Misala ya bantoma 5:1-42

  • Ananiasi ná Safira (1-11)

  • Bantoma bazali kosala ebele ya bilembo (12-16)

  • Bakangi bango na bolɔkɔ mpe na nsima babimisami (17-21a)

  • Bamemi bango lisusu liboso ya Sanedrina (21b-32)

    • ‘Kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato’ (29)

  • Toli ya Gamaliele (33-40)

  • Kosakola ndako na ndako (41, 42)

5  Mobali moko boye, nkombo na ye Ananiasi ná mwasi na ye Safira batɛkaki elanga na bango.  Kasi na nkuku, abombaki ndambo ya mbongo, mwasi na ye mpe ayebaki yango, amemaki kaka ndambo mpe atyaki yango na makolo ya bantoma.+  Kasi Petro alobaki ete: “Ananiasi, mpo na nini Satana apesi yo mpiko mpo na kokosa+ elimo santu+ mpe kobomba na nkuku ndambo ya mbongo ya elanga?  Liboso otɛka elanga, ezalaki ya yo te? Mpe nsima ya kotɛka elanga, okokaki te kosala na mbongo ndenge olingi? Mpo na nini okanaki likambo ya boye na motema na yo? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe.”  Ntango ayokaki maloba wana, Ananiasi akweaki mpe akufaki. Mpe kobanga makasi ekangaki baoyo nyonso bayokaki yango.  Bilenge mibali batɛlɛmaki, balíngaki ye na bilamba, bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye.  Nzokande nsima ya bangonga soki misato, mwasi na ye akɔtaki, ayebaki te likambo oyo eutaki kosalema.  Petro alobaki na ye ete: “Yebisá ngai, bino mibale botɛkaki elanga na ntalo oyo?” Alobaki ete: “Ɛɛ, na ntalo wana.”  Bongo Petro alobaki na ye ete: “Mpo na nini boyokanaki bino mibale mpo bómeka elimo ya Yehova?* Talá! Makolo ya baoyo bauti kokunda mobali na yo ezali na porte ya ndako, mpe bakomema yo libándá.” 10  Na mbala moko akweaki mpe akufaki. Ntango bilenge mibali yango bakɔtaki, bakutaki ye akufi, bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye pembeni ya mobali na ye. 11  Na yango lisangá mobimba mpe baoyo nyonso bayokaki makambo yango, bakómaki kobanga makasi. 12  Lisusu, bantoma bazalaki kosala ebele ya bilembo mpe makamwisi* na kati ya bato;+ mpe bango nyonso bazalaki kokutana elongo na veranda ya Salomo.+ 13  Ya solo, moto mosusu te azalaki na mpiko ya kosangana elongo na bango; atako bongo, bato bazalaki koloba malamu mpo na bango. 14  Longola likambo wana, bato oyo bazalaki kondimela Nkolo bakobaki kobakisama, ebele ya mibali mpe ya basi.+ 15  Babimisaki kutu bato ya maladi ata na babalabala ya minene, balalisaki bango kuna na bambeto ya mike mpe na matɔkɔ, mpo ntango Petro akoleka, ata elili na ye mpamba ekoka koleka likoló ya bamosusu kati na bango.+ 16  Lisusu, ebele ya bato oyo bautaki na bingumba ya zingazinga ya Yerusaleme bakobaki koya, bazalaki komema bato ya maladi mpe baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo, mpe bango nyonso bazalaki kobikisama. 17  Kasi nganga-nzambe monene mpe baoyo nyonso bazalaki elongo na ye, mwa lingomba ya Basadukai oyo ezalaki na ntango wana, batɛlɛmaki mpe batondaki na zuwa. 18  Bakangaki bantoma mpe batyaki bango na bolɔkɔ ya bato nyonso.+ 19  Kasi na butu, anzelu ya Yehova* afungolaki baporte ya bolɔkɔ,+ abimisaki bango libándá mpe alobaki: 20  “Bókende, bótɛlɛma na tempelo, mpe bókoba koloba na bato maloba nyonso etali bomoi oyo.” 21  Mpo na kotosa malako yango, bakɔtaki na tempelo na ntɔngɔntɔngɔ mpe babandaki koteya. Nzokande ntango nganga-nzambe monene mpe baoyo bazalaki elongo na ye bayaki, bayanganisaki Sanedrina mpe liyangani mobimba ya bankulutu ya bana ya Yisraele, mpe batindaki bato bákende kozwa bantoma na bolɔkɔ. 22  Kasi ntango bapolisi bakómaki kuna, bakutaki bango na bolɔkɔ te. Bongo bazongaki mpe bapesaki bango nsango, 23  balobi: “Tokuti bolɔkɔ ekangami malamu mpenza mpe bakɛngɛli batɛlɛmi na baporte, kasi ntango tofungoli yango tokuti moto na kati te.” 24  Ntango kapitɛni ya tempelo mpe banganga-nzambe bakonzi bayokaki maloba wana basilaki mayele mpo na makambo yango, bazalaki komituna soki ekosuka boni. 25  Kasi moto moko ayaki mpe ayebisaki bango: “Talá! Mibali oyo botyaki na bolɔkɔ bazali na tempelo, batɛlɛmi mpe bazali koteya bato.” 26  Bongo kapitɛni akendaki elongo na bapolisi na ye mpe bayaki na bantoma, kasi na mobulu te, mpo bazalaki kobanga bato bábamba bango mabanga.+ 27  Bongo bayaki na bantoma mpe batɛlɛmisaki bango liboso ya Sanedrina. Mpe nganga-nzambe monene atunaki bango 28  mpe alobaki: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bóteya te na nkombo wana,+ kasi, talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino, mpe bozali na ekateli ya komemisa biso ngambo ya liwa ya moto wana.”*+ 29  Petro ná bantoma mosusu bazongisaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.+ 30  Nzambe ya bankɔkɔ na biso alamwisaki Yesu, oyo bino bobomaki, ndenge bobakaki ye na nzete.+ 31  Nzambe atombolaki moto yango mpo azala Kapita+ mpe Mobikisi+ na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo na kopesa Yisraele libaku ya kobongola motema mpe ya kolimbisama masumu.+ 32  Mpe tozali batatoli ya makambo yango,+ ndenge moko mpe elimo santu,+ oyo Nzambe apesi na baoyo bazali kotosa ye mpo azali mokonzi.” 33  Ntango bayokaki bongo, basilikaki* makasi mpe balingaki koboma bango. 34  Kasi mofarisai moko na nkombo Gamaliele,+ atɛlɛmaki na Sanedrina; azalaki moteyi ya Mibeko oyo bato nyonso bazalaki komemya, mpe apesaki mitindo ete bábimisa bantoma mwa moke. 35  Bongo alobaki na bango: “Mibali ya Yisraele, bókeba mpenza na likambo oyo bozali kokana kosala na bato oyo. 36  Na ndakisa, eleki mwa mikolo Tedasi atɛlɛmaki, azalaki koloba ete ye mpenza azali moto monene, mpe etuluku ya mibali soki 400 bakɔtaki na lingomba na ye. Kasi abomamaki, baoyo nyonso bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe basilaki nyɛɛ. 37  Nsima na ye, Yudasi Mogalile atɛlɛmaki na ntango bato bazalaki kokomisa bankombo, mpe bato ebele balandaki ye. Moto yango akufaki, baoyo nyonso bazalaki kolanda ye bapalanganaki. 38  Yango wana mpo na makambo oyo ezali koleka sikoyo, nazali koloba na bino: Bókɔta na makambo ya bato oyo te, kasi bótika bango. Mpo soki liteya oyo to mosala oyo euti na bato, ekokweisama; 39  kasi soki euti na Nzambe, bokokoka kokweisa bango te.+ Bókeba mpo bómonana te ete bozali kobunda na Nzambe.”+ 40  Na yango bayokaki toli na ye, babengaki bantoma, babɛtaki bango fimbo,+ mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu, mpe batikaki bango bákende. 41  Na yango, balongwaki liboso ya Sanedrina, bazalaki kosepela+ mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. 42  Mpe mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako,+ kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo, Yesu.+

Maloba na nse

Talá Ap. A5.
To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”
Talá Ap. A5.
Lil., “koyeisa makila ya moto wana likoló na biso.”
To, “bazokaki.”