Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Mitángo

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Kokoma mibali nkombo mpo na kokende etumba (1-46)

    • Balevi bakomami nkombo te mpo na kokende etumba (47-51)

    • Ndenge oyo kaa ebongisami (52-54)

  • 2

    • Kaa ebongisami na kolanda etuluku ya mabota misato (1-34)

      • Na ɛsti, etuluku ya libota ya Yuda (3-9)

      • Na sudi, etuluku ya libota ya Rubene (10-16)

      • Na katikati, kaa ya Levi (17)

      • Na wɛsti, etuluku ya libota ya Efraime (18-24)

      • Na nɔrdi, etuluku ya libota ya Dani (25-31)

      • Motángo ya mibali nyonso oyo bakomisami nkombo (32-34)

  • 3

    • Bana mibali ya Arona (1-4)

    • Balevi baponami mpo na kopesa banganga-nzambe mabɔkɔ (5-39)

    • Kosikolama ya mwana nyonso ya liboso (40-51)

  • 4

    • Mosala ya bana ya Kohate (1-20)

    • Mosala ya bana ya Gereshone (21-28)

    • Mosala ya bana ya Merari (29-33)

    • Kokomisa bato nkombo emonisami na mokuse (34-49)

  • 5

    • Kotya libándá ya kaa moto oyo azali mbindo (1-4)

    • Koyambola lisumu mpe kopesa motuya oyo ekokani na ngambo (5-10)

    • Komekama ya mai ntango mobali akanisi ete mwasi asali ekobo (11-31)

  • 6

    • Elako ya Bonaziri (1-21)

    • Mapamboli ya banganga-nzambe (22-27)

  • 7

    • Makabo ya bofungoli ya tabernakle (1-89)

  • 8

    • Arona apelisi miinda nsambo (1-4)

    • Balevi bapɛtolami, mpe babandi mosala (5-22)

    • Mbula oyo moto akoki kosala mosala ya Molevi (23-26)

  • 9

    • Malako mpo na moto oyo asali Elekeli te na ntango oyo etyamá (1-14)

    • Lipata mpe mɔtɔ likoló ya tabernakle (15-23)

  • 10

    • Bakelelo ya palata (1-10)

    • Balongwe na Sinai (11-13)

    • Kotambola na molɔngɔ (14-28)

    • Moize asɛngi Hobabe atambwisa Yisraele (29-34)

    • Libondeli ya Moize ntango bazali kolongola kaa (35, 36)

  • 11

    • Komilelalela esali ete mɔtɔ eutá epai ya Nzambe (1-3)

    • Bato baleli mpo na mosuni (4-9)

    • Moize amoni ete akokoka te (10-15)

    • Yehova apesi bankulutu 70 elimo na ye (16-25)

    • Eledade ná Medade; Yosua ayoki zuwa mpo na Moize (26-30)

    • Atindi bandɛkɛ na nkombo kayɛ; bato bazwi etumbu mpo na lokoso na bango (31-35)

  • 12

    • Miriame ná Arona batɛmɛli Moize (1-3)

      • “Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso” (3)

    • Yehova alongisi Moize (4-8)

    • Miriame azwi maladi ya maba (9-16)

  • 13

    • Batindi banɔngi 12 na mokili ya Kanana (1-24)

    • Banɔngi 10 bapesi nsango ya mabe (25-33)

  • 14

    • Bato bazali na mposa ya kozonga na Ezipito (1-10)

      • Yosua ná Kalebe bapesi nsango ya malamu (6-9)

    • Nkanda ya Yehova; Moize abondeli mpo na bato (11-19)

    • Etumbu: Mbula 40 na esobe (20-38)

    • Baamaleke balongi Yisraele (39-45)

  • 15

    • Mibeko etali makabo (1-21)

      • Mobeko kaka moko mpo na bana-mboka mpe bato oyo bafandi bapaya (15, 16)

    • Makabo mpo na masumu oyo esalemi na nko te (22-29)

    • Etumbu mpo na masumu oyo esalemi na nko (30, 31)

    • Moto moko abomami mpo abuki mobeko ya Sabata (32-36)

    • Kosala ndelo ya malendamalenda ya bilamba (37-41)

  • 16

    • Botomboki ya Kora, Datane mpe Abirame (1-19)

    • Etumbu mpo na batomboki (20-50)

  • 17

    • Lingenda ya Arona ebimisi nkasa ya sika (1-13)

  • 18

    • Mikumba ya banganga-nzambe mpe ya Balevi (1-7)

    • Makabo mpo na banganga-nzambe (8-19)

      • Kondimana ya mungwa (19)

    • Balevi bazwi moko ya bandambo zomi mpe bapesi moko ya bandambo zomi (20-32)

  • 19

    • Ngɔmbɛ-mwasi ya motane mpe mai ya kopɛtola (1-22)

  • 20

    • Miriame akufi na Kadeshe (1)

    • Moize abɛti libanga mpe asali lisumu (2-13)

    • Edome aboyi kotikela Yisraele nzela (14-21)

    • Liwa ya Arona (22-29)

  • 21

    • Balongi mokonzi ya Arade (1-3)

    • Nyoka ya kwivre (4-9)

    • Yisraele etamboli zingazinga ya Moabe (10-20)

    • Balongi mokonzi Sihone ya Baamore (21-30)

    • Balongi mokonzi Oge (31-35)

  • 22

    • Balake abengisi Balaama (1-21)

    • Mpunda ya Balaama elobi (22-41)

  • 23

    • Liloba ya lisese ya liboso ya Balaama (1-12)

    • Liloba ya lisese ya mibale ya Balaama (13-30)

  • 24

    • Liloba ya lisese ya misato ya Balaama (1-11)

    • Liloba ya lisese ya minei ya Balaama (12-25)

  • 25

    • Yisraele esali lisumu ná basi ya Moabe (1-5)

    • Finehase akangi mabɔkɔ te (6-18)

  • 26

    • Mabota ya Yisraele ekomisami nkombo mpo na mbala ya mibale (1-65)

  • 27

    • Bana basi ya Zelofehade (1-11)

    • Yosua aponami mpo na kozwa esika ya Moize (12-23)

  • 28

    • Malako mpo na makabo ndenge na ndenge (1-31)

      • Makabo ya mokolo na mokolo (1-8)

      • Mpo na Sabata (9, 10)

      • Makabo ya sanza mokomoko (11-15)

      • Mpo na Elekeli (16-25)

      • Mpo na Fɛti ya Bapɔsɔ (26-31)

  • 29

    • Malako mpo na makambo ndenge na ndenge (1-40)

      • Mokolo ya Kobɛta kelelo (1-6)

      • Mokolo ya Kozipa masumu (7-11)

      • Fɛti ya Bandako ya matiti (12-38)

  • 30

    • Bilako ya mibali (1, 2)

    • Bilako ya basi mpe ya bana basi (3-16)

  • 31

    • Kozongisela Midiane mabe (1-12)

      • Balaama abomami (8)

    • Malako mpo na biloko oyo bapunzi na etumba (13-54)

  • 32

    • Bisika ya kofanda na ɛsti ya Yordani (1-42)

  • 33

    • Mibembo ndenge na ndenge ya Yisraele na esobe (1-49)

    • Malako mpo na ndenge ya kozwa mokili ya Kanana (50-56)

  • 34

    • Bandelo ya Kanana (1-15)

    • Mibali oyo baponami mpo na kokabola mokili (16-29)

  • 35

    • Bingumba mpo na Balevi (1-8)

    • Bingumba ya ekimelo (9-34)

  • 36

    • Mobeko mpo na libala ya basi oyo bazali na libula (1-13)