Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Ezekiele

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Na Babilone, Ezekiele amoni bimonaneli ya Nzambe (1-3)

    • Emonaneli ya likalo ya Yehova na likoló (4-28)

      • Mopɛpɛ makasi, lipata mpe mɔtɔ (4)

      • Bikelamu minei ya bomoi (5-14)

      • Bapine ya ebende (15-21)

      • Etando ya ngɛlingɛli lokola glasɛ (22-24)

      • Kiti ya Bokonzi ya Yehova (25-28)

  • 2

    • Ezekiele aponami mpo azala mosakoli (1-10)

      • ‘Ezala soki bakoyoka to te’ (5)

      • Rulo ya nzembo ya mawa (9, 10)

  • 3

    • Ezekiele alei rulo oyo Nzambe apesi ye (1-15)

    • Ezekiele atyami lokola sinzili (16-27)

      • Bopɔtu ememisaka moto ngambo ya makila (18-21)

  • 4

    • Ndenge oyo Yerusaleme ekozingama (1-17)

      • Ngambo ekomemama mikolo 390, mpe na nsima mikolo 40 (4-7)

  • 5

    • Ndenge oyo Yerusaleme ekokwea (1-17)

      • Mosakoli akaboli nsuki na ye na ndambo misato (1-4)

      • Yerusaleme esali mabe koleka bikólo (7-9)

      • Etumbu misato mpo na batomboki (12)

  • 6

    • Mpasi oyo ekokómela bangomba ya Yisraele (1-14)

      • Bikeko ya bosɔtɔ ekosambwa (4-6)

      • “Bokoyeba mpenza ete nazali Yehova” (7)

  • 7

    • Nsuka eyei (1-27)

      • Mpasi oyo ekokani na mosusu te (5)

      • Bakobwaka mbongo na babalabala (19)

      • Tempelo ekokómisama eloko mpamba (22)

  • 8

    • Ezekiele amemami na Yerusaleme na emonaneli (1-4)

    • Makambo oyo eyinamá emonani na tempelo (5-18)

      • Basi bazali kolela nzambe Tamuze (14)

      • Mibali bazali kosambela moi (16)

  • 9

    • Bato motoba oyo bakopesa etumbu mpe moto oyo azali na mai ya mokanda (1-11)

      • Lisambisi ekobanda na esika mosantu (6)

  • 10

    • Mɔtɔ ezwami na katikati ya bapine ya ebende (1-8)

    • Ndenge oyo bakeruba mpe bapine ya ebende balobelami (9-17)

    • Nkembo ya Nzambe elongwe na tempelo (18-22)

  • 11

    • Bankumu mabe bazwi etumbu (1-13)

      • Engumba ekokanisami na nzungu ya kolambela (3-12)

    • Elaka ya kozongisama ya Yisraele (14-21)

      • Nzambe apesi “elimo ya sika” (19)

    • Nkembo ya Nzambe elongwe na Yerusaleme (22, 23)

    • Ezekiele azongi na Kaladea na nzela ya emonaneli (24, 25)

  • 12

    • Mosakoli amonisi na misala ndenge komemama na mboka mopaya ekozala (1-20)

      • Bisaka mpo na komemama na mboka mopaya (1-7)

      • Nkumu akokende na molili (8-16)

      • Limpa oyo ekolyama na mitungisi, mai oyo ekomɛlama na nsɔmɔ (17-20)

    • Nzambe aboyi lisese ya bokosi (21-28)

      • “Ata liloba na ngai moko te ekoumela mpo na kokokisama” (28)

  • 13

    • Mpasi oyo ekokómela basakoli ya lokuta (1-16)

      • Bifelo ya mpɛmbɛ ekokwea (10-12)

    • Mpasi oyo ekokómela basakoli ya lokuta ya basi (17-23)

  • 14

    • Etumbu mpo na basambeli ya bikeko (1-11)

    • Yerusaleme ekozanga te kozwa etumbu (12-23)

      • Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki bato ya sembo (14, 20)

  • 15

    • Yerusaleme ezali nzete ya vinyo oyo ezangi ntina (1-8)

  • 16

    • Bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na Yerusaleme (1-63)

      • Amonaki ye wana azalaki naino mwana oyo asundolamá (1-7)

      • Nzambe abongisaki ye mpe asalaki na ye kondimana ya libala (8-14)

      • Akómaki mwasi oyo azangi bosembo (15-34)

      • Azwi etumbu lokola mwasi ya ekobo (35-43)

      • Akokanisami na Samaria mpe Sodoma (44-58)

      • Nzambe akanisi lisusu kondimana na ye (59-63)

  • 17

    • Sambole ya mpongo mibale mpe ya nzete ya vinyo (1-21)

    • Etape ya pɛtɛpɛtɛ ekokóma nzete monene ya sɛdrɛ (22-24)

  • 18

    • Moto na moto akomema ngambo mpo na masumu na ye moko (1-32)

      • Molimo oyo esali lisumu ekokufa (4)

      • Mwana akofuta te masumu ya tata na ye (19, 20)

      • Asepelaka te na liwa ya moto mabe (23)

      • Kobongola motema ememaka na bomoi (27, 28)

  • 19

    • “Loyembo ya mawa mpo na bankumu ya Yisraele” (1-14)

  • 20

    • Lisolo ya botomboki ya Yisraele (1-32)

    • Elaka ya kozongisama mpo na Yisraele (33-44)

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Sudi (45-49)

  • 21

    • Nzambe akobimisa mopanga ya lisambisi (1-17)

    • Mokonzi ya Babilone akobundisa Yerusaleme (18-24)

    • Nkumu mabe ya Yisraele akolongolama (25-27)

      • “Longolá motole” (26)

      • “Tii ntango moto oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko akoya” (27)

    • Mopanga ekobɛta Baamone (28-32)

  • 22

    • Yerusaleme, engumba oyo ezali na ngambo ya makila (1-16)

    • Yisraele ezali lokola biloko ya bosɔtɔ oyo ezangi ntina (17-22)

    • Bakambi mpe bato ya Yisraele bazwi etumbu (23-31)

  • 23

    • Bandeko basi mibale oyo bazangi bosembo (1-49)

      • Ohola asali bondumba ná Asiri (5-10)

      • Oholiba asali bondumba ná Babilone mpe Ezipito (11-35)

      • Bandeko basi mibale bazwi etumbu (36-49)

  • 24

    • Yerusaleme ezali lokola nzungu ya kolambela oyo egugi (1-14)

    • Liwa ya mwasi ya Ezekiele ezali elembo (15-27)

  • 25

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Amone (1-7)

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Moabe (8-11)

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Edome (12-14)

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Filistia (15-17)

  • 26

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Tire (1-21)

      • “Esika ya kokaukisa minyama” (5, 14)

      • Bakobwaka mabanga mpe mabele na mai (12)

  • 27

    • Loyembo ya mawa mpo na kozinda ya masuwa ya Tire (1-36)

  • 28

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela mokonzi ya Tire (1-10)

      • “Nazali nzambe” (2, 9)

    • Loyembo ya mawa mpo na mokonzi ya Tire (11-19)

      • “Ozalaki na Edene” (13)

      • “Keruba oyo atyami mafuta, oyo abatelaka” (14)

      • “Kozanga bosembo emonanaki epai na yo” (15)

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Sidone (20-24)

    • Elaka ya kozongisama ya Yisraele (25, 26)

  • 29

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Farao (1-16)

    • Ezipito ekopesama na Babilone lokola lifuti (17-21)

  • 30

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Ezipito (1-19)

      • Esakweli mpo na ndenge oyo Nebukadenezare akobundisa Ezipito (10)

    • Nguya ya Farao ekosila (20-26)

  • 31

    • Kokwea ya Ezipito, nzete monene ya sɛdrɛ (1-18)

  • 32

    • Loyembo ya mawa mpo na Farao mpe Ezipito (1-16)

    • Ezipito ekokundama elongo na baoyo bakatami ngenga te (17-32)

  • 33

    • Mikumba ya sinzili (1-20)

    • Nsango mpo na kokwea ya Yerusaleme (21, 22)

    • Nsango mpo na bato oyo bafandi na bisika oyo ebebisamá (23-29)

    • Bato basaleli te maloba oyo bayoki (30-33)

      • Ezekiele azali “lokola loyembo ya lolango” (32)

      • “Mosakoli moko azalaki na kati na bango” (33)

  • 34

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela babateli ya mpate ya Yisraele (1-10)

    • Yehova abatelaka bampate na ye (11-31)

      • “Mosaleli na ngai Davidi” akozala mobateli na bango (23)

      • “Kondimana ya kimya” (25)

  • 35

    • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela bangomba ya Seire (1-15)

  • 36

    • Esakweli mpo na bangomba ya Yisraele (1-15)

    • Kozongisama ya Yisraele (16-38)

      • ‘Nakosantisa nkombo na ngai monene’ (23)

      • “Lokola elanga ya Edene” (35)

  • 37

    • Emonaneli ya lobwaku ya mikuwa oyo ekauká (1-14)

    • Biteni mibale ya nzete ekokóma kaka moko (15-28)

      • Ekólo moko oyo ekozala na mokonzi moko (22)

      • Kondimana ya kimya mpo na seko (26)

  • 38

    • Goge akobundisa Yisraele (1-16)

    • Nkanda ya Yehova mpo na Goge (17-23)

      • ‘Bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova’ (23)

  • 39

    • Libebi ya Goge ná basoda na ye (1-10)

    • Kokundama na Lobwaku ya Hamone-Goge (11-20)

    • Kozongisama ya Yisraele (21-29)

      • Nzambe akosopela Yisraele elimo na ye (29)

  • 40

    • Ezekiele amemami na Yisraele na emonaneli (1, 2)

    • Ezekiele amoni emonaneli ya tempelo (3, 4)

    • Mapango mpe baporte na yango (5-47)

      • Porte ya libándá oyo ezalaki na ɛsti (6-16)

      • Lopango ya libándá; baporte mosusu (17-26)

      • Lopango ya kati mpe baporte (27-37)

      • Bisika ya kolya mpo na mosala ya tempelo (38-46)

      • Etumbelo (47)

    • Ndako ya kokɔtela ya tempelo (48, 49)

  • 41

    • Esika mosantu mpe oyo eleki mosantu ya tempelo (1-4)

    • Efelo mpe bashambrɛ ya mopanzi (5-11)

    • Ndako ya wɛsti (12)

    • Komeka molai mpe monene ya bandako (13-15a)

    • Kati ya esika mosantu ná esika eleki mosantu (15b-26)

  • 42

    • Bandako ya bisika ya kolya (1-14)

    • Mipanzi minei ya tempelo emekami na molai mpe na monene (15-20)

  • 43

    • Nkembo ya Yehova etondisi tempelo (1-12)

    • Etumbelo (13-27)

  • 44

    • Porte ya ɛsti ekozala kaka ya kokangama (1-3)

    • Mibeko etali bapaya (4-9)

    • Mibeko mpo na Balevi mpe banganza-nzambe (10-31)

  • 45

    • Likabo mosantu mpe engumba (1-6)

    • Eteni ya nkumu (7, 8)

    • Bankumu bakosala makambo na bosembo nyonso (9-12)

    • Makabo ya bato mpe nkumu (13-25)

  • 46

    • Makabo ya kopesa na mabaku mosusu (1-15)

    • Libula ya eloko ya nkumu (16-18)

    • Bisika ya kotɔkisa makabo (19-24)

  • 47

    • Mokɛli oyo ezali kouta na tempelo (1-12)

      • Mai ezali kokóma mozindo mokemoke (2-5)

      • Mai ya Mbu Ekufá ekobika (8-10)

      • Bisika ya pɔtɔpɔtɔ ekobika te (11)

      • Banzete mpo na bilei mpe kobikisa (12)

    • Bandelo ya mokili (13-23)

  • 48

    • Kokabolama ya mokili (1-29)

    • Baporte 12 ya engumba (30-35)

      • Engumba ekobengama “Yehova azali wana” (35)