Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Bana mpe batelefone​—Eteni 1: Mwana na ngai asengeli kozala na telefone?

Bana mpe batelefone​—Eteni 1: Mwana na ngai asengeli kozala na telefone?

 Bana ebele bazali na batelefone, a mpe mingi na bango basalelaka batelefone oyo esalelaka Internet na esika bazali bango moko na bashambrɛ na bango. Makambo nini ekoki kobima soki mwana azali na telefone? Wapi matomba na yango? Ngonga boni osengeli kotikela mwana mpo asalelaka telefone?

 Oyo osengeli koyeba

 Matomba

  •   Libateli mpo na mwana, kimya ya makanisi mpo na baboti. Bethany, mama ya bana mibale oyo bazali naino bilenge, alobi boye: “Tozali kobika na mokili moko oyo etondi na mobulu. Telefone ezali na ntina mingi mpo bana bázala na likoki ya kosolola na baboti na bango.”

     Mama moko na nkombo Catherine alobi boye: “Baprogramɛ mosusu oyo ezalaka na telefone esalisaka mpo na koyeba esika nini mwana azali. Soki azali kotambwisa motuka, okoki komona soki azali kotambwisa na vitesi nini.”

  •   Ezali kosalisa mpo na makambo mosusu ya kelasi. Mama moko na nkombo Marie alobi boye: “Bana bazwaka badevuare na bango na nzela ya adresi e-mail to na bamesaje, mpe na lolenge wana nde bakoki kosolola na balakisi na bango.”

 Makama oyo ekoki kobima

  •   Kolekisa ntango mingi mpenza liboso ya ekra. Na ntembe te, bilenge mingi balekisaka ngonga mingi kaka mpo na kosalela telefone mokolo na mokolo. Kasi, baboti mpe balekisaka ngonga mingi mpo na kosalela telefone mpe balekisaka ntango moke mpo na kosolola na bana na bango. Na mokuse, mopesi-toli moko na makambo ya kolekisa ntango, alobaki boye: “Mabota mingi ekómi lokola etuluku ya bato oyo bayebani te oyo bayaka kokutana esika moko, kasi bakokaka te kotika kotala baapareyi na bango.” b

  •   Pornografi. Ndenge bamonisi yango, ebele ya bana bakɔtaka na basite Internet oyo elakisaka pornografi sanza nyonso. Yango ezali kokamwisa te, mpo na pɛtɛɛ nyonso, bato bakoki kotala pornografi na batelefone na bango ya mabɔkɔ. William, tata moko ya bana mibale, alobi boye: “Soki baboti batiki mwana na bango azala na telefone, kozanga koyeba, bazali kopesa ye likoki ya kotala pornografi oyo ekobanda kolanda ye esika nyonso azali kokende.”

  •   Boombo. Bato mingi bakangamaka makasi na batelefone na bango. Balobaka soki bamoni te baaparɛyi na bango, bamitungisaka mingi, bayebaka te básala nini, mpe mbala mosusu babɛlaka. Baboti mosusu bamoni ete bana na bango bayokaka te ntango bazali kosalela baaparɛyi na bango. Carmen alobi boye: “Na bantango mosusu, ntango nasololaka na mwana na ngai, adɔngɔlaka ngai to akebisaka ngai mpe asepelaka te nakata ye ntango azali kosala makambo na ye.”

  •   Makama mosusu. Bato mosusu batumolaka basusu na telefone to batindelaka basusu bamesaje ya mbindo, mpe ekoki kobimisa ebele ya mikakatano ya sante oyo eutaka na makanisi mabe mpe kozanga mpɔngi. Longola yango, bilenge mosusu basalelaka bililingi to programɛ babengi “application fantôme,” elingi koloba, programɛ oyo emonanaka lokola likambo ya mabe ezali te, na ndakisa, calculatrice, mpo na kobomba makambo oyo ezali na kati mpo balingaka te baboti na bango bámona yango.

     Na mokuse, Daniel, tata ya elenge moko ya mwasi, alobi boye: “Telefone ezali lokola fenetre moko oyo efungwamá polele oyo epesaka Internet nzela ya kobimisa makambo nyonso, ezala ya malamu mpe ya mabe.”

 Oyo osengeli komituna

  •   ‘Mwana na ngai azali na mposa ya kozala na telefone?’

     Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Yango wana, omituna boye:

     ‘Ekozala likambo ya bwanya mwana na ngai azala na telefone mpo na kobatela ye to mpo na bantina mosusu? Nakanisi malamumalamu matomba mpe makama oyo ekoki kobima? Longola telefone, ezali na eloko mosusu oyo akoki kozala na yango?’

     Tata moko na nkombo Todd alobi boye: “Ezali na batelefone mosusu ya mabɔkɔ oyo okoki kopesa mwana na yo mpo abengaka yo to atindelaka yo bamesaje. Mpe yango elyaka mbongo mingi te.”

  •   ‘Mwana na ngai abongi mpo na kosalela telefone?’

     Biblia elobi: “Motema ya moto ya bwanya ezalaka na lobɔkɔ na ye ya mobali.” (Mosakoli 10:2) Yango wana, omituna boye:

     ‘Nini endimisi ngai ete nakoki kotyela mwana na ngai motema? Ayebisaka ngai makambo nyonso polele? Mwana na ngai azalaka ntango nyonso sembo epai na ngai, mbala mosusu abombelaka ngai baninga na ye mpo nayeba te soki bazali baninga ya ndenge nini? Ye moko amipekisaka ntango asalelaka baaparɛyi mosusu, na ndakisa TV, tablɛti, to ordinatɛrɛ?’ Mama moko na nkombo Serena alobi boye: “Telefone babengi Smartphone ezali esaleli moko ya kitoko, kasi ekoki kobimisa makama ya minene. Kanisá malamumalamu mokumba oyo ozali kopesa mwana na yo ntango azali naino moke mpenza.”

  •   ‘Namibongisi mpo na komema mokumba yango?’

     Biblia elobi: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye.” (Masese 22:6) Yango wana, omituna boye:

     ‘Nayebi makambo mingi etali telefone mpo na kosalisa mwana na ngai ayeba mpe akima makama oyo ekoki kobima? Nayebi kosalela yango mpo na kolandela mwana? Nakosalisa mwana na ngai azala na bokatikati mpo na kosalela telefone?’ Daniel, tata oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Likambo ya mawa, baboti mingi bapesaka bana na bango telefone mpe balandelaka te ndenge bana basalelaka yango.”

 Na mokuse: Bana basengeli kozwa formasyo mpo na kosalela telefone na ndenge ebongi. Buku Indistractable elobi boye: “Bana bakokaka te komipekisa mpe balekisaka bangonga mingi ntango bazali kosalela telefone, mingimingi soki baboti bazali kolandela bango te to bapesi bango ata malako moko te.”

a Na lisolo oyo, liloba “telefone” esalelami awa mpo na kolobela telefone oyo esalelaka Internet.

b Euti na buku Disconnected, ya Thomas Kersting.