Kobima 6:1-30

  • Apesi lisusu elaka ya kolongwa na boombo (1-13)

    • Nkombo ya Yehova eyebanaki mpenza te (2, 3)

  • Molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Moize mpe Arona (14-27)

  • Moize asengeli kozonga lisusu epai ya Farao (28-30)

6  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Sikoyo okomona oyo nakosala Farao.+ Lobɔkɔ na ngai ya nguya ekotinda ye atika bango bákende, mpe lobɔkɔ na ngai ya nguya ekotinda ye abengana bango na mokili na ye.”+  Nzambe alobaki na Moize ete: “Nazali Yehova.  Mpe nazalaki kobimela Abrahama, Yisaka ná Yakobo lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ kasi mpo na nkombo na ngai Yehova+ namiyebisaki epai na bango+ te.  Lisusu, nasalaki kondimana na ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana, mokili oyo bafandaki bapaya.+  Sikoyo ngai, nayoki kolelalela ya Bayisraele mpo na minyoko, ndenge Baezipito bazali kokómisa bango baombo, mpe nazali kokanisa kondimana na ngai.+  “Na yango, lobá na Bayisraele ete: ‘Nazali Yehova, mpe nakolongola bino na mikumba ya kilo ya Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango,+ mpe nakosikola bino na lobɔkɔ na ngai ya nguya* mpe na bitumbu minene.+  Mpe nakozwa bino mpo bózala bato na ngai, mpe nakozala Nzambe na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bino, oyo azali kolongola bino na mikumba ya kilo ya Ezipito.  Mpe nakokɔtisa bino na mokili oyo nalapaki ndai* ete nakopesa yango Abrahama, Yisaka mpe Yakobo; mpe nakopesa bino yango mpo ezala ya bino.+ Nazali Yehova.’”+  Na nsima, Moize ayebisaki Bayisraele makambo yango, kasi bayokelaki Moize te mpo balɛmbaki nzoto mpe boombo elekaki makasi.+ 10  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 11  “Kɔtá mpe lobá na Farao, mokonzi ya Ezipito, ete atika Bayisraele bákende, bálongwa na mokili na ye.” 12  Nzokande, Moize ayanolaki Yehova ete: “Talá! Bayisraele bayokeli ngai te;+ bongo Farao akoyokela ngai ndenge nini, ngai moto oyo nalobaka malamu te?”*+ 13  Kasi Yehova ayebisaki lisusu Moize ná Arona mitindo oyo bakopesa na Bayisraele mpe na Farao, mokonzi ya Ezipito, mpo na kobimisa Bayisraele na mokili ya Ezipito. 14  Talá bankumu ya ndako ya batata na bango: Bana mibali ya Rubene, mwana ya liboso ya Yisraele+ bango oyo: Hanoke, Palu, Hezerone mpe Karami.+ Wana nde mabota ya Rubene. 15  Bana mibali ya Simeone bango oyo: Yemuele, Yamine, Ohade, Yakine, Zohare mpe Shaule mwana ya mwasi Mokanana.+ Wana nde mabota ya Simeone. 16  Oyo bankombo ya bana mibali ya Levi,+ ndenge mabota na bango elandanaki: Gereshone, Kohate mpe Merari.+ Levi aumelaki na bomoi mbula 137. 17  Bana mibali ya Gereshone bango oyo: Libini ná Shimei, na kolanda mabota na bango.+ 18  Bana mibali ya Kohate bango oyo: Amirame, Yizare, Hebrone mpe Uziele.+ Kohate aumelaki na bomoi mbula 133. 19  Bana mibali ya Merari bango oyo: Maheli ná Mushi. Wana nde mabota ya Balevi, ndenge mabota na bango elandanaki.+ 20  Bongo Amirame azwaki Yokebede, ndeko ya tata na ye, mpo azala mwasi na ye.+ Yokebede abotelaki ye Arona ná Moize.+ Amirame aumelaki na bomoi mbula 137. 21  Bana mibali ya Yizare bango oyo: Kora,+ Nefege, mpe Zikri. 22  Bana mibali ya Uziele bango oyo: Mishaele, Elizafane,+ mpe Sitiri. 23  Bongo Arona azwaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabe, ndeko mwasi ya Nahashone,+ mpo azala mwasi na ye. Elisheba abotelaki ye Nadabe, Abihu, Eleazare ná Itamare.+ 24  Bana mibali ya Kora bango oyo: Asire, Elekana, mpe Abiasafe.+ Wana nde mabota ya Bakora.+ 25  Eleazare,+ mwana ya Arona, azwaki moko ya bana basi ya Putiele mpo azala mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki ye Finehase.+ Wana nde bankumu ya mabota ya batata ya Balevi, na kolanda mabota na bango.+ 26  Wana nde Arona ná Moize, oyo Yehova alobaki na bango ete: “Bóbimisa bato ya Yisraele na mokili ya Ezipito na kolanda etuluku na etuluku.”*+ 27  Ezalaki Moize ná Arona nde bazalaki koloba na Farao, mokonzi ya Ezipito, mpo abimisa bato ya Yisraele na Ezipito.+ 28  Mokolo oyo Yehova alobaki na Moize na mokili ya Ezipito, 29  Yehova alobaki na Moize ete: “Nazali Yehova. Yebisá Farao, mokonzi ya Ezipito likambo nyonso oyo nazali koloba na yo.” 30  Bongo Moize alobaki na Yehova ete: “Talá! Nalobaka malamu te,* bongo Farao akoyokela ngai ndenge nini?”+

Maloba na nse

Lil., “oyo esembolami.”
Lil., “natombolaki lobɔkɔ na ngai.”
Lil., “nazali esutu na mbɛbu.”
Lil., “na kolanda mampinga na bango.”
Lil., “Nazali esutu na mbɛbu.”