Mika 7:1-20

  • Yisraele amipesá na makambo ya mabe (1-6)

    • Banguna ya moto bazali bato ya libota na ye (6)

  • “Nakozela na motema moko” (7)

  • Nzambe alongisi bato na ye (8-13)

  • Mika abondeli Nzambe mpe asanzoli ye (14-20)

    • Eyano ya Yehova (15-17)

    • ‘Nani azali Nzambe lokola Yehova?’ (18)

7  Mawa na ngai! Nazali lokola moto oyo,Nsima ya kobuka mbuma oyo etelaka na eleko ya molungeMpe ya kolɔkɔta mbuma ya vinyo oyo etikali nsima ya kobuka mbuma,Amoni mopiko moko te ya mbuma ya vinyo mpo na kolya,Mbuma ya figi moko te ya liboso asepeli na yango mpenza.   Moto ya sembo azali lisusu te* na mabele;Na kati ya bato, moto malamu azali lisusu te.+ Bango nyonso bazali kobombana mpo na kosopa makila.+ Moto na moto azali koluka kokanga ndeko na ye na monyama.   Bamesenisá mabɔkɔ na bango na kosala oyo ezali mabe;+Nkumu azali kosɛnga mwa eloko,Mosambisi azali kosɛnga lifuti,+Moto ya lokumu azali koyebisa bamposa na ye* polele,+Mpe bazali koyokana mpo na kokokisa yango.*   Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola banzube,Moto oyo aleki sembo kati na bango azali mabe koleka liboke ya banzube. Mokolo ya basinzili na yo mpe mokolo oyo okozongisa monɔkɔ ekoya.+ Bongo bakozala na kobanga.+   Kondimela mozalani nayo teMpe kotya motema epai ya moninga ya motema te.+ Kebá na maloba oyo ozali koloba epai ya mwasi oyo alalaka na ntolo na yo.   Mpo mwana mobali azali kotyola tata na ye,Mwana mwasi azali kotɛmɛla mama na ye,+Mwasi ya libala azali kotɛmɛla mama-bokilona ye;+Banguna ya moto bazali bato ya libota na ye.+   Kasi ngai, nakokoba kotalela Yehova.+ Nakozela na motema moko* Nzambe oyo abikisaka ngai.+ Nzambe na ngai akoyoka ngai.+   Ee monguna na ngai, kosepela te na oyo ezwi ngai. Atako nakwei, nakotɛlɛma;Atako nazali kofanda na molili, Yehova akozala pole na ngai.   Nakondima nkanda ya Yehova—Mpo nasaleli ye lisumu+Tii ntango akokɔtela ngai mpe akokata likambo na ngai na bosembo. Akobimisa ngai na pole;Nakotala bosembo na ye. 10  Monguna na ngai mpe akomona yango,Mpe akotonda na nsɔni ye oyo azalaki koloba na ngai: “Yehova Nzambe na yo azali wapi?”+ Miso na ngai ekotala ye. Akonyatama lokola pɔtɔpɔtɔ na babalabala. 11  Ekozala mokolo ya kotonga lisusu bifelo na yo ya mabanga;Na mokolo yango bakopusa bandelo na yo mosika.* 12  Na mokolo yango, bakoya tii epai na yoLongwa na Asiri mpe na bingumba ya Ezipito,Longwa na Ezipito tii na Ebale;*Longwa na mbu tii na mbu, mpe longwa na ngomba tii na ngomba.+ 13  Mpe ekólo ekokóma mokili oyo etikali mpamba mpo na mabe ya bafandi na yango,Mpo na makambo oyo basalaki.* 14  Na lingenda na yo yamobateli ya bampate, kambá bato na yo, etonga ya libula na yo,+Oyo ezalaki kofanda yango moko na zamba, na katikati ya elanga ya banzete ya mbuma. Tiká ete bálya na Bashane mpe na Gileade+ lokola na mikolo ya kala. 15  “Lokola na mikolo oyo obimaki na mokili ya Ezipito,Nakomonisa yo* makambo ya kokamwa.+ 16  Bikólo ekomona mpe ekozala na nsɔni atako etondi na nguya.+ Bakotya lobɔkɔ na bango na monɔkɔ na bango;Matoi na bango ekokufa. 17  Bakolɛmbɔla putulu lokola banyoka;+Lokola banyama oyo etambolaka na libumu na mabele, bakobima na bisika na bango makasi ya libateli, bazali kolɛnga. Bakoya epai ya Yehova Nzambe na biso na kobanga makasi,Mpe bakobanga yo.”+ 18  Nani azali Nzambelokola yo,Oyo alimbisaka libunga mpe atyaka likebi te na kobuka mibeko+ ya bato na ye* oyo batikali?+ Akokanga nkanda mpo na libela te,Mpo asepelaka na bolingo ya sembo.+ 19  Akomonisela biso lisusu motema mawa;+ akolonga* mabunga na biso. Okobwaka masumu na bango nyonso na bozindo ya mbu.+ 20  Okomonisa bosembo epai ya Yakobo,Bolingo ya sembo epai ya Abrahama,Ndenge olapaki ndai epai ya bankɔkɔ na biso banda na mikolo ya kala.+

Maloba na nse

To, “alimwe.”
To, “mposa ya molimo na ye.”
Lil., “bazali kokanga yango elongo.”
To, “Nakomonisa ete nazali kozela.”
To mbala mosusu, “mobeko ekozala mosika.”
Elingi koloba, Efrate.
Lil., “mbuma ya misala na bango.”
Lil., “ye.”
Lil., “libula na ye.”
To, “akonyata; akotya na nse.”