Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga

Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga

MOKAKATANO

“Nazalaki na baninga mibale ya basi oyo bazalaki kosala makambo kaka bango mibale mpe bazalaki kosundola ngai. Nazalaki kozwa bansango ndenge bazalaki kolekisa ntango ya malamu elongo. Mokolo moko nabengaki moninga na ngai na telefone na ngonga oyo moninga na ngai wana mosusu azalaki ná ye na ndako na bango, nazalaki koyoka ndenge bazalaki kosolola mpe kosɛka ntango moto mosusu oyo azalaki mpe wana ayambaki telefone. Nayokaki kaka ndenge bazali kosepela mpe yango esalaki ete namiyoka lisusu lokola nazangá baninga!”​—Maria. *

Omiyoká naino te lokola moto oyo basundolá mpe azangá baninga? Soki ɛɛ, Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa yo. Kasi liboso, talá mwa makambo oyo osengeli koyeba mpo na yango.

OYO OSENGELI KOYEBA

Na bantango mosusu moto nyonso amiyokaka lokola azangi baninga. Ezala mpe bato oyo bayebani mingi. Mpo na nini? Mpo mbala mingi ezalaka te motángo ya baninga kasi nde lolenge ya baninga oyo moto azali na bango nde esalaka ete amiyoka lokola azangá baninga to te. Moto oyo ayebani mingi akoki kozala ntango nyonso elongo na bato ebele kasi azangi baninga ya solosolo mpe akoki komiyoka lokola ye moko.

Komiyoka bongo ekoki kozala likama mpo na sante na yo. Bato ya mayele oyo batalelaki malamumalamu makambo oyo ebimaki na baankɛtɛ 148 oyo esalemaki balobaki ete kozanga bato ya kosolola na bango ezali moko ya makambo oyo ememaka moto na liwa ya mobesu mpe esalaka moto mabe “mbala mibale koleka kozala monene mingi” mpe “ekokani na komɛla makaya 15 na mokolo.”

Ekoki kosala ete ondima moto nyonso akóma moninga na yo. Kutu, ekoki kotinda yo osepela na moto nyonso oyo akondima okóma moninga na ye. Elenge mobali moko na nkombo Alan, alobi boye: “Ntango ozali komiyoka lokola ozali yo moko, okoki kozala na mposa makasi ete moto moko atyela yo likebi. Okoki kokanisa ete ebongi kutu ondima likebi nyonso oyo batyeli yo na esika ezanga. Mpe yango ekoki kolukela yo mindɔndɔ.”

Baaparɛyi ya mikolo oyo esalisaka moto ntango nyonso te atika komiyoka bongo. Elenge mwasi moko na nkombo Natalie, alobi boye: “Nakoki kokomela to kotindela ebele ya bato bamesaje na mokolo kasi namiyokaka kaka lokola nazangá baninga.” Elenge moko na nkombo Tyler amiyokaka mpe bongo; alobi boye: “Kotindela bato bamesaje ezali lokola kolya bisikiti to mikate, kasi kosolola boye na moto ezali lokola bilei. Bisikiti to mikate ezalaka malamu, kasi mpo otonda esɛngaka kolya bilei mpenza.”

OYO OKOKI KOSALA

Talelá makambo na ndenge ya malamu. Na ndakisa, kanisá ete okɔti na Internet, esika oyo ezali na bafɔtɔ ya baninga na yo na fɛti moko oyo babengisaki yo te. Na ntango yango, makanisi mibale ekoki koyela yo; na ndakisa okoki kokanisa ete baboyaki ozala na bango to okoki kotalela yango na ndenge ya malamu. Lokola oyebi te mpo na nini babengisaki yo te, mpo na nini kokanisa mabe? Kutu, luká nde kokanisa na ndenge ya malamu koleka ntina oyo esali ete bábengisa yo te. Mbala mingi, ezalaka likambo te kasi ndenge ya kotalela likambo nde esalaka ete moto amiyoka lokola azangá baninga.​—Toli ya Biblia: Masese 15:15.

Koloba te ete balingaka yo te. Ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga, okoki kokanisa boye: ‘Babengisaka ngai ata esika moko te’ to ‘bato bakimaka ngai ntango nyonso.’ Kasi koloba ndenge wana ekoki kaka kosala ete makanisi yango ekóma lisusu makasi. Yango ekosala ete obanda kokanisa bongo mbala na mbala.​—Toli ya Biblia: Masese 18:1.

Salá boninga na bato oyo bazali mikóló na yo. Biblia elobeli bomoi ya Davidi oyo ekoki kozala ete azalaki elenge ntango akutanaki na Yonatane oyo alekaki ye na mbula 30. Atako bazalaki mbula moko te, Davidi ná Yonatane bakómaki baninga ya motema. (1 Samwele 18:1) Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela yo. Kiara, elenge mwasi oyo azali na mbula 21 alobi boye: “Mikolo oyo euti koleka, namonaki ntina ya kozala na baninga oyo bazali mikóló na ngai. Nazali na baninga mosusu ya motema oyo baleki ngai na ebele ya bambula mpe nasepelaka mpenza na ndenge oyo batalelaka makambo mpe bapikami makasi.”​—Toli ya Biblia: Yobo 12:12.

Sepelá na matomba oyo kozala yo moko epesaka. Bato mosusu bamiyokaka lokola bazangi baninga ntango kaka batikali bango moko. Kasi kotikala yo moko esengeli te kotinda yo omiyoka lokola ozangá baninga. Na ndakisa, Yesu azalaki kolekisa ntango na basusu, kasi azalaki mpe kosepela kozala ye moko. (Matai 14:23; Marko 1:35) Okoki kosala mpe bongo. Na esika omona ete kozala yo moko ezali mabe, salelá nde ntango yango mpo na kokanisa mapamboli oyo ozali na yango. Yango ekoki kotinda basusu básepela okóma moninga na bango.​—Masese 13:20.

^ par. 4 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.