Mosakoli 8:1-17

  • Kozala na nse ya boyangeli ya moto ya kozanga kokoka (1-17)

    • Kotosa mitindo ya mokonzi (2-4)

    • Boyangeli ya moto ezali mabe mpenza (9)

    • Ntango etumbu epesami nokinoki te (11)

    • Lyá, mɛlá mpe sepelá (15)

8  Nani azali lokola moto ya bwanya? Nani ayebi ndenge ya kosilisa likambo?* Bwanya ya moto engɛngisaka elongi na ye, mpe ata soki elongi na ye ekangami, efungwamaka.  Nalobi: “Tosá mitindo ya mokonzi,+ mpe salá bongo mpo olapaki ndai liboso ya Nzambe.+  Kowela te kolongwa liboso na ye.+ Kokɔtela likambo moko te ya mabe;+ mpo akoki kosala nyonso oyo alingi,  mpo mokonzi nde azalaka na liloba ya nsuka;+ nani akoki koloba na ye ete: ‘Ozali kosala nini?’”  Moto oyo atosaka mobeko akomona mpasi te,+ mpe motema ya bwanya ekoyeba ntango ya kosala likambo mpe ndenge ya kosala yango.*+  Mpo likambo nyonso ezalaka na ntango na yango mpe ndenge ya kosala yango,*+ mpamba te mpasi ya bato ezali mingi mpenza.  Lokola moto moko te ayebi oyo ekosalema, nani akoki koyebisa ye ndenge yango ekosalema?  Kaka ndenge moto moko te azali na bokonzi likoló ya elimo to kopekisa elimo, moto moko mpe te azali na bokonzi likoló ya mokolo ya liwa.+ Kaka ndenge soda azalaka na ndingisa te ya kolongwa na ntango ya etumba, ndenge moko mpe mabe ekobikisa te baoyo bazali kosala yango.*  Namoná nyonso wana, mpe natyaki motema na ngai na mosala nyonso oyo esalemi na nse ya moi, ntango oyo moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.*+ 10  Mpe namonaki bato mabe bazali kokundama, baoyo bazalaki kokɔta mpe kobima na esika mosantu, kasi babosanaki bango nokinoki na engumba esika bazalaki kosala bongo.+ Yango mpe ezali mpamba. 11  Lokola etumbu mpo na mosala moko mabe epesamaki nokinoki te,+ motema ya bato etingami na kosala mabe.+ 12  Ata soki mosumuki asali mabe mbala nkama mpe azali kokoba kozala na bomoi ntango molai, nayebi ete makambo ekosuka malamu mpo na baoyo babangaka Nzambe ya solo, mpo babangaka ye.+ 13  Kasi makambo ekosuka mabe mpo na moto mabe,+ mikolo na ye oyo ezali lokola elili ekoumela te,+ mpo azali kobanga Nzambe te. 14  Likambo moko ya mpamba* oyo esalemaka na mabele yango oyo: basalelaka bato ya sembo makambo lokola nde basalaki mabe,+ mpe basalelaka bato mabe makambo lokola nde basalaki makambo na bosembo.+ Nalobi ete yango mpe ezali mpamba. 15  Nayebisaki basusu ete ezali malamu básepelaka,+ mpo moto azali na eloko moko te na nse ya moi oyo eleki kolya, komɛla ná kosepela; yango esengeli kozala elongo na ye wana azali kosala mosala makasi na mikolo ya bomoi na ye,+ oyo Nzambe ya solo apesi ye na nse ya moi. 16  Nasalaki nyonso mpo na kozwa bwanya mpe mpo na komona mosala nyonso oyo ezali kosalema na mabele,+ nazalaki kutu kolala te butu moi.* 17  Bongo natalaki mosala nyonso ya Nzambe ya solo, mpe namonaki ete bato bakoki te koyeba oyo esalemaka na nse ya moi;+ ata soki bato baluki kosala nini, bakoyeba kaka te. Ata soki balobi ete bazali na bwanya mingi, bakoyeba yango mpenza te.+

Maloba na nse

To, “ndimbola ya likambo.”
To, “lisambisi.”
To, “lisambisi.”
To mbala mosusu, “mabe ekobikisa ata moke te bato mabe.”
To, “konyokola ye.”
To, “oyo ebangisaka.”
To mbala mosusu, “bato bazwaka mpɔngi te ezala na moi to na butu.”