Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya mibale ya Bakonzi

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Eliya asakoli liwa ya Ahazia (1-18)

  • 2

    • Eliya amemami na kati ya mopɛpɛ makasi (1-18)

      • Elisha azwi elamba ya Eliya (13, 14)

    • Elisha akómisi mai ya Yeriko pɛto (19-22)

    • Baurse ebomi bilenge mibali na Betele (23-25)

  • 3

    • Yehorame, mokonzi ya Yisraele (1-3)

    • Moabe etombokeli Yisraele (4-25)

    • Moabe ekwei (26, 27)

  • 4

    • Elisha asali ete mafuta ya mwasi oyo mobali akufá ekóma mingi (1-7)

    • Mwasi moko Moshuneme amonisi ezaleli ya koyamba bapaya (8-16)

    • Mwasi yango aboti mwana mobali; mwana yango akufi (17-31)

    • Elisha asekwisi mwana ya mwasi yango (32-37)

    • Elisha ayeisi supu elɛngi (38-41)

    • Elisha asali ete mampa ekóma mingi (42-44)

  • 5

    • Elisha abikisi Naamane na maladi ya maba (1-19)

    • Gehazi moto ya lokoso azwi maladi ya maba (20-27)

  • 6

    • Elisha asali ete ebende ya epasola etepatepa likoló ya mai (1-7)

    • Elisha ná bato ya Siri (8-23)

      • Miso ya mosaleli ya Elisha efungwami (16, 17)

      • Elisha abomi bato ya Siri miso (18, 19)

    • Bazingi Samaria mpe nzala ekɔti (24-33)

  • 7

    • Elisha asakoli ete nzala ekosila (1, 2)

    • Bakuti bilei na kaa ya bato ya Siri (3-15)

    • Esakweli ya Elisha ekokisami (16-20)

  • 8

    • Bazongiseli mwasi Moshuneme mabele na ye (1-6)

    • Elisha, Bene-hadade, mpe Hazaele (7-15)

    • Yehorame, mokonzi ya Yuda (16-24)

    • Ahazia, mokonzi ya Yuda (25-29)

  • 9

    • Batye Yehu mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisraele (1-13)

    • Yehu abomi Yehorame ná Ahazia (14-29)

    • Babomi Yezabele; bambwa elei nzoto na ye (30-37)

  • 10

    • Yehu abomi bato ya libota ya Ahaba (1-17)

      • Yehonadabe akei elongo na Yehu (15-17)

    • Yehu abomi basambeli ya Baala (18-27)

    • Boyangeli ya Yehu na mokuse (28-36)

  • 11

    • Atalia abɔtɔli bokonzi (1-3)

    • Yehoashe atyami mokonzi na kobombana (4-12)

    • Babomi Atalia (13-16)

    • Yehoyada abongisi makambo (17-21)

  • 12

    • Yehoashe, mokonzi ya Yuda (1-3)

    • Yehoashe abongisi tempelo (4-16)

    • Etumba ya bato ya Siri (17, 18)

    • Babomi Yehoashe (19-21)

  • 13

    • Yehoahaze, mokonzi ya Yisraele (1-9)

    • Yehoashe, mokonzi ya Yisraele (10-13)

    • Elisha ameki molende ya Yehoashe (14-19)

    • Elisha akufi; mikuwa na ye esekwisi mobali moko (20, 21)

    • Esakweli ya nsuka ya Elisha ekokisami (22-25)

  • 14

    • Amazia, mokonzi ya Yuda (1-6)

    • Etumba ná Edome, mpe ná Yisraele (7-14)

    • Liwa ya Yehoashe, mokonzi ya Yisraele (15, 16)

    • Liwa ya Amazia (17-22)

    • Yeroboame II, mokonzi ya Yisraele (23-29)

  • 15

    • Azaria, mokonzi ya Yuda (1-7)

    • Bakonzi ya nsuka ya Yisraele: Zekaria (8-12), Shalume (13-16), Menaheme (17-22), Pekahia (23-26), Peka (27-31)

    • Yotame, mokonzi ya Yuda (32-38)

  • 16

    • Ahaze, mokonzi ya Yuda (1-6)

    • Ahaze apesi Baasiri kanyaka (7-9)

    • Ahaze asali etumbelo ya bapakano (10-18)

    • Liwa ya Ahaze (19, 20)

  • 17

    • Hoshea, mokonzi ya Yisraele (1-4)

    • Kokwea ya Yisraele (5, 6)

    • Yisraele ememami na mboka mopaya mpo na lipɛngwi (7-23)

    • Bapaya bakómi kofanda na bingumba ya Samaria (24-26)

    • Samaria esangisi losambo ndenge na ndenge (27-41)

  • 18

    • Ezekiasi, mokonzi ya Yuda (1-8)

    • Makambo etali kokwea ya Yisraele (9-12)

    • Senakeribe ayei kobundisa Yuda (13-18)

    • Rabashake atumoli Yehova (19-37)

  • 19

    • Ezekiasi aluki lisalisi ya Nzambe na nzela ya Yisaya (1-7)

    • Senakeribe alobi ete akobundisa Yerusaleme (8-13)

    • Libondeli ya Ezekiasi (14-19)

    • Yisaya ayebisi eyano ya Nzambe (20-34)

    • Anzelu abomi Baasiri 185 000 (35-37)

  • 20

    • Ezekiasi abɛli mpe abiki (1-11)

    • Bamemi-nsango bauti na Babilone (12-19)

    • Liwa ya Ezekiasi (20, 21)

  • 21

    • Manase, mokonzi ya Yuda; asopi makila mingi (1-18)

      • Yerusaleme ekobebisama (12-15)

    • Amone, mokonzi ya Yuda (19-26)

  • 22

    • Yosiya, mokonzi ya Yuda (1, 2)

    • Malako mpo na kobongisa tempelo (3-7)

    • Bamoni buku ya Mobeko (8-13)

    • Huluda asakoli ete mpasi ekoya (14-20)

  • 23

    • Yosiya abongisi makambo (1-20)

    • Basali fɛti ya Elekeli (21-23)

    • Yosiya abongisi makambo mosusu (24-27)

    • Liwa ya Yosiya (28-30)

    • Yehoahaze, mokonzi ya Yuda (31-33)

    • Yehoyakime, mokonzi ya Yuda (34-37)

  • 24

    • Botomboki ya Yehoyakime mpe liwa na ye (1-7)

    • Yehoyakine, mokonzi ya Yuda (8, 9)

    • Komemama ya liboso na Babilone (10-17)

    • Zidikiya, mokonzi ya Yuda; botomboki na ye (18-20)

  • 25

    • Nebukadenezare azingi Yerusaleme (1-7)

    • Yerusaleme ná tempelo na yango ebebisami; komemama ya mibale (8-21)

    • Gedalia akómi guvɛrnɛrɛ (22-24)

    • Babomi Gedalia; bato bakimi na Ezipito (25, 26)

    • Yehoyakine abimi na bolɔkɔ na Babilone (27-30)