Mika 5:1-15

  • Mokonzi moko monene mpo na mabele mobimba (1-6)

    • Mokonzi yango akouta na Beteleme (2)

  • Baoyo batikali bakozala lokola mamwɛ mpe lokola nkɔsi (7-9)

  • Ekólo ekopɛtolama (10-15)

5  “Ee mwana mwasi oyo bazali kobundisa,Sikoyo ozali komikatakata nzoto;Bazingi biso mpo na kobundisa biso.+ Babɛti mosambisi ya Yisraele nzete na litama.+   Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+Yo oyo ozali moke mpenza mpo otángama na kati ya bankóto* ya Yuda,Epai na yo nde moto oyo akozala mokonzi na Yisraele akobima mpo na ngai,+Oyo ebandeli na ye ezali banda na ntango ya kala, na mikolo ya kalakala.   Yango wana akosundola bangoTii ntango mwasi oyo asengeli kobota akobota. Mpe bandeko na ye oyo batikali bakozonga epai ya bato ya Yisraele.   Akotɛlɛma mpe akobatela* etonga na makasi ya Yehova,+Na lokumu ya nkombo ya Yehova Nzambe na ye. Mpe bakofanda na kimya,+Mpo na ntango yango, bonene na ye ekokóma tii na bansuka ya mabele.+   Mpe akomema kimya.+ Soki Moasiri akɔti na ekólo na biso mpe atye lokolo na bandako milai na biso oyo ebatelami makasi,+Tokobimisela ye babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu* mwambe na kati ya bato.   Bakopesa mokili ya Asiri etumbu* na mopanga,+Mpe mokili ya Nimerode+ na bisika na yango ya kokɔta. Mpe akosikola biso na mabɔkɔ ya Moasiri,+Ntango akokɔta na mokili na biso mpe akotya lokolo na teritware na biso.   Bato ya Yakobo oyo batikali bakozala na kati ya ebele ya bato ya bikóloLokola mamwɛ* oyo euti epai ya Yehova,Lokola mbula likoló ya milonaOyo etyaka elikya epai ya moto teMpe ezelaka eloko te epai ya bana ya bato.   Bato ya Yakobo oyo batikali bakozala na kati ya bikólo,Na kati ya ebele ya bato ya bikólo,Lokola nkɔsi na kati ya banyama ya zamba,Lokola mwana-nkɔsi* na kati ya bitonga ya bampate,Oyo, ntango ezali koleka, enyataka mpe epasolaka mpenza;Mpe moto ya kobikisa bango azali te.   Lobɔkɔ na yo ekotombwama likoló ya batɛmɛli na yo,Mpe banguna na yo nyonso bakobebisama.” 10  Yehova alobi, “Na mokolo yango,”“Nakosilisa bampunda na yo na kati na yo mpe nakobebisa makalo na yo. 11  Nakobebisa bingumba ya ekólo na yoMpe nakokweisa bisika na yo nyonso oyo etongami makasi. 12  Nakosukisa mosala ya bonganga-nkisi oyo osalaka,*Mpe moto moko te oyo asalaka misala ya maji akotikala kati na yo.+ 13  Nakobebisa bikeko*makonzí oyo ezali katina yo,Mpe okofukama lisusu te liboso ya biloko oyo mabɔkɔ na yo esali.+ 14  Nakopikola banzete ya losambo*+ oyo ezali kati na yoMpe nakosilisa bingumba na yo. 15  Na nkanda mpe kosilika na ngai ya makasi nakozongisa mabeEpai ya bikólo oyo etosi te.”

Maloba na nse

To, “bituluka.”
To, “akotambwisa.”
To, “bakambi.”
Lil., “Bakokamba mokili ya Asiri.”
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Lil., “na lobɔkɔ na yo.”
To, “bikeko oyo eyemami.”