Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya liboso ya Samwele

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Elekana ná basi na ye (1-8)

    • Hana, oyo azalaki ekomba, abondeli mpo abota mwana mobali (9-18)

    • Samwele abotami mpe apesami epai ya Yehova (19-28)

  • 2

    • Libondeli ya Hana (1-11)

    • Masumu ya bana mibale ya Eli (12-26)

    • Yehova akateli libota ya Eli etumbu (27-36)

  • 3

    • Samwele andimami lokola mosakoli (1-21)

  • 4

    • Bafilistia babɔtɔli Sanduku (1-11)

    • Eli ná bana na ye bakufi (12-22)

  • 5

    • Sanduku na teritware ya Bafilistia (1-12)

      • Dagone asambwe (1-5)

      • Bafilistia bazwi etumbu (6-12)

  • 6

    • Bafilistia bazongisi Sanduku na Yisraele (1-21)

  • 7

    • Sanduku ekómi na Kiriate-yearime (1)

    • Samwele alendisi bato: ‘Bósalela kaka Yehova’ (2-6)

    • Bolongi ya Yisraele na Mizipa (7-14)

    • Samwele asambisi Yisraele (15-17)

  • 8

    • Yisraele esɛngi mokonzi (1-9)

    • Samwele akebisi bato (10-18)

    • Yehova andimi kotyela bango mokonzi ndenge basɛngi (19-22)

  • 9

    • Samwele akutani ná Saulo (1-27)

  • 10

    • Saulo atyami mafuta mpo na kokóma mokonzi (1-16)

    • Balakisi Saulo na miso ya bato (17-27)

  • 11

    • Saulo alongi Baamone (1-11)

    • Saulo amonisami lisusu lokola mokonzi (12-15)

  • 12

    • Maloba ya nsuka ya Samwele (1-25)

      • ‘Bólanda banzambe ya lokuta te’ (21)

      • Yehova akosundola bato na ye te (22)

  • 13

    • Saulo aponi basoda na ye (1-4)

    • Saulo asali makambo na lofundo (5-9)

    • Samwele apameli Saulo (10-14)

    • Yisraele ezali na bibundeli te (15-23)

  • 14

    • Yonatane asali likambo ya kokamwa na Mikemashe (1-14)

    • Nzambe akɔtisi yikiyiki epai ya banguna ya Yisraele (15-23)

    • Saulo alapisi bato ndai kozanga kokanisa (24-46)

      • Bato balei mosuni ná makila na yango (32-34)

    • Bitumba ya Saulo; bato ya libota na ye (47-52)

  • 15

    • Saulo atosi te, atiki Agage na bomoi (1-9)

    • Samwele apameli Saulo (10-23)

      • “Kotosa eleki kopesa mbeka” (22)

    • Saulo akozala lisusu mokonzi te (24-29)

    • Samwele abomi Agage (30-35)

  • 16

    • Samwele atye Davidi mafuta mpo akóma mokonzi (1-13)

      • “Yehova atalaka oyo ezali na kati ya motema” (7)

    • Elimo ya Nzambe elongwe epai ya Saulo (14-17)

    • Davidi akómi kobɛtɛla Saulo nzɛnzɛ (18-23)

  • 17

    • Davidi abomi Goliate (1-58)

      • Goliate atumoli Yisraele (8-10)

      • Davidi abimi kobunda na Goliate (32-37)

      • Davidi abundi na nkombo ya Yehova (45-47)

  • 18

    • Boninga ya Davidi ná Yonatane (1-4)

    • Bolongi ya Davidi esali ete Saulo akóma na zuwa (5-9)

    • Saulo aluki koboma Davidi (10-19)

    • Davidi abali Mikale, mwana ya Saulo (20-30)

  • 19

    • Saulo akobi koyina Davidi (1-13)

    • Davidi akimi Saulo (14-24)

  • 20

    • Bosembo ya Yonatane epai ya Davidi (1-42)

  • 21

    • Davidi alei mampa ya kolakisa na Nobe (1-9)

    • Davidi amikómisi lokola moto ya ligboma na Gate (10-15)

  • 22

    • Davidi akimi na Adulame mpe na Mizipe (1-5)

    • Saulo abomisi banganga-nzambe ya Nobe (6-19)

    • Abiatare akimi (20-23)

  • 23

    • Davidi abikisi engumba Keila (1-12)

    • Saulo alandi Davidi (13-15)

    • Yonatane alendisi Davidi (16-18)

    • Davidi alongi kokima Saulo (19-29)

  • 24

    • Davidi aboyi koboma Saulo (1-22)

      • Davidi amonisi limemya mpo na moto oyo Yehova atye mafuta (6)

  • 25

    • Liwa ya Samwele (1)

    • Nabale abengani bato ya Davidi (2-13)

    • Abigaile amonisi bwanya (14-35)

      • ‘Na kati ya saki ya bomoi epai ya Yehova’ (29)

    • Yehova abomi Nabale (36-38)

    • Abigaile akómi mwasi ya Davidi (39-44)

  • 26

    • Davidi aboyi lisusu koboma Saulo (1-25)

      • Davidi amonisi limemya mpo na moto oyo Yehova atye mafuta (11)

  • 27

    • Bafilistia bapesi Davidi engumba Ziklage (1-12)

  • 28

    • Saulo akei epai ya mwasi moko oyo asololaka na bilimo na Ene-dore (1-25)

  • 29

    • Bafilistia batyeli Davidi motema te (1-11)

  • 30

    • Baamaleke babundisi Ziklage mpe batumbi yango (1-6)

      • Nzambe apesi Davidi makasi (6)

    • Davidi abomi bapunzi ya Baamaleke (7-31)

      • Davidi azwi lisusu bakangami (18, 19)

      • Davidi apesi malako mpo na biloko oyo bapunzi (23, 24)

  • 31

    • Liwa ya Saulo ná bana na ye misato (1-13)