Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ndenge ya kokitisa nkanda na yo

Ndenge ya kokitisa nkanda na yo

MOKAKATANO

“Nagangelaki yaya na ngai ya mwasi mpe natindikaki porte makasi mpenza mpe kroshɛ oyo ezalaki na nsima na yango etɔbɔlaki mur. Lidusu yango ezalaki ntango nyonso komonisa ngai ete nasalaki makambo lokola mwana moke mpenza.”​—Diane. *

“Nagangaki boye: ‘Ozali mpenza tata mabe!’ mpe natindikaki porte makasi. Kasi liboso ekangama, namonaki ete esalaki ye mpasi mingi, mpe mbala moko namonaki ete ebongaki te naloba na ye bongo.”​—Lauren.

Yo mpe okutaná na likambo oyo ekómelaki Lauren ná Diane? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

OYO OSENGELI KOYEBA

Nkanda makasi ebebisaka lokumu ya moto. Briana oyo azali sikoyo na mbula 21, alobi boye: “Nazalaki kokanisa ete basusu basengeli kaka kondima ezaleli na ngai wana ya mabe. Kasi na nsima, nakómaki komona ete bato bamonanaka bazoba soki bayebi komipekisa te mpe etindaki ngai namona ete ngai mpe nabimaka zoba na miso ya basusu soki nasiliki ndenge wana!”

Biblia elobi boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki akosala bozoba.”​—Masese 14:17.

Kaka ndenge bato bakimaka volcan oyo ezali kobimisa mɔtɔ; bakimaka mpe moto nyonso oyo asilikaka makasi

Nkanda na yo ekoki kotinda basusu bákima yo. Daniel oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Kosilika elongolaka lokumu ya moto mpe esalaka ete bápesa ye limemya te.” Elaine oyo azali mpe na mbula 18, andimi likambo yango; alobi boye: “Kosilika makasi ezali ezaleli mabe. Esalaka kutu ete bato bákima yo.”

Biblia elobi boye: “Kosala boninga na moto moko te oyo alingá kosilika; mpe osengeli te kotambola esika moko na moto oyo atombokaka mpambampamba.”​—Masese 22:24.

Okoki kobongisa. Sara oyo azali mbula 15, alobi boye: “Okoki te kopekisa likambo moko epesa yo nkanda, kasi okoki nde koyeba ndenge ya kopekisa nkanda na yo. Ntina ya kosilika makasi ezali te.”

Biblia elobi boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya, mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.”​—Masese 16:32.

OYO OKOKI KOSALA

Mityelá mokano. Na esika oloba “ezali ndenge na ngai,” mityelá nde ntango oyo okani kobongisa ezaleli na yo; mbala mosusu okoki komityela sanza motoba. Na boumeli ya ntango yango, komáká na papye milende oyo ozali kosala. Mbala nyonso oyo osiliki, komá (1) likambo oyo ebimaki, (2) ndenge oyo osalaki, mpe (3) ndenge okokaki kosala malamu koleka mpe mpo na nini. Na nsima, mityelá mokano ya kosala bongo mbala ya nsima oyo bakosilikisa yo. Toli: Komá mpe makambo oyo ozali kolonga na yango! Komá ndenge omiyokaka malamu nsima ya komipekisa na likambo moko.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:8.

Zelá naino liboso ya kosala likambo. Ntango moto to likambo moko esilikisi yo, zelá naino na esika ya koloba likambo ya liboso oyo eyeli yo na makanisi. Soki esengeli, bendá naino mpema makasi. Erik oyo azali na mbula 15, alobi boye: “Soki nabendi mpema, epesaka ngai ntango ya kokanisa liboso nasala to naloba likambo moko oyo ekoyokisa ngai mawa na nsima.”​—Toli ya Biblia: Masese 21:23.

Talelá likambo na mobimba na yango. Na bantango mosusu okoki kosilika mpo otaleli kaka ngámbo moko ya likambo yango; oyo esali yo mpasi. Meká mpe kotalela ngámbo mosusu ya likambo yango. Mwasi moko na nkombo Jessica, alobi boye: “Ata ntango bato basali ngai mabe mpenza, mbala mingi ezalaka kaka na likambo oyo ekoki kosalisa ngai nameka koyeba mwa moke mpo na nini basali bongo.”​—Toli ya Biblia: Masese 19:11.

Soki likoki ezali, longwá na esika yango. Biblia elobi boye: “Liboso koswana ebima, bendá nzoto.” (Masese 17:14) Ndenge Biblia emonisi yango, na bantango mosusu ezalaka malamu kobenda nzoto liboso likambo moko epelisa mɔtɔ. Na nsima, na esika okoba kokanisa likambo yango mpe kotika nkanda na yo emata lisusu, kokanga nde mabɔkɔ te. Elenge mwasi moko na nkombo Danielle, alobi boye: “Namonaka ete kosala ngalasisi ekitisaka mitungisi na ngai mpe esalaka ete nasilikaka makasi te.”

Yekolá kolimbisa. Biblia elobi boye: “Ata soki bosiliki, bósala lisumu te. Bóloba na motema na bino, . . . mpe bófanda nyɛɛ.” (Nzembo 4:4) Simbá ete kosilika ezali mabe te. Omituna nde nini ekobima na nsima? Elenge mobali moko na nkombo Richard, alobi boye: “Soki opesi nzela ete basusu básilikisa yo, okopesa bango bokonzi likoló na yo. Mpo na nini te komonisa ete ozali mwana moke te mpe koboya kokipe likambo yango?” Soki osali bongo, okopekisa nkanda na yo na esika ya kotika yango ekonza yo.

^ par. 4 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.