Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Davidi ná Abishage (1-4)

    • Adoniya aluki kozwa bokonzi (5-10)

    • Natane ná Bate-sheba bakɔti likambo yango (11-27)

    • Davidi apesi mitindo ete bátya Salomo mafuta (28-40)

    • Adoniya akei komibomba na etumbelo (41-53)

  • 2

    • Davidi apesi Salomo malako (1-9)

    • Davidi akufi; Salomo afandi na kiti ya bokonzi (10-12)

    • Makambo oyo Adoniya aluki ememi ye na liwa (13-25)

    • Babengani Abiatare; babomi Yoabe (26-35)

    • Babomi Shimei (36-46)

  • 3

    • Salomo abali mwana ya Farao (1-3)

    • Yehova abimeli Salomo na ndɔtɔ (4-15)

      • Salomo asɛngi bwanya (7-9)

    • Salomo akati likambo ya bamama mibale (16-28)

  • 4

    • Bakonzi na boyangeli ya Salomo (1-19)

    • Bomɛngo na boyangeli ya Salomo (20-28)

      • Kimya na nse ya nzete ya vinyo mpe ya figi (25)

    • Bwanya mpe masese ya Salomo (29-34)

  • 5

    • Mokonzi Hirame atindi banzete mpo na mosala ya kotonga (1-12)

    • Salomo azwi bato mpo na kosala misala ya makasi (13-18)

  • 6

    • Salomo atongi tempelo (1-38)

      • Esika Eleki Mosantu (19-22)

      • Bakeruba (23-28)

      • Mayemi, baporte, lopango ya kati (29-36)

      • Tempelo esili nsima ya mbula soki nsambo (37, 38)

  • 7

    • Ndako ya Salomo mpe biteni na yango (1-12)

    • Hirame, moto oyo ayebi mosala, asalisi Salomo (13-47)

      • Makonzí mibale ya kwivre (15-22)

      • Ebombelo monene ya mai ya ebende oyo enyangwisami (23-26)

      • Bashario zomi mpe basaani ya kwivre (27-39)

    • Basilisi kosala bisaleli ya wolo (48-51)

  • 8

    • Bamemi Sanduku na tempelo (1-13)

    • Salomo alobi na bato (14-21)

    • Salomo asali libondeli ya bofungoli tempelo (22-53)

    • Salomo apamboli bato (54-61)

    • Bambeka mpe fɛti ya bofungoli (62-66)

  • 9

    • Yehova abimeli lisusu Salomo (1-9)

    • Likabo oyo Salomo apesi Mokonzi Hirame (10-14)

    • Biloko ndenge na ndenge oyo Salomo atongaki (15-28)

  • 10

    • Mokonzi-mwasi ya Sheba ayei kotala Salomo (1-13)

    • Ebele ya bomɛngo ya Salomo (14-29)

  • 11

    • Basi ya Salomo bapɛngwisi motema na ye (1-13)

    • Batɛmɛli ya Salomo (14-25)

    • Balaki Yeroboame mabota zomi (26-40)

    • Salomo akufi; Rehoboame akómi mokonzi (41-43)

  • 12

    • Rehoboame apesi bato eyano ya mabe (1-15)

    • Mabota zomi etomboki (16-19)

    • Yeroboame akómi mokonzi ya Yisraele (20)

    • Rehoboame asengeli kobundisa Yisraele te (21-24)

    • Yeroboame abandisi losambo ya mwana-ngɔmbɛ (25-33)

  • 13

    • Esakweli oyo etali etumbelo ya Betele (1-10)

      • Etumbelo ebukani (5)

    • Moto ya Nzambe azangi botosi (11-34)

  • 14

    • Esakweli ya Ahiya mpo na Yeroboame (1-20)

    • Boyangeli ya Rehoboame na Yuda (21-31)

      • Etumba ya Shishake (25, 26)

  • 15

    • Abiyame, mokonzi ya Yuda (1-8)

    • Asa, mokonzi ya Yuda (9-24)

    • Nadabe, mokonzi ya Yisraele (25-32)

    • Baasha, mokonzi ya Yisraele (33, 34)

  • 16

    • Yehova akateli Baasha etumbu (1-7)

    • Ela, mokonzi ya Yisraele (8-14)

    • Zimiri, mokonzi ya Yisraele (15-20)

    • Omiri, mokonzi ya Yisraele (21-28)

    • Ahaba, mokonzi ya Yisraele (29-33)

    • Hiele atongi lisusu Yeriko (34)

  • 17

    • Mosakoli Eliya asakoli eleko ya kokauka (1)

    • Bayanganga ememeli Eliya bilei (2-7)

    • Eliya akei epai ya mwasi moko ya Zarefate oyo mobali akufá (8-16)

    • Mwana ya mwasi yango akufi mpe asekwi (17-24)

  • 18

    • Eliya akutani na Obadia mpe Ahaba (1-18)

    • Eliya ná basakoli ya Baala na Karamele (19-40)

      • ‘Kokakatana’ (21)

    • Eleko ya kokauka ya mbula misato ná ndambo esuki (41-46)

  • 19

    • Eliya akimi nkanda ya Yezabele (1-8)

    • Yehova abimeli Eliya na Horebe (9-14)

    • Eliya asengeli kotya Hazaele, Yehu, mpe Elisha mafuta (15-18)

    • Elisha akokóma mosakoli nsima ya Eliya (19-21)

  • 20

    • Bato ya Siri babundisi Ahaba (1-12)

    • Ahaba alongi bato ya Siri (13-34)

    • Esakweli mpo na Ahaba (35-43)

  • 21

    • Ahaba aluli elanga ya vinyo ya Nabote (1-4)

    • Yezabele abomisi Nabote (5-16)

    • Eliya ayebisi nsango ya etumbu mpo na Ahaba (17-26)

    • Ahaba amikitisi (27-29)

  • 22

    • Yehoshafate asali boyokani ná Ahaba (1-12)

    • Mikaya asakoli ete bakolonga te (13-28)

      • Anzelu moko abubi Ahaba (21, 22)

    • Babomi Ahaba na Ramote-gileade (29-40)

    • Boyangeli ya Yehoshafate na Yuda (41-50)

    • Ahazia akómi mokonzi ya Yisraele (51-53)