Ndenge ekomamá na Luka 7:1-50

  • Kondima ya mokonzi moko ya basoda (1-10)

  • Yesu asekwisi mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá na Naine (11-17)

  • Yesu akumisi Yoane Mobatisi (18-30)

  • Libota oyo ezangi kondima ekozwa etumbu (31-35)

  • Mwasi moko mosumuki alimbisami (36-50)

    • Ndakisa ya bato mibale oyo bazalaki na nyongo (41-43)

7  Ntango asilisaki koloba makambo oyo asengelaki koloba na bato, akɔtaki na Kapernaume.  Kuna, mokonzi moko ya basoda azalaki na moombo moko oyo alingaki mingi. Moombo yango abɛlaki makasi mpe alingaki kokufa.+  Ntango mokonzi yango ya basoda ayokaki nsango ya Yesu, atindelaki ye bankulutu mosusu ya Bayuda mpo básɛnga ye aya kobikisa moombo na ye.  Bayaki epai ya Yesu mpe babandaki kobondela ye na molende, balobi: “Abongi mpenza ete osalela ye likambo yango,  mpo alingaka ekólo na biso mpe ye nde moto atongelaki biso sinagoga.”  Bongo Yesu akendaki elongo na bango. Kasi ntango akómaki pene na ndako, mokonzi yango ya basoda asilaki kotinda baninga báloba na ye ete: “Nkolo, komitungisa te, mpo nabongi te ete okɔta na ndako na ngai.+  Yango wana namimonaki ete nabongi te koya epai na yo. Kasi lobá liloba moko, mpe mosaleli na ngai akobika.  Mpo ngai mpe nazali na bakonzi oyo natosaka, mpe nazali na basoda oyo napesaka mitindo. Soki nalobi na oyo: ‘Kende!’ akendaka, mpe na mosusu: ‘Yaká!’ ayaka, mpe na moombo na ngai: ‘Salá boye!’ asalaka yango.”  Ntango Yesu ayokaki makambo yango, akamwaki mpenza mpo na ye. Abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye mpe alobaki na bango: “Nazali koyebisa bino ete namoná naino kondima ya monene+ boye te, ata na Yisraele.” 10  Mpe ntango bato oyo mokonzi yango ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki moombo yango asili kobika.+ 11  Mwa moke na nsima, akendaki na engumba oyo babengi Naine, mpe bayekoli na ye ná ebele mpenza ya bato bazalaki kokende nzela moko na ye. 12  Ntango akómaki pene na porte ya engumba, talá! bazalaki komema mokufi moko na libándá, mwana kaka moko ya mama na ye.*+ Lisusu, mama yango azalaki mwasi oyo mobali akufá. Ebele mpenza ya bato oyo bautaki na engumba bazalaki mpe elongo na ye. 13  Ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa,+ mpe alobaki na ye: “Tiká kolela.”+ 14  Bongo apusanaki, asimbaki mbeto ya ebembe, mpe bato oyo bazalaki komema yango batɛlɛmaki. Na nsima alobaki: “Elenge mobali, nalobi na yo: Tɛlɛmá!”+ 15  Mowei yango afandaki mpe abandaki koloba, mpe Yesu apesaki ye epai ya mama na ye.+ 16  Bongo bango nyonso babangaki, mpe babandaki kokumisa Nzambe, balobi: “Mosakoli monene abimi na kati na biso,”+ mpe, “Nzambe atyeli bato na ye likebi.”+ 17  Mpe nsango na ye epalanganaki na Yudea mobimba mpe na bisika nyonso ya zingazinga. 18  Nzokande bayekoli ya Yoane bayebisaki ye makambo nyonso wana.+ 19  Bongo Yoane abengaki bayekoli mibale kati na bayekoli na ye mpe atindaki bango epai ya Nkolo mpo na kotuna boye: “Yo nde Moto oyo asengelaki koya,+ to tosengeli kozela moto mosusu?” 20  Ntango mibali yango bakómaki epai ya Yesu, balobaki: “Yoane Mobatisi atindi biso epai na yo mpo tótuna: ‘Yo nde Moto oyo asengelaki koya, to tosengeli kozela moto mosusu?’” 21  Kaka na ntango wana, Yesu abikisaki bato mingi oyo bazalaki na bamaladi+ mpe na bampasi ya makasi mpe na bilimo mabe, mpe asalaki ete bato mingi oyo bakufá miso bákoka komona. 22  Bongo azongiselaki bango: “Bókende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe boyoki: Bato oyo bakufá miso bakómi komona,+ batɛngumi bakómi kotambola, bato ya maladi ya maba bazali kopɛtolama, bato oyo bakufá matoi bakómi koyoka,+ bakufi bazali kolamuka,* mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.+ 23  Esengo na moto oyo azwi ata ntina moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.”+ 24  Ntango bamemi-nsango ya Yoane bakendaki, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato makambo etali Yoane ete: “Bokendaki kotala nini na esobe? Lititi* oyo mopɛpɛ ezali kobɛtabɛta?+ 25  Bongo bokendaki mpo na kotala nini? Moto moko oyo alati bilamba ya kitoko?*+ Te, baoyo balataka bilamba ya kitoko mpe bazali na bomɛngo bazalaka na bandako ya bakonzi. 26  Bongo bokendaki mpenza kotala nini? Mosakoli? Ya solo, nazali koyebisa bino, ye aleki kutu mosakoli mosika.+ 27  Ezali mpo na ye nde ekomamá: ‘Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela liboso na yo.’+ 28  Nazali koyebisa bino: Na bato nyonso oyo basi babotá, moto oyo aleki Yoane azali te. Kasi moto oyo aleki moke na Bokonzi ya Nzambe aleki ye.”+ 29  (Ntango bato nyonso mpe bakɔngɔli-mpako bayokaki bongo, balobaki ete Nzambe azali sembo, mpo bazwá batisimo ya Yoane.+ 30  Kasi Bafarisai mpe baoyo bayebaki Mobeko malamumalamu batyolaki toli* oyo Nzambe apesaki bango,+ lokola Yoane abatisaki bango te.) 31  “Sikoyo nakokokanisa bato ya libota oyo na banani, mpe bazali lokola banani?+ 32  Bazali lokola bana mike oyo bafandi na zando mpe bazali kobelelana bango na bango, balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bolelaki te.’ 33  Ndenge moko mpe, Yoane Mobatisi ayei, mpe lokola alei mampa te mpe amɛli vinyo te,+ bino bolobi: ‘Azali na demo.’ 34  Mwana ya moto ayei, azali kolya mpe komɛla, kasi bino bolobi: ‘Talá! Moto oyo alyaka na lokoso mpe amipesi na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki!’+ 35  Nzokande, bwanya ya moto emonanaka na makambo ya bosembo oyo asalaka.”*+ 36  Sikoyo Mofarisai moko azalaki kosɛnga ye aya kolya epai na ye. Bongo Yesu akɔtaki na ndako ya Mofarisai yango mpe afandaki na mesa mpo na kolya.* 37  Mpe talá! mwasi moko oyo ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki ayokaki ete Yesu azali kolya* na ndako ya Mofarisai yango. Ayaki na molangi moko ya albatre oyo ezalaki na mafuta ya nsolo kitoko.+ 38  Amityaki na nsima ya Yesu, na makolo na ye, alelaki mpe abandaki kopɔlisa makolo na ye na mai ya miso na ye, mpe apangwisaki yango na nsuki ya motó na ye. Lisusu, azalaki kopesa makolo ya Yesu mapwɛpwɛ na boboto mpe kopakola yango mafuta wana ya nsolo kitoko. 39  Ntango Mofarisai oyo abengisaki ye amonaki bongo alobaki na motema na ye: “Soki moto oyo azalaka mpenza mosakoli, mbɛlɛ ayebi mwasi oyo azali kosimba ye mpe bizaleli na ye, mbɛlɛ ayebi ete azali mosumuki.”+ 40  Kasi Yesu alobaki na ye: “Simo, nazali na likambo ya koloba na yo.” Ye alobaki: “Moteyi, lobá yango!” 41  “Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko oyo adefisaka mbongo; moko azalaki na nyongo ya denari* 500, kasi mosusu ya 50. 42  Lokola bazalaki na eloko te mpo na kofuta nyongo na ye, alimbisaki bango nyonso mibale na motema moko. Sikoyo, nani kati na bango akolinga ye mingi koleka?” 43  Simo azongisaki: “Nakanisi ezali moto oyo ye alimbisaki nyongo ya monene koleka.” Alobaki na ye: “Okati likambo yango malamu.” 44  Bongo Yesu abalukaki epai ya mwasi yango mpe alobaki na Simo: “Omoni mwasi oyo? Ntango nakɔtaki na ndako na yo, opesaki ngai mai ya kosukola makolo na ngai te. Kasi mwasi oyo apɔlisi makolo na ngai na mai ya miso na ye mpe apangwisi yango na nsuki na ye. 45  Opesaki ngai lipwɛpwɛ te; kasi mwasi oyo, banda ngonga oyo nakɔtaki awa, atiki te kopesa makolo na ngai mapwɛpwɛ na boboto. 46  Osopelaki motó na ngai mafuta te; kasi mwasi oyo asopeli makolo na ngai mafuta ya nsolo kitoko. 47  Yango wana, nazali koyebisa yo, masumu na ye, atako ezali mingi,* elimbisami,+ mpo alingaki mingi. Kasi moto oyo balimbisi moke, alingaka moke.” 48  Bongo alobaki na mwasi yango: “Masumu na yo elimbisami.”+ 49  Baoyo bafandaki* na mesa elongo na ye babandaki kolobana bango na bango: “Moto oyo azali nani, oyo azali kolimbisa ata masumu?”+ 50  Kasi alobaki na mwasi yango: “Kondima na yo ebikisi yo.+ Kende na kimya.”

Maloba na nse

Lil., “mwana se moko oyo abotamaki.”
To, “kosekwa.”
To, “Mongendu.”
To, “ya pɛtɛpɛtɛ.”
Lil., “liboso ya elongi na yo.”
To, “malako.”
Lil., “emonanaka na nzela ya bana na yango.”
To, “atandamaki na mesa.”
To, “atandami na mesa.”
Talá Ap. B14.
To, “monene.”
To, “batandamaki.”