Epai ya Bakolose 1:1-29

  • Mbote (1, 2)

  • Matɔndi epai ya Nzambe mpo na kondima ya Bakolose (3-8)

  • Libondeli mpo na bokoli ya elimo (9-12)

  • Mokumba monene ya Kristo (13-23)

  • Mosala makasi ya Paulo mpo na lisangá (24-29)

1  Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe, mpe Timote+ ndeko na biso,  epai ya basantu mpe bandeko ya sembo, oyo bazali na bomoko elongo na Kristo, oyo bazali na Kolose: Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso ezala na bino.  Topesaka ntango nyonso Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo matɔndi ntango tobondelaka mpo na bino,  banda toyoká nsango ya kondima na bino na makambo oyo etali Kristo Yesu mpe bolingo oyo bozali na yango epai ya basantu nyonso  mpo na elikya oyo babombeli bino na likoló.+ Boyokaki makambo ya elikya yango liboso na nzela ya nsango ya solo, nsango malamu  oyo eyaki epai na bino. Kaka ndenge nsango malamu ezali kobota mbuma mpe kokola na mokili mobimba,+ ndenge mpe ezali kosala kati na bino, banda mokolo oyo boyokaki mpe boyebaki malamumalamu boboto monene ya Nzambe na kati ya solo.  Yango nde boyekolaki epai ya Epafrasi,+ moombo mpe moninga na biso ya bolingo, oyo azali mosaleli* ya sembo ya Kristo na esika na biso.  Ayebisaki biso mpe ete elimo santu esalisaka bino mpo bómonisa bolingo.  Yango wana mpe banda mokolo oyo toyokaki yango, tozali kotika te kobondela mpo na bino+ mpe kosɛnga ete bótonda na boyebi ya solosolo+ ya mokano na ye na bwanya nyonso mpe bososoli ya elimo,+ 10  mpo bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na Yehova,* mpo bósepelisa ye mpenza wana bozali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na boyebi ya solosolo ya Nzambe;+ 11  tozali mpe kobondela ete Nzambe asalela bonene ya nguya na ye mpo na kopesa bino nguya monene+ mpo bóyika mpenza mpiko na motema molai ná esengo, 12  wana bozali kopesa matɔndi epai ya Tata oyo akómisi bino bato oyo babongi kosangana na libula ya basantu+ na kati ya pole. 13  Abikisi biso na nguya ya molili+ mpe akɔtisi biso na bokonzi ya Mwana na ye ya bolingo, 14  oyo na nzela na ye tozwi bonsomi na nzela ya lisiko, mpe tozwi bolimbisi ya masumu na biso.+ 15  Ye azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,+ mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá;+ 16  mpo na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te,+ ezala bakiti ya bokonzi to bonkolo to baguvɛrnema to makonzi. Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye+ mpe mpo na ye. 17  Lisusu, ye azali liboso ya biloko mosusu nyonso+ mpe na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki, 18  mpe azali motó ya nzoto, lisangá.+ Azali ebandeli, mwana ya liboso uta na bakufi,+ mpo akóma moto ya liboso na makambo nyonso; 19  mpo Nzambe asepelaki ete bizaleli na ye nyonso ezala na kati ya Kristo,+ 20  mpe na nzela ya Kristo, azongisa lisusu boyokani kati na ye ná biloko mosusu nyonso,+ ezala biloko oyo ezali na mabele to biloko oyo ezali na likoló, ndenge atye kimya na lisalisi ya makila+ oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi.* 21  Ya solo, bino baoyo bozalaki liboso mosika na Nzambe mpe banguna mpo makanisi na bino ezalaki na misala ya mabe, 22  azongisi bino sikoyo na boyokani na lisalisi ya nzoto ya mosuni ya moto wana, na nzela ya liwa na ye, mpo na kobimisa bino liboso na ye basantu, bato bazangi litɔnɔ mpe bato oyo bakoki kofundama na likambo moko te+ 23  soki ya solo, botikali na kondima,+ botɛlɛmi makasi likoló ya moboko,+ bopikami+ mpe bozali koningana te na elikya ya nsango malamu wana oyo boyokaki, mpe oyo esakolamaki na kati ya bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.+ Ngai, Paulo, nakómá mosaleli ya nsango malamu yango.+ 24  Nazali kosepela atako nazali konyokwama mpo na bolamu na bino.+ Nazali konyokwama lokola Kristo, kasi nasengeli konyokwama tii na nsuka mpo na bolamu ya nzoto ya Kristo,+ elingi koloba, lisangá.+ 25  Nakómá mosaleli ya lisangá yango na boyokani na mosala ya kapita+ oyo Nzambe apesaki ngai mpo na litomba na bino, mpo na kosakola liloba ya Nzambe malamumalamu, 26  sekele mosantu+ oyo ebombamaki banda na bibongiseli ya kalakala*+ mpe na mabota ya kalakala. Kasi sikoyo emonisami polele epai ya basantu na ye,+ 27  oyo Nzambe asepeli koyebisa bango na kati ya bikólo nkembo ya sekele mosantu yango.+ Sekele yango ezali Kristo na bomoko elongo na bino, elikya ya nkembo na ye.+ 28  Ye nde moto oyo tozali kosakola, wana tozali kokebisa moto nyonso mpe koteya moto nyonso na bwanya nyonso, mpo tómonisa moto nyonso epai ya Nzambe ete azali moyekoli ya Kristo oyo akɔmɛli.+ 29  Ezali mpo na yango mpenza nde nazali kosala mosala makasi, mpe nazali koboma nzoto na lisalisi ya makasi na ye, oyo ezali mpenza kosala mosala na kati na ngai.+

Maloba na nse

To, “ministre.”
Talá Ap. A5.
To, “bileko ya kalakala.” Talá Ndimbola ya maloba.