Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

MOKAKATANO

Emonani lokola ezalaki kaka lobi nde ozalaki komema bebe na yo na mabɔkɔ. Sikoyo ata azali kaka mwana, abandi kokóma elenge, abandi kokɔta na eleko oyo esalaka ete moto akóma mokóló.

Lokola mbongwana oyo nzoto esalaka ebangisaka, ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo na eleko wana oyo etyaka bana mobulu na motó?

OYO OSENGELI KOYEBA

Ebandaka mbula moko te epai ya mwana nyonso. Ekoki kobanda noki, na mbula mwambe to mpe mwa nsima na mbula soki 15. Buku moko (Letting Go With Love and Confidence) elobi boye: “Mbula oyo eleko yango ebandaka eyebanaka mpenza te.”

Ekoki kobangisa. Bilenge ya mbula yango bakoki kobanda kotya likebi mingi na ndenge oyo bazali komonana na miso ya bato. Elenge moko na nkombo Jared,  * alobi boye: “Nakómaki kokipe makambo oyo nazalaki kosala mpe ndenge nazalaki komonana na miso ya bato.” Kellie, elenge ya mbula 17 alobi boye: “Soki nazali elongo na bato mosusu, nazalaki komituna soki bazali kokanisa nini na ndenge oyo nazali komonana.” Elenge akoki kutu kotika komityela motema soki babutɔ ebimi ye na elongi. Kellie abakisi boye: “Namiyokaki ete nabebi mpenza elongi. Nazali kokanisa lisusu ndenge nazalaki kolela mpe komibenga elongi mabe.”

Ezalaka mpasi mingi mpo na bana oyo eleko yango ebandaka noki. Ezalaka mingi bongo mpo na bana basi, oyo batungisamaka ntango babandi kobima mabɛlɛ. Buku moko (A Parent’s Guide to the Teen Years) elobi boye: “Bilenge yango bazalaka mpe na likama ya kobenda likebi ya bana mibali oyo bakoli mpe bamesaná na kosangisa nzoto.

Yango elingi koloba te ete akómi mokóló. Masese 22:15 elobi boye: “Bozoba ekangami na motema ya mwana.” Eleko ya bolenge ebongoli toli yango te. Buku moko (You and Your Adolescent) elobi ete na nzoto elenge akoki komonana ete akoli, kasi yango “elingi koloba te ete akómi na likoki ya kozwa bikateli ya malamu to kosala makambo lokola mokóló, kozala na komipekisa to [komonisa] bizaleli mosusu oyo emonisaka ete moto akoli.”

OYO OKOKI KOSALA

Sololá na mwana liboso eleko yango ebanda. Yebisá mwana na yo makambo oyo ekokómela ye, mingimingi na oyo etali komona sanza (mpo na bana basi) mpe kobebisa mbeto na mai ya mibali na nse ya mpɔngi (mpo na bana mibali). Na kokesana na bambongwana oyo eyaka mokemoke na eleko yango, makambo wana eyaka na mbalakaka mpe ekoki kotya mwana mobulu na motó ata mpe kobangisa ye. Ntango bozali kolobela makambo yango, monisá mwana ete eleko yango ebongisaka moto mpo na kokóma mokóló.Toli ya Biblia: Nzembo 139:14.

Koloba makambo likolólikoló te. Elenge moko na nkombo John, alobi boye: “Ntango baboti bazalaki ‘kosolola’ na ngai, bazalaki koloba makambo polele te. Elingaki kozala malamu soki báyebisaka ngai makambo polele.” Alana, oyo azali na mbula 17 alobi mpe bongo: “Mama asalisaki ngai nayeba mbongwana oyo ekosalema na nzoto na ngai, kasi elingaki kozala malamu soki alakisaka ngai ndenge nakoki kosala mpo namitungisa mingi te.” Liteya nini okoki kozwa? Ata soki ezalaka nsɔni mpo na kolobela yango, sololá na mwana makambo nyonso oyo esalemaka na eleko yango.Toli ya Biblia: Misala 20:20.

Tuná mituna oyo ekofungola lisolo. Mpo mwana ayoka nsɔni te, liboso lobelá makambo oyo bato mosusu bakutaná na yango na eleko wana. Na ndakisa, okoki kotuna mwana boye: “Baninga na yo mosusu ya kelasi babandi naino te kobɛta masolo etali komona sanza?” “Bana mosusu basɛkaka baninga na bango oyo bazali kokola maimai?” Okoki kotuna mwana mobali boye: “Bana basɛkaka baninga na bango oyo bakolaka te?” Soki bilenge babandi kolobela ndenge eleko yango ekómelaka bana mosusu, ekozala mpasi te bálobela polele ndenge oyo bango moko bazali komiyoka mpe makambo bazali kokutana na yango. Soki babandi koloba, salelá toli oyo ya Biblia: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.”Yakobo 1:19.

Salisá mwana na yo akolisa “bwanya ná likoki ya kokanisa.” (Masese 3:21) Mbongwana oyo esalemaka na eleko yango eyaka kaka na nzoto te to na ndenge oyo azali komiyoka. Na eleko yango mwana akolisaka makoki ya kokanisa oyo ekosalisa ye azwa bikateli ya malamu ntango akokóma mokóló. Salelá libaku yango mpo na kokolisa bizaleli ya malamu na motema ya mwana.Toli ya Biblia: Baebre 5:14.

Kolɛmba te. Bilenge mingi bayokaka nsɔni kosolola na baboti na bango makambo etali bambongwana wana, kasi komikosa te. Buku moko (You and Your Adolescent) elobi boye: “Bilenge oyo bamonanaka lokola ete masolo yango etali bango te, basepelaka na yango te, motó makasi, bakoki kokanga liloba mokomoko oyo ozali koloba.”

^ par. 8 Na lisolo oyo bankombo nyonso ezali ya bango te.