Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya koboya maloba mabe

Ndenge ya koboya maloba mabe

MOKAKATANO

Mbala nyonso oyo matata ebimaka na libala na bino, yo ná molongani na yo bolobanaka maloba mingi ya mabe. Kolobana maloba mabe ekómá momeseno na libala na bino, yango wana bomonaka yango lisusu “mabe te.”

Soki likambo ya ndenge wana esalemaka na libala na yo, okoki kosilisa yango. Kasi, osengeli naino koyeba makambo oyo ebimisaka yango mpe matomba oyo okozwa soki otiki yango.

NINI ESALAKA BONGO?

Ndenge moto abɔkwamá. Basi mpe mibali mingi babɔkwamá na mabota oyo bato bamesanaki koloba maloba mabe. Molongani moko to bango nyonso mibale bakoki komekola ndenge baboti na bango bazalaki koloba.

Makambo oyo elekaka na radio to televizyo. Bafilme mpe bateatre oyo elekaka na televizyo ekómisaka maloba mabe likambo ya kosɛkisa, esalaka ete bato oyo bazali kotala yango bámona ete ezali mabe te​—kutu bámona yango nde kitoko.

Mimeseno ya mboka. Na Bamboka mosusu bato balobaka ete “mobali ya solosolo” asengeli kokweisaka mitindo mpe mwasi asengeli kozala matata mpenza mpo bámonela ye te. Ntango matata ebimi, balongani oyo bazali na makanisi ya ndenge wana bakoki kotalelana lokola banguna na esika ya kozala baninga mpe kolobana maloba ya kozokisa na esika ya maloba oyo ebɔndisaka.

Ezala soki ebimi mpo na likambo nini, maloba mabe ekoki kosala ete libala ekufa to mpe komemela moto bamaladi. Bamosusu balobaka kutu ete maloba ekoki kosala mpasi mingi koleka kobɛta. Na ndakisa, mwasi moko oyo mobali na ye azalaki kofinga mpe kobɛta ye, alobi boye: “Nazalaki komona ete malamu kutu abɛta ngai na esika afinga ngai. Nakokaki kondima kutu abɛta ngai na esika alobela ngai maloba mabe ya ndenge wana.”

Okoki kosala nini soki yo ná molongani na yo botikaki maloba mabe ebebisa boyokani na bino?

OKOKI KOSALA BOYE

Mityá na esika ya moninga. Mityá na esika ya molongani na yo, mpe luká koyeba ndenge oyo ayokaka ntango olobelaka ye maloba mabe. Soki likoki ezali, kanisá likambo moko oyo esalaki ete maloba na yo epesa ye mpasi. Kotya kaka likebi te na makambo oyo olobaki; talelá nde ndenge oyo molongani na yo ayokaki ntango olobelaki ye maloba yango. Meká naino kokanisa likambo oyo okokaki kosala mpo oloba maloba ya boboto na esika ya maloba ya mabe. Biblia elobi boye: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”​—Masese 15:1.

Landá ndakisa ya baoyo bapesaka libala na bango valɛrɛ. Soki ndakisa mabe ya basusu ebebisá ndenge na yo ya kosolola, luká baoyo bazali ndakisa malamu. Landá toli ya balongani oyo ebongi komekola ndenge na bango ya kosolola.​—Toli ya Biblia: Bafilipi 3:17.

Kanisá lisusu makambo ya malamu oyo bosalá elongo. Mbala mingi, maloba mabe ezalaka likambo ya motema, kasi ya monɔkɔ te. Na yango, salá nyonso mpo ozalaka na makanisi malamu mpo na molongani na yo. Kanisá lisusu makambo ya malamu oyo bosalá elongo. Talá bafɔtɔ na bino ya kala. Nini esɛkisaki yo? Bizaleli nini esalaki ete mokomoko na bino asepela na moninga?​—Toli ya Biblia: Luka 6:45.

Salelá liloba “ngai.” Na esika ya koloba na molongani na yo maloba mabe, monisá ye ndenge oyo likambo moko esali yo mpasi na motema. Na ndakisa, koloba: “Soki obongisi makambo ya kosala kozanga kotuna ngai, namonaka lokola ete makanisi na ngai ezali na ntina te,” ekoki kosala ete apesa yo eyano ya malamu na esika oloba, “ozalaka kaka boye, obongisaka ntango nyonso makambo kozanga kotuna ngai!”​—Toli ya Biblia: Bakolose 4:6.

Yebá ntango ya kofanda nyɛɛ. Soki nkanda ebandi komata mpe maloba ekómi kobeba, ekozala malamu mingi bosolola likambo yango na ngonga mosusu. Mbala mingi, ezalaka malamu kotika naino likambo yango tii ntango bokozwa ngonga ya kosolola yango na kimya.​—Toli ya Biblia: Masese 17:14.

Mbala mingi, maloba mabe ezalaka likambo ya motema, kasi ya monɔkɔ te