Balevi 20:1-27

  • Losambo ya Moleke; kosolola na bilimo mabe (1-6)

  • Bózala basantu mpe bópesa baboti limemya (7-9)

  • Etumbu ya liwa mpo na masumu ya kosangisa nzoto (10-21)

  • Bózala basantu mpo na kotikala na mokili (22-26)

  • Moto oyo asololaka na bilimo asengeli kobomama (27)

20  Yehova alobaki lisusu na Moize ete:  “Okoloba na Bayisraele boye: ‘Moto nyonso na kati ya Yisraele, mpe mopaya nyonso oyo azali kofanda na Yisraele, oyo apesi Moleke moko ya bana na ye, asengeli kobomama mpenza.+ Bato ya mokili bakobamba ye mabanga tii akokufa.  Ngai moko nakotɛmɛla moto yango, mpe nakoboma* ye kati na bato na ye, mpo apesi Moleke moko ya bana na ye mpe akómisi esika mosantu na ngai mbindo+ mpe atuki nkombo na ngai mosantu.  Soki bato ya mokili yango bakangi miso na bango na nko na likambo oyo moto yango asali ntango apesi Moleke moko ya bana na ye mpe babomi ye te,+  ngai moko nakotɛmɛla mpenza moto yango ná libota na ye.+ Nakoboma* moto yango na kati ya bato na ye ná bato nyonso oyo bazali kosala bondumba na Moleke.  “‘Mpo na moto* oyo abaluki mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo+ mpe epai ya bato oyo basakolaka makambo ekoya+ mpo na kosala na bango bondumba ya elimo, nakotɛmɛla mpenza moto* yango mpe nakoboma* ye kati na bato na ye.+  “‘Bosengeli komisantisa mpe kokóma basantu,+ mpo ngai nazali Yehova Nzambe na bino.  Mpe bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe kotosa yango.+ Ngai Yehova, moto nazali kosantisa bino.+  “‘Soki moto moko alakeli tata na ye to mama na ye mabe, akobomama mpenza.+ Lokola alakeli tata na ye to mama na ye mabe, makila na ye ekozala na motó na ye. 10  “‘Mpo na mobali oyo asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu: Moto oyo asali ekobo na mwasi ya moninga na ye asengeli mpenza kobomama, mobali ya ekobo ná mwasi ya ekobo.+ 11  Mobali oyo alali na mwasi ya tata na ye, apesi tata na ye nsɔni.*+ Bango mibale basengeli mpenza kobomama. Makila na bango ezali na motó na bango. 12  Soki mobali moko alali na mwasi ya mwana na ye, bango mibale basengeli mpenza kobomama. Batosi te ndenge oyo makambo ebongisamá. Makila na bango ezali na motó na bango.+ 13  “‘Soki mobali moko alali na mobali ndenge moto alalaka na mwasi, bango mibale basali likambo oyo eyinamá.+ Basengeli mpenza kobomama. Makila na bango ezali na motó na bango. 14  “‘Soki mobali moko azwi mwasi ná mama ya mwasi yango, ezali etamboli ya nsɔni.+ Basengeli kozikisa ye ná bango na mɔtɔ,+ mpo etamboli ya nsɔni ezala te na kati na bino. 15  “‘Soki mobali moko asangisi nzoto na nyama, asengeli mpenza kobomama, mpe bokoboma nyama yango.+ 16  Soki mwasi moko asangisi nzoto na nyama,+ osengeli koboma mwasi yango ná nyama yango. Basengeli mpenza kobomama. Makila na bango ezali na motó na bango. 17  “‘Soki mobali moko asangisi nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye, mpe amoni mpenza bolumbu na ye, mpe mwana mwasi yango amoni mpenza bolumbu na ye, yango ezali nsɔni.+ Basengeli kobomama* na miso ya bana ya bato na bango. Apesi ndeko na ye ya mwasi nsɔni.* Asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye. 18  “‘Soki mobali moko alali na mwasi oyo azali komona sanza mpe asangisi na ye nzoto, bango mibale bamoni kotanga ya makila yango.+ Bango mibale basengeli kobomama* kati na bato na bango. 19  “‘Osengeli te kosangisa nzoto na ndeko mwasi ya mama na yo to na ndeko mwasi ya tata na yo, mpo yango ezali kopesa ndeko na ye ya makila nsɔni.+ Basengeli kozongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango. 20  Moto oyo alali na mwasi ya ndeko mobali ya tata na ye akopesa ndeko mobali ya tata na ye nsɔni.*+ Bakozongisa monɔkɔ mpo na lisumu na bango. Bakokufa kozanga kobota mwana. 21  Soki mobali moko azwi mwasi ya ndeko na ye, ezali likambo moko ya mabe mpenza.+ Apesi ndeko na ye nsɔni.* Bakobota te. 22  “‘Bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe bikateli na ngai nyonso+ mpe kotosa yango,+ mpo mokili epai nazali komema bino mpo bófanda, esanza bino te.+ 23  Bosengeli te kotambola na kolanda mibeko ya bikólo oyo nazali kobengana liboso na bino;+ mpo basalaki makambo wana nyonso mpe nazali koyina bango.+ 24  Yango wana, nalobaki na bino ete: “Bokozwa mokili na bango, mpe nakopesa bino yango mpo ezala ya bino, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Nazali Yehova Nzambe na bino, ngai moto nakaboli bino na bato ya bikólo mosusu.”+ 25  Bosengeli kokesenisa nyama ya pɛto ná ya mbindo mpe ndɛkɛ ya mbindo ná ya pɛto;+ bosengeli te komikómisa* bosɔtɔ na nyama to na ndɛkɛ to na eloko nyonso oyo etambolaka na mabele, oyo natye yango pembeni mpo na bino, mpo bótalela yango lokola mbindo.+ 26  Bosengeli kozala basantu mpo na ngai, mpo ngai Yehova nazali mosantu,+ mpe nazali kokabola bino na bato ya bikólo mpo bókóma bato na ngai.+ 27  “‘Mobali to mwasi oyo asalaka mosala ya kosolola na bilimo to oyo ayebisaka makambo ekoya,* asengeli mpenza kobomama.+ Bato bakobamba ye mabanga tii akokufa. Makila na ye ezali na motó na ye moko.’”

Maloba na nse

Lil., “nakolongola.”
Lil., “Nakolongola.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “nakolongola.”
Lil., “amoni bolumbu ya tata na ye.”
Lil., “kolongolama.”
Lil., “amoni bolumbu ya ndeko na ye ya mwasi.”
Lil., “kolongolama.”
Lil., “akomona bolumbu ya ndeko mobali ya tata na ye.”
Lil., “amoni bolumbu ya ndeko na ye.”
To, “kokómisa milimo na bino.”
To, “oyo azali na elimo ya kosakola makambo ekoya.”