Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisalisi mpo na libota

Masolo oyo epesi toli ya Biblia, oyo ekoki kosalisa mabota. * Mpo na komona liste ya masolo oyo ekosalisa mabota, talá eteni oyo elobeli Libala mpe Libota.

^ par. 2 Na eteni oyo, bato oyo tolobeli awa topesi bango bankombo mosusu.

Libala

Ndenge malamu ya kotalela mwa bizaleli ya molongani na yo oyo esilikisaka yo

Na esika otika mwa ezaleli ya molongani na yo ebimisa matata na libala na bino, okoki kotalela mwa ezaleli yango na ndenge mosusu to na ndenge ebongi.

Oyo nakoki kosala mpo na komonisa motema molai

Ntango bato mibale ya kozanga kokoka babalani, mikakatano ndenge na ndenge ebimaka. Motema molai ezali na ntina mingi mpo libala elonga.

Ndenge ya komoniselana limemya

Komonisa limemya na libala ezali te likambo ya kosala soki olingi; kasi esengeli nde komonisaka yango. Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka molongani na yo?

Kokumisa molongani na yo

Soki mwasi ná mobali bazali kosala makasi ya komona bizaleli malamu ya moninga mpe kokumisa yango, boyokani na bango ekomaka makasi. Nini ekoki kosalisa yo okóma na ezaleli yango?

Mpo libala ezala na esengo: Monisá ete olingaka molongani na yo

Mosala, mitungisi, mpe mikakatano ya mokolo na mokolo ekoki kosala ete babalani bamoniselana lisusu bolingo mingi te. Bolingo ya solosolo ekoki kolonga mikakatano wana nyonso?

Ndenge ya komonisa ete olingaka molongani na yo

Ndenge nini balongani bakoki komonisa ete batyelanaka mpenza likebi? Talá toli minei oyo euti na mitinda ya Biblia.

Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi

Omonaka ete kolapa ndai ezali lokola komitya nsinga na nkingo to lokola longo oyo ekoki kobatela libala na yo?

Tyá mosala na esika na yango

Makanisi 5 oyo ekoki kosalisa yo otika te mosala na yo ezwa esika ya libala na bino.

Ndenge ya kosalela mbongo na mayele

Kozela te tii ntango mbongo ekosila bongo otalela ndenge na yo ya kobimisa mbongo. Yekolá ndenge ya kosalela mbongo liboso elimwa na mabɔkɔ na yo.

Ndenge ya koyokana malamu na babokilo

Toli misato ekoki kosalisa yo mpo likambo ya babokilo ekóma te mokakatano na libala na yo.

Ntango bozali na makanisi ekeseni

Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo básilisa matata mpe bázala na kimya?

Ntango yo ná molongani na yo bokeseni na makambo

Omiyoká naino te ete yo ná molongani na yo bokeseni mpenza na makambo?

Ndenge ya koboya kobomba nkanda

Mpo olimbisa likambo ya mabe oyo molongani na yo asali, osengeli nde komona likambo yango moke to kosala lokola likambo moko te esalemi?

Ndenge ya kopekisa nkanda na yo

Kopesa nkanda nzela ekoki kobebisa sante na yo, kasi okoki kobimisa nkanda na yo. Boye okoki kosala mpenza nini soki molongani na yo alɛmbisi yo?

Ntango bana balongwe na ndako ya baboti

Babalani mosusu bakutanaka na mikakatano ya makasi ntango bana na bango bakoli mpe balongwe na ndako na bango. Baboti yango bakoki kosala nini mpo bázala na esengo ntango batikali kaka bango mibale?

Ntango libala na yo ekómeli yo bololo

Na esika osepela na libala yango, okómi komiyoka nde lokola ozali na bolɔkɔ? Makambo mitano oyo ekoki kobongisa libala na yo.

Ndenge ya koboya koboma libala ntango moto akómi mobange

Nini etindaka bato báboma libala na bobange? Ndenge nini okoki kosala ete likambo yango esalema te na libala na yo?

Pornografi ekoki kobebisa libala na yo

Makanisi oyo ezali awa ekoki kosalisa yo otika momeseno ya kotala pornografi mpe obongisa libala na yo.

Kosolola

Nasala nini mpo nalekisaka ntango mingi elongo na molongani na ngai?

Ekoki kozala mokakatano basi ná mibali básololaka atako bazali na ndako moko. Ndenge nini babalani bakoki kolekisa ntango mingi elongo?

Ndenge ya kolobela makambo

Basi ná mibali basololaka ndenge moko te. Koyeba bokeseni wana ekosilisa mikakatano ebele na libala.

Ndenge ya kozala moyoki malamu

Koyoka na likebi ezali kaka te mwa tekiniki moko boye, kasi emonisaka mpenza bolingo. Talá ndenge okoki kokóma moyoki malamu mpenza.

Koboya kotingama na likambo

Makambo minei ekoki kosalisa yo ná molongani na yo bótika koswanaka mpe bózwaka solisyo elongo.

Ndenge ya kotika koswana

Yo ná molongani na yo boswanaka ntango nyonso? Talá ndenge oyo Biblia ekoki kobongisa libala na bino.

Ndenge ya koboya maloba mabe

Okoki kosala nini soki yo ná molongani na yo botikaki ete maloba mabe ebebisa boyokani na bino?

Kosɛnga bolimbisi

Bongo soki nazali na foti te?

Ndenge ya kolimbisa

Mpo na nini kolimbisa ekoki kozala mpasi? Talá ndenge batoli ya Biblia ekoki kosalisa.

Kobɔkɔla bana mike

Oyo baboti basengeli koyeba liboso ya kotinda bana na bango na esika oyo babatelaka bana

Omituna mituna minei mpo na koyeba soki kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana ezali malamu mpo na mwana na yo.

Mwana na ngai asengeli kozala na telefone?

Komituna mituna oyo mpo na koyeba soki yo ná mwana na yo bomibongisi mpo na mokumba.

Teyá bana ndenge malamu ya kosalela telefone

Ata mwana oyo ayebi teknoloji malamu asengeli kotambwisama na baboti na ye mpo na kosalela telefone na ndenge oyo ebongi.

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka?​—Eteni ya 1: Kotánga buku to kotala filme?

Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bátángaka lisusu mingi?

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka​—Eteni 2: Kotánga na telefone to na mokanda ya papye?

Eleki malamu bana bátángaka na telefone to tablɛti to na mokanda ya papye? Nyonso ezali na malamu na yango.

Salisá bana na yo bámitungisaka te koleka ndelo mpo na bansango ya kobangisa

Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bátika komitungisa koleka ndelo mpo na bansango?

Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa

Makambo minei oyo ekoki kosalisa yo oyanola na mituna na ye mpe komonisa ye ndenge ya kolonga mpasi oyo azali koyoka mpo na liwa ya moto moko oyo alingaka.

Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?

Soki mwana na yo atikali na ndako mpe ayebi te asala nini, okoki kotalela mwa makambo oyo.

Ntina ya kosala misala ya ndako

Bokakatanaka mpo na kosalisa bana na bino misala ya ndako? Soki ezali bongo, bótala ndenge oyo kosalisa bana misala ya ndako ekoki kosalisa bango báyeba mikumba na bango mpe bázala na esengo.

Ndenge ya kosalisa bana ntango balongi te na likambo moko

Kolonga te na likambo moko ekómelaka moto nyonso. Salisá mwana na yo alɛmba nzoto te ntango alongi te na likambo moko mpe ayeba ndenge akosala mpo na kobongisa likambo yango.

Ndenge ya kosalisa mwana na yo azwaka bapwɛ ya malamu na kelasi

Talá ndenge ya koyeba likambo mpenza oyo ezali kosala ete azwa bapwɛ ya mabe mpe lendisá ye ayekolaka.

Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?

Makambo mitano ekoki kosalisa yo olakisa mwana na yo ndenge ya kosala na matumoli.

Kokumisa bana

Emonani ete lolenge moko ya kokumisa nde ebotaka mbuma malamu koleka.

Nini ekoki kokómela bana soki baboti babomi libala?

Atako bato mingi bakanisaka ete koboma libala ekozala ntango nyonso malamu mpo na bana, kasi bolukiluki emonisi ete yango ekoki komemela bana makambo mingi ya mabe.

Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

Batoli mitano ya Biblia ekoki kosala ete eleko yango ya mpasi, ezala mpasi mingi te.

Koteya mwana makambo etali kosangisa nzoto

Bana bakómi komona makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike mpenza. Osengeli koyeba nini? Okoki kosala nini mpo na kobatela bana na yo?

Kosolola na bana likambo etali masanga

Ntango nini mpe ndenge nini baboti basengeli kosolola na bango likambo wana ya ntina mingi?

Koteya mwana komipekisa

Kopesa mwana eloko nyonso oyo azali na yango mposa, ozali kopimela ye eloko moko oyo eleki ntina.

Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa

Teyá mwana na bino ezaleli ya komikitisa kozanga ete amimona ete azali na valɛrɛ te.

Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi

Ata bana oyo bazali bilenge bakoki koyekola koloba mersi ntango moto moko apesi bango eloko.

Koteya bana kotosa

Yo ná mwana na yo bowelanaka ntango nyonso na makambo mpe emonani ete ye nde alongaka ntango nyonso? Batoli mitano oyo etali kobɔkɔla bana ekoki kosalisa yo.

Te na yo etikala kaka Te

Okosala nini soki mwana azali komilelalela mpo na komona soki okobongola ekateli na yo te?

Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata

Okoki kosala nini soki mwana na yo azali kosala matata? Batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mokakatano yango.

Ntango mwana na yo akosi

Osengeli kosala nini soki mwana na yo abuki lokuta? Lisolo oyo elobeli batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo oteya mwana na yo ete koloba solo ezali na ntina.

Kobɔkɔla bilenge

Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge

Oyokaka mpasi ntango osololaka na mwana na yo oyo azali elenge? Makambo nini ebimisaka mikakatano?

Ntango mwana na yo ya mwasi azali kotungisama na makanisi

Bilenge basi mingi batungisamaka mpo na mbongwana oyo bazali kokutana na yango. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bango bátika kotungisama na makanisi?

Okosala nini soki mwana na yo ya elenge abebisi konfianse oyo opesaka ye?

Kowela koloba te ete mwana na yo ya elenge azali motomboki. Konfianse oyo ebebá ekoki kozonga lisusu.

Okoki kosala nini mpo obɔkɔla bana na yo malamu?

Mpo na nini ezali mpasi te bana básala boninga makasi na baninga na bango bilenge na esika básala yango na baboti na bango?

Ndenge ya kopesa mwana na yo oyo akómi elenge disiplini

Kopesa disiplini elimboli koteya. Batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo oteya mwana na yo oyo akómi elenge akóma na botosi na esika ya kozala motomboki.

Ndenge ya kotya mibeko mpo na mwana na yo oyo akómi elenge

Okoki kosala nini soki mwana yango azali ntango nyonso kosilika mpo na mibeko oyo otyelaka ye?

Ndenge ya koteya mwana asalelaka Internet na mayele

Ndenge nini okoki kotika naino mibeko mpe kosalisa mwana azwaka ye moko bikateli ya malamu?

Bilenge

Oyo osengeli kosala soki basemboli yo

Ndenge nini toli to kosembolama oyo esalaka mpasi ekoki kosalisa yo?

Bizaleli oyo osengeli komonisa ntango ozali kotinda to kozwa bamesaje

Ezali kozanga limemya kokata lisolo kaka mpo na kotánga mesaje na telefone? To koboya kokipe mesaje yango kaka mpo na kokoba lisolo ezali mpe kozanga limemya?

Ndenge ya kolonga komekama

Kozala na likoki ya kolonga komekama ezali elembo ya mibali mpe basi ya solosolo. Makambo motoba ekoki kosalisa yo mpo ekateli na yo ekóma makasi mpe okima mitungisi oyo eyaka soki moto andimi kokwea na komekama.

Ndenge ya kokitisa nkanda na yo

Batoli mitano ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo opekisa nkanda na yo.

Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga

Komiyoka lokola ozangá baninga ezali mabe na sante na yo, ekokani na komɛla makaya 15 na mokolo. Okoki kosala nini mpo omiyoka te lokola basundolá yo mpe ozangá baninga?

Ntango yo ná fianse na yo bosilani

Ndenge oyo okoki kokende liboso na bomoi na yo nsima ya kosilana na fianse na yo.

Soki esɛngi kozonga lisusu ndako ya baboti

Ozalaki liboso kokokisa yo moko bamposa na yo mpe omoni ete okokoka lisusu te? Batoli malamu oyo ekoki kosalisa yo ozongela lisusu kosala bongo.

Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo

Makambo minei oyo ekoki kosalisa osala boninga ya solosolo kasi te oyo eumelaka te.

Ntango makambo ebongwani

Makambo ebongwanaka kaka. Talá oyo basusu basali mpo na kolonga ntango makambo ebongwani.

Ntango moboti akufi

Soki moboti akufi esalaka mpasi makasi. Nini ekoki kosalisa bilenge bátungisama mingi te na mpasi oyo eyaka na nsima?

Koluka bilɛngi to bisengo makasi ezangi makama?

Mpo na koyeba esika makoki na bango esuki, bilenge mingi balingaka kosala likambo moko oyo ekopesa bango bilɛngi to bisengo makasi, ata soki ekoki kotya bomoi na bango na likama. Yo mpe oyokaka mposa ya kosala bongo?