Mokanda ya mibale ya Petro 2:1-22

  • Bateyi ya lokuta bakobima (1-3)

  • Bateyi ya lokuta bakozwa mpenza etumbu (4-10a)

    • Baanzelu babwakami na Tartare (4)

    • Mpela; Sodoma ná Gomora (5-7)

  • Ndenge oyo bateyi ya lokuta bazali (10b-22)

2  Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato ya Yisraele, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bango bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ebebisaka, mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bongo bakomiyeisela libebi nokinoki.  Mingi bakolanda etamboli na bango ya nsɔni,*+ mpe mpo na bango, bakoloba mabe mpo na nzela ya solo.+  Lisusu, bakolyela bino na lokoso na maloba na bango ya bokosi. Kasi etumbu oyo bakatelá bango banda kala+ ekoumela te, mpe libebi na bango ekolala mpɔngi te.+  Ya solo, Nzambe amipekisaki te kopesa etumbu na baanzelu oyo basumukaki,+ kasi abwakaki bango na Tartare.*+ Atyaki bango minyololo na molili makasi mpenza mpo bázela kosambisama.+  Mpe amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu,+ kasi abatelaki Noa, mosakoli ya bosembo,+ ná bato mosusu nsambo+ ntango ayeisaki mpela na mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.+  Mpe ndenge akómisaki bingumba ya Sodoma ná Gomora putulu ya mɔtɔ mpe akweisaki yango na likambo,+ apesi bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.+  Mpe abikisaki Lota moto ya sembo,*+ oyo atungisamaki makasi na etamboli ya nsɔni na nko* ya bato oyo babukaka mibeko—  mpo mokolo na mokolo moto wana ya sembo anyokolaki molimo* na ye ya bosembo mpo na makambo ya mabe* oyo azalaki komona mpe koyoka ntango azalaki kofanda kati na bango.  Na yango, Yehova* ayebi kobikisa na komekama bato oyo bakangami na ye,+ kasi kobomba bato oyo bazangi bosembo mpo bábomama* na mokolo ya kosambisama,+ 10  mingimingi baoyo balukaka kobebisa nzoto* ya basusu+ mpe oyo batyolaka bokonzi.*+ Lokola bazali na lofundo mpe motó makasi, babangaka te koloba mabe mpo na bato ya nkembo. 11  Nzokande baanzelu, atako baleki bango na makasi mpe na nguya, bafundaka bango na maloba ya kofinga te, mpo bazalaka na limemya mpo na* Yehova.*+ 12  Kasi lokola banyama oyo ezangá mayele, oyo esalaka makambo na lɔɔmbi mpe oyo ebotamá* mpo ekangama mpe ebomama, bato wana balobaka mabe mpo na makambo oyo bayebi te.+ Bakobebisama mpo basalaka makambo oyo ememaka na libebi. 13  Mabe ekokómela bango lokola mbano mpo na misala na bango ya mabe. Basepelaka komipesa na bomoi ya bisengo,+ ata na moi. Bazali matɔnɔ mpe mbeba, bato oyo basepelaka* na mateya na bango ya bokosi wana bazali kolya elongo na bino.+ 14  Miso na bango etondi na ekobo+ mpe ekokaka kotika lisumu te, mpe babendaka baoyo bapikami te. Bazali na motema oyo bamesanisá na lokoso. Bazali bana oyo balakelamá mabe. 15  Batiki nzela ya semba mpe babungi nzela. Balandi nzela ya Balaama+ mwana ya Beore, oyo alingaki lifuti oyo bazalaki kopesa ye mpo na kosala mabe,+ 16  kasi azwaki mpamela mpo abukaki mobeko.+ Nyama oyo ememaka mikumba mpe oyo elobaka te elobaki na mongongo ya moto mpe ekangelaki bozoba ya mosakoli yango nzela.+ 17  Bato yango bazali maziba oyo ezali na mai te, mpe londende oyo ememami na mopɛpɛ makasi; molili makasi mpenza ebombami mpo na bango.+ 18  Balobaka maloba ebeleebele oyo ezali na ntina te. Na nzela ya bamposa ya mosuni+ mpe ya misala ya etamboli ya nsɔni na nko,* bazali kobenda bato oyo bauti kaka sikoyo kokima baoyo basalaka makambo ya mabe.+ 19  Bazali kolaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali baombo ya libebi;+ mpo moto nyonso oyo alongami na moto mosusu* akómi moombo ya moto yango.+ 20  Ya solo, soki nsima ya kokima mbindo ya mokili+ na nzela ya boyebi ya solosolo ya Nkolo mpe Mobikisi Yesu Kristo, bazongeli lisusu makambo yango mpe balongami, nsuka na bango ekómi mabe koleka liboso.+ 21  Elingaki kozala malamu koleka soki bázwaka te boyebi ya sikisiki na nzela ya bosembo na esika ete báyeba yango mpenza, bongo na nsima bápesa mokɔngɔ na mobeko mosantu oyo bazwaki.+ 22  Makambo oyo lisese ya solo elobi ekokisami epai na bango, ete: “Mbwa ezongeli biloko oyo yango moko esanzi, mpe ngulu oyo basukolaki ezongi kobaluka na pɔtɔpɔtɔ.”+

Maloba na nse

To, “misala na bango ya etamboli ezangá nsɔni.” Boike ya liloba ya Grɛki asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “moyengebene.”
To, “etamboli ezangá nsɔni.” Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ya kobuka mibeko.”
Talá Ap. A5.
Lil., “bálongolama.”
To, “bonkolo.”
Lil., “mosuni.”
To, “liboso ya.”
Talá Ap. A5.
To, “babotamá kaka.”
To, “bato oyo bamipesaka na bisengo mpenza.”
To, “misala ya etamboli ezangá nsɔni.” Boike ya liloba ya Grɛki asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na eloko moko.”