Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Oyo baboti basengeli koyeba liboso ya kotinda bana na bango na esika oyo babatelaka bana

Oyo baboti basengeli koyeba liboso ya kotinda bana na bango na esika oyo babatelaka bana

 Baboti mosusu oyo basalaka mosala bazwaka ekateli ya kotinda bana na bango ya mike na esika oyo babatelaka bana, oyo ezalaka lokola kelasi. Yango ekozala malamu mpo na bana na yo?

 Mituna oyo osengeli komituna

 Kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana ekoki kobebisa to te boyokani ya mwana ná baboti? Ekoki kobebisa to te. Ntango mwana azali naino moke, bɔɔngɔ na ye ekangaka makambo noki na ndenge oyo esalaka ete azala na boyokani ya malamu to te ná basusu. Saláká makasi olekisaka ntango mingi elongo na ye na ntango wana ya ntina mingi oyo ekoki kosala ete akola malamu to te.​—Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

  •    Ntango baboti balingi kotinda mwana na bango na esika oyo babatelaka bana basengeli mpe kokanisa soki boyokani na bango ná mwana ekozala ntango nyonso makasi.

 Kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana ekoki kosala ete bana báyokela baboti lisusu te? Ekoki kosalema. Buku moko Hold On to Your Kids elobi boye: “Ntango bana mike bazali kokoba kolekisa ntango elongo na baninga na bango, bakómaka mpe kosala makambo lokola baninga na bango.”

  •    Ntango baboti balingi kotinda mwana na bango na esika oyo babatelaka bana basengeli mpe kokanisa soki mwana na bango akokoba koyokela bango.

 Kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana ekobongisa ye mpo abanda kelasi malamu? Basusu bandimaka yango. Kasi basusu balobi ete kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana esalisaka mwa moke na bokoli ya mwana to te. Ezala likanisi nini ezali malamu, Penelope Leach, moto moko ya pisikoloji akomi boye: “Bókanisa te ete mateya oyo bana bazwaka na kelasi, yango nde ekosalisa bango mingi na bomoi. Lisusu bókanisa te ete ekozala ntango nyonso malamu soki mwana abandi kelasi ntango azali naino moke. Soki bosali bongo, mbala mosusu bokoyeba te soki mateya nyonso oyo bopesaki mwana banda bomwana ezali komemela ye matomba.”

  •   Ntango baboti balingi kotinda mwana na bango na esika oyo babatelaka bana basengeli mpe kokanisa soki ezali mpenza na ntina to ezali na matomba.

 Ekoki kosalema ete moko na bino atikala na ndako mpo na kobatela bana? Na bantango mosusu, baboti nyonso mibale basalaka mosala makasi kaka mpo na kozala na bomoi oyo eleki kitoko. Milende wana nyonso epesaka mpenza matomba?

  •   Ntango baboti balingi kotinda mwana na bango na esika oyo babatelaka bana basengeli mpe kokanisa soki moboti moko akoki kotikala na ndako mpo na kobatela bana mpo bábomba mwa mbongo.

 Osengeli kozwa ekateli ya kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana kaka soki otaleli malamumalamu matomba to makama oyo ekoki kobima. Nsima ya kosala bongo, okosala nini soki omoni ete ekozala malamu mpo na libota na yo kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana?

 Oyo okoki kosala

 Biblia elobi ete “moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Na lisalisi ya toli oyo, kanisá malamumalamu liboso ya kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana.

 Luká koyeba makambo oyo okoki kopona

  •   Baboti mosusu baponaka ndako moko lokola esika ya kobatela bana, oyo ezalaka na moto moko to mwa bato oyo babatelaka mwa etuluku ya bana.

  •   Baboti mosusu bazwaka moto moko ya libota na bango, moto mosusu oyo bafandaka na ye, to balukaka moto mosusu mpo akɛngɛla mwana na bango.

 Makambo wana nyonso ezali na litomba to na likama. Mpo na nini te kosolola na baboti mosusu oyo basalelaki ata moko ya mayele yango mpo na kobatela bana? Biblia elobi: “Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.”​—Masese 13:10.

 Okosala nini soki oponi kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana? Soki bongo . . .

 Luká koyeba makambo etali esika yango ya kobatela bana

  •   Ezali na mikanda to endimami na mibeko ya Leta? Eyebani ete ezali na lokumu ya malamu na miso ya bato?

  •   Ezalaka pɛto mpe ebatelami malamu?

  •   Makambo nini esalemaka kuna? a

 Luká koyeba makambo etali bato oyo babatelaka bana

  •   Bazwá formasyo nini? Yango esɛngi mpe kozwa formasyo ya koteya bana mike, ya kopesa lisungi ya liboso na ntango ya likama, mpe ya kosunga moto oyo abɛlaka maladi ya motema.

  •   Ozali na likoki ya koyeba makambo ya mobulu ya bato oyo bakobatela mwana na yo basalá to basalaka?

  •   Balongolaka bato oyo babatelaka bana mpambampamba? Yango ekosɛnga mwana amesana mbala mingi na bato ya sika oyo babatelaka bana.

  •   Bana boni moto mokomoko asengeli kobatela kuna? Soki bana bazali mingi ekozala mpasi bátyela mwana na yo likebi oyo asengeli na yango. Na ntembe te, lolenge oyo mwana na yo akolinga bátyela ye likebi ekotalela mbula mpe makoki na ye.

  •   Bato oyo babatelaka bana bakosepela kosolola na yo mpo na makambo oyo ezali kotungisa yo to oyo ezali kotungisa bango?

a Na ndakisa, batikaka nde bana bálekisa ntango na kotala TV to makambo oyo basalaka kuna ekosala ete bana bázala na makanisi ya malamu to na nzoto kolɔngɔnɔ?