Ndenge ekomamá na Marko 15:1-47

  • Yesu liboso ya Pilate (1-15)

  • Basoda batyoli Yesu (16-20)

  • Babaki Yesu na nzete na bansɛtɛ na Golgota (21-32)

  • Liwa ya Yesu (33-41)

  • Kokundama ya Yesu (42-47)

15  Na ntɔngɔntɔngɔ, banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu mpe bakomeli, elingi koloba Sanedrina mobimba, bayanganaki elongo. Nsima ya kokanga Yesu bansinga, bakendaki na ye mpe bakabaki ye epai ya Pilate.+  Bongo Pilate atunaki ye: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?”+ Yesu azongisaki: “Yo moko olobi yango.”+  Kasi banganga-nzambe bakonzi bazalaki kofunda ye na makambo mingi.  Na yango Pilate atunaki ye lisusu: “Ozali na eyano ya kopesa te?+ Talá ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango.”+  Kasi Yesu apesaki eyano mosusu te, bongo Pilate akamwaki.+  Nzokande na fɛti nyonso, Pilate azalaki na momeseno ya kobimisela bato mokangami moko na bolɔkɔ, oyo bango bazalaki kosɛnga.+  Na ntango wana, moto moko na nkombo Barabasi azalaki na bolɔkɔ elongo na batomboki, oyo babomaki moto ntango babimisaki mobulu.  Bongo ebele ya bato bayaki mpe babandaki kosɛnga Pilate asala ndenge amesaná kosalela bango.  Pilate ayanolaki bango ete: “Bolingi nabimisela bino Mokonzi ya Bayuda?”+ 10  Mpo Pilate ayebaki ete ezalaki kaka mpo na likunya nde banganga-nzambe bakonzi bakabaki Yesu.+ 11  Kasi banganga-nzambe bakonzi batindaki ebele ya bato básɛnga ye abimisela bango nde Barabasi.+ 12  Pilate alobaki na bango lisusu: “Bongo nasala nini na moto oyo bozali kobenga Mokonzi ya Bayuda?”+ 13  Bagangaki lisusu: “Baká ye na nzete!”*+ 14  Pilate atunaki bango: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”*+ 15  Na yango Pilate, lokola alingaki kosepelisa ebele yango ya bato, abimiselaki bango Barabasi; mpe nsima ya kotinda bábɛta Yesu fimbo,+ akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+ 16  Basoda bamemaki ye na kati ya lopango, elingi koloba, na ndako ya guvɛrnɛrɛ, mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda.+ 17  Mpe balatisaki ye elamba moko ya motane-bulé, batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó. 18  Mpe babandaki kobelela ye, balobi: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!”+ 19  Lisusu, bazalaki kobɛta ye na motó na mwa nzete mpe kobwakela ye nsoi, bafukamaki mpe bagumbamelaki ye.* 20  Nsukansuka, ntango basilisaki kosɛka ye, balongolaki ye elamba yango ya motane-bulé mpe balatisaki ye bilamba na ye.* Na nsima bamemaki ye libándá mpo na kobaka ye na nzete+ na bansɛtɛ. 21  Mpe bazwaki na makasi moleki-nzela moko, moto moko boye ya mboka Sirene na nkombo Simo, oyo autaki na bilanga, tata ya Alezandre mpe Rufusi, mpo amemela Yesu nzete na ye ya mpasi.*+ 22  Bamemaki ye na esika babengi Golgota, oyo soki babongoli, elimboli “Esika ya Mokuwa ya Motó.”+ 23  Kuna, bamekaki kopesa ye vinyo oyo basangisá na elangwiseli babengi mire,+ kasi aboyaki komɛla yango. 24  Bongo babakaki ye na nzete na bansɛtɛ, mpe bakabolaki bilamba na ye ya likoló nsima ya kobwaka mbɛsɛ mpo na koyeba nani akozwa nini.+ 25  Ezalaki sikoyo ngonga ya libwa ya ntɔngɔ* ntango babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. 26  Mpe bakomaki na etanda moko likambo oyo bafundaki ye na yango, ete: “Mokonzi ya Bayuda.”+ 27  Lisusu, babakaki miyibi mibale na banzete pembeni na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 28  *—— 29  Baleki-nzela babandaki kofinga ye, bazalaki koningisa mitó na bango+ mpe koloba: “Ɛɛ! Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato,+ 30  omibikisa yo moko, kitá na nzete ya mpasi.”* 31  Ndenge moko mpe, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazalaki kosɛka ye bango na bango mpe koloba: “Abikisaki basusu; akoki komibikisa ye moko te!+ 32  Tiká ete Kristo, Mokonzi ya Yisraele, akita sikoyo na nzete ya mpasi,* mpo tómona mpe tóndima.”+ Ata baoyo babakamaki na banzete pembeni na ye bazalaki kolobela ye mabe.+ 33  Ntango ekómaki midi,* molili ekɔtaki na mokili wana mobimba tii na ngonga ya misato ya nsima ya midi.*+ 34  Na ngonga ya misato nsima ya midi, Yesu abelelaki na mongongo makasi, alobi: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli, elimboli: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+ 35  Ntango bayokaki bongo, bato mosusu kati na baoyo batɛlɛmaki pembeni babandaki koloba: “Bóyoka! Azali kobenga Eliya.” 36  Bongo moto moko apotaki mbangu, apɔlisaki linyuka moko na vinyo ya ngayi, atyaki yango na nsɔngɛ ya mwa nzete, mpe apesaki ye amɛla,+ alobi: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kokitisa ye.” 37  Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.+ 38  Mpe rido ya esika mosantu+ epasukaki na biteni mibale banda na likoló tii na nse.+ 39  Nzokande, ntango mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki liboso ya Yesu amonaki makambo oyo esalemaki na ntango ya liwa na ye, alobaki: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+ 40  Basi mosusu mpe bazalaki kotala na mosika; kati na bango Maria Magadalene, Maria mama ya Yakobo Moke ná Yose, mpe Salome.+ 41  Basi yango bazalaki kotambola na ye mpe kosalela ye+ ntango azalaki na Galile. Ezalaki mpe na basi mosusu mingi oyo bamataki elongo na ye na Yerusaleme. 42  Lokola ekómaki mpokwa, mpe lokola ezalaki ntango ya Bolɛngɛli, elingi koloba mokolo oyo ezalaka liboso ya Sabata, 43  Yozefe moto ya Arimatea ayaki; azalaki moto moko ya lokumu mingi ya Tribinale monene ya Bayuda,* oyo azalaki mpe kozela Bokonzi ya Nzambe. Azwaki mpiko, akendaki epai ya Pilate mpe asɛngaki ye nzoto ya Yesu.+ 44  Kasi Pilate akamwaki mpe amitunaki soki Yesu asilaki mpenza kokufa, bongo abengaki mokonzi ya basoda mpe atunaki ye soki asilaki kokufa. 45  Lokola mokonzi ya basoda ayebisaki ye ete ezali mpenza bongo, apesaki Yozefe nzela ya kozwa nzoto yango. 46  Yozefe asombaki lini ya kitoko mpenza, akitisaki ye, azingaki ye na lini yango ya kitoko mpe alalisaki ye na lilita*+ oyo batimolá na kati ya mabanga; mpe abalolaki libanga tii na monɔkɔ ya lilita yango.+ 47  Kasi Maria Magadalene ná Maria mama ya Yose bazalaki kaka kotala esika oyo balalisaki ye.+

Maloba na nse

To, “Bomá ye.”
To, “Bomá ye.”
To, “Losako.”
To, “bakumisaki ye.”
To, “bilamba na ye ya likoló.”
Lil., “ngonga ya misato.”
Talá Ap. A3.
Lil., “ngonga ya motoba.”
Lil., “ngonga ya libwa.”
To, “Sanedrina.”
To, “lilita ya kokanisama.”