokende na ndako ya fɛti (1-9)

    • Etumbu mpe na nsima bato bakoya epai ya Nzambe (10-21)

  • 17

    • Lisumu ya Yuda ekosila te (1-4)

    • Mapamboli oyo eutaka na kotyela Yehova motema (5-8)

    • Motema ezali na bokosi (9-11)

    • “Yehova, elikya ya Yisraele” (12, 13)

    • Libondeli ya Yirimia (14-18)

    • Sabata esengeli kokoba kosantisama (19-27)

  • 18

    • Mabele na mabɔkɔ ya moyemi-mbɛki (1-12)

    • Yehova apesi Yisraele mokɔngɔ (13-17)

    • Basaleli Yirimia likita; Yirimia abondeli Yehova (18-23)

  • 19

    • Yirimia azwi mokumba ya kobuka molangi oyo esalemi na mabele (1-15)

      • Bana bapesami mbeka na Baala (5)

  • 20

    • Pashure abɛti Yirimia (1-6)

    • Yirimia akoki te kotika kosakola (7-13)

      • Nsango ya Nzambe ezali lokola mɔtɔ oyo ezali kopela (9)

      • Yehova akokani na mobundi-etumba moko ya nsɔmɔ (11)

    • Yirimia amemi likambo na ye epai ya Nzambe (14-18)

  • 21

    • Yehova aboyi kosala likambo oyo Zidikiya asɛngi ye (1-7)

    • Bato basengeli kopona bomoi to liwa (8-14)

  • 22

    • Bansango ya bitumbu mpo na bakonzi mabe (1-30)

      • Mpo na oyo etali Shalume (10-12)

      • Mpo na oyo etali Yehoyakime (13-23)

      • Mpo na oyo etali Konia (24-30)

  • 23

    • Babateli ya mpate ya malamu mpe ya mabe (1-4)

    • Libateli na nse ya “etape ya boyengebene” (5-8)

    • Basakoli ya lokuta bazwi etumbu (9-32)

    • “Mokumba ya kilo” ya Yehova (33-40)

  • 24

    • Bafigi ya malamu mpe ya mabe (1-10)

  • 25

    • Yehova azali na likambo ná bikólo (1-38)

      • Bikólo esengeli kosalela Babilone mbula 70 (11)

      • Kɔpɔ ya vinyo ya nkanda ya Nzambe (15)

      • “Mpasi moko ezali kopanzana longwa na ekólo moko tii na ekólo mosusu” (32)

      • Bato oyo Yehova akoboma (33)

  • 26

    • Bakaneli Yirimia mpo báboma ye (1-15)

    • Babikisi Yirimia (16-19)

      • Esakweli ya Mika etángami (18)

    • Mosakoli Uriya (20-24)

  • 27

    • Ekanganeli ya Babilone (1-11)

    • Bayebisi Zidikiya amitika na mabɔkɔ ya bato ya Babilone (12-22)

  • 28

    • Matata kati na Yirimia ná Hanania, mosakoli ya lokuta (1-17)

  • 29

    • Mokanda ya Yirimia epai ya baoyo bamemamaki bakangami na Babilone (1-23)

      • Yisraele ekozonga nsima ya mbula 70 (10)

    • Nsango mpo na Shemaya (24-32)

  • 30

    • Bilaka ya kozongisama mpe ya kobikisama (1-24)

  • 31

    • Batikali ya Yisraele bakozonga kofanda na mokili (1-30)

      • Rashele aleli bana na ye (15)

    • “Kondimana ya sika” (31-40)

  • 32

    • Yirimia asombi elanga (1-15)

    • Libondeli ya Yirimia (16-25)

    • Eyano ya Yehova (26-44)

  • 33

    • Elaka ya kozongisama (1-13)

    • Libateli na nse ya “etape ya boyengene” (14-16)

    • Kondimana elongo na Davidi mpe banganga-nzambe (17-26)

      • Kondimana oyo etali moi ná butu (20)

  • 34

    • Nsango ya etumbu mpo na Zidikiya (1-7)

    • Kondimana ya kopesa bato ya bolɔkɔ bonsomi ebebi (8-22)

  • 35

    • Barekabe bapesi ndakisa malamu ya botosi (1-19)

  • 36

    • Yirimia azali koloba maloba oyo ezali kokomama na rulo (1-7)

    • Baruke atángi na mongongo makasi makambo oyo ezali na rulo (8-19)

    • Yehoyakime atumbu rulo (20-26)

    • Maloba ekomami na rulo ya sika (27-32)

  • 37

    • Bakaladea balongwe kaka mpo na mwa ntango (1-10)

    • Batye Yirimia na bolɔkɔ (11-16)

    • Zidikiya akutani na Yirimia (17-21)

      • Bapesi Yirimia limpa (21)

  • 38

    • Babwaki Yirimia na libulu ya kobomba mai (1-6)

    • Ebede-meleke abikisi Yirimia (7-13)

    • Yirimia apesi Zidikiya toli akende komitika (14-28)

  • 39

    • Kokwea ya Yerusaleme (1-10)

      • Zidikiya akimi mpe bakangi ye (4-7)

    • Etinda epesami ete bábatela Yirimia (11-14)

    • Ebede-meleke akobikisa bomoi na ye (15-18)

  • 40

    • Nebuzaradane atiki Yirimia (1-6)

    • Gedalia atyami mokambi ya mokili (7-12)

    • Basaleli Gedalia likita (13-16)

  • 41

    • Yishimaele abomi Gedalia (1-10)

    • Yishimaele akimi mpo Yohanane azwa ye te (11-18)

  • 42

    • Bato basɛngi Yirimia abondela Nzambe mpo atambwisa bango (1-6)

    • Yehova ayanoli ete: “Bókende na Ezipito te” (7-22)

  • 43

    • Bato batosi te mpe bakei na Ezipito (1-7)

    • Yehova alobi na Yirimia na Ezipito (8-13)

  • 44

    • Mpasi oyo ekokómela Bayuda na Ezipito esakolami (1-14)

    • Bato baboyi kotosa makebisi ya Nzambe (15-30)

      • Basambeli “Mokonzi-mwasi ya likoló” (17-19)

  • 45

    • Nsango ya Yehova epai ya Baruke (1-5)

  • 46

    • Esakweli mpo na Ezipito (1-26)

      • Nebukadenezare akolonga Ezipito (13, 26)

    • Bilaka mpo na Yisraele (27, 28)

  • 47

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Bafilistia (1-7)

  • 48

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Moabe (1-47)

  • 49

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Amone (1-6)

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Edome (7-22)

      • Edome ekozala lisusu ekólo te (17, 18)

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Damasi (23-27)

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Kedare mpe Hazore (28-33)

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Elame (34-39)

  • 50

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Babilone (1-46)

      • Bókima, bóbima na Babilone (8)

      • Yisraele ekozonga na mokili na ye (17-19)

      • Mai ya Babilone ekokauka (38)

      • Bato bakofanda lisusu te na Babilone (39, 40)

  • 51

    • Esakweli mpo na oyo ekokómela Babilone (1-64)

      • Babilone ekokwea na pwasa na mabɔkɔ ya Bamede (8-12)

      • Babwaki buku na Efrate (59-64)

  • 52

    • Zidikiya atombokeli Babilone (1-3)

    • Nebukadenezare azingi Yerusaleme (4-11)

    • Engumba mpe tempelo ebebisami (12-23)

    • Bato bamemami bakangami na Babilone (24-30)

    • Babimisi Yehoyakine na bolɔkɔ (31-34)