Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kolimbisa

Ndenge ya kolimbisa

MOKAKATANO

Ntango yo ná molongani na yo boswanaka, mbala mingi bozongelaka makambo oyo eleká, mpe bolobelaka makambo ya mabe oyo bokokaki kosilisa banda kala. Mokakatano eutaka wapi? Mbala mosusu moko na bino to bino nyonso mibale boyebaka te ndenge ya kolimbisa.

Bokoki koyekola. Kasi, tótalela naino mpo na nini ezalaka mpasi mpo mwasi ná mobali bálimbisana.

NINI ESALAKA BONGO?

Bokonzi. Mibali mpe basi mosusu baboyaka kolimbisa mpo balingaka kokonza balongani na bango. Na yango, ntango matata ebimi, bazongelaka makambo ya kala mpo na kosilisa molongani na bango makasi.

Kokanga nkanda. Ekoki kozwa ntango molai mpo moto abosana mabe oyo basalaki ye. Moto mosusu akoki koloba na molongani na ye ‘nalimbisi yo’ kasi azali kaka na nkanda mpo na likambo oyo elekaki​—ntango mosusu akoki kokóma na mposa ya kozongisa mabe.

Kolɛmba nzoto. Bato mosusu oyo babalaka bakanisaka ete libala na bango ekokokana na makambo oyo bamonaka na bafilme ya bolingo. Yango wana, ntango matata ebimi, baboyaka kobongola makanisi, bamitunaka ndenge nini moto oyo bazalaki kokanisa ete akozala molongani ya malamu, azali na makanisi oyo ekeseni na oyo ya bango. Soki moto akutani na makambo oyo akanaki te, akoki kobanda kolandela mingi mabunga mpe kolimbisa na motema moko te.

Kozanga koyeba. Bato mingi baboyaka kolimbisa balongani na bango mpo bayebaka mpenza te soki kolimbisa ekosɛnga bango makambo nini. Na ndakisa, bakanisaka boye:

Soki nalimbisi, nazwi mabe oyo asali na lisɛki.

Soki nalimbisi, ekosɛnga nabosana likambo oyo esalemaki.

Soki nalimbisi, ekopesa ye nzela asala ngai lisusu mabe.

Ya solo, kolimbisa ekeseni na makambo oyo touti kotánga. Ata bongo, ekoki kozala mpasi kolimbisa na motema moko, mingimingi kati na mwasi ná mobali.

OKOKI KOSALA BOYE

Yebá soki kolimbisa esɛngaka nini. Mbala mingi na Biblia, liloba “kolimbisa” elimbolaka “kotika.” Na yango, kolimbisa esɛngaka ntango nyonso te kobosana likambo oyo esalemaki to kozwa mabe na lisɛki. Na bantango mosusu, esɛngaka kaka kotika likambo mpo na bolamu na yo moko mpe ya libala na yo.

Yebá makama ya koboya kolimbisa. Bato mosusu ya mayele balobaka ete kokanga nkanda ekoki kotya moto na likama monene, ekoki komemela ye bamaladi mingi ezala na nzoto to na makanisi mpe komatisa ye tansiɔ​—ekoki kutu kobebisa libala na ye. Yango wana Biblia elobi boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.”​—Baefese 4:32.

Yebá matomba ya kolimbisa. Kolimbisa ekosalisa yo okaniselaka molongani na yo mabe te, mpe otángelaka ye te makambo mabe oyo asalaki. Ekosalisa mpe yo oyeba ndenge ya koboya kobomba nkanda na motema mpe kokolisa bolingo.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:13.

Zalá na makanisi oyo ebongi. Ezalaka mpasi te olimbisa molongani na yo soki ondimi ye ndenge azali, na mabunga na ye nyonso. Buku moko (Fighting for Your Marriage) elobi boye: “Soki otye makanisi na yo na makambo oyo ozwi te, ekozala mpasi te obosana oyo ozwaki. Sikoyo, olingi kotya makanisi na yo na makambo nini?” Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka.​—Toli ya Biblia: Yakobo 3:2.

Kozala makambo makasimakasi te. Mbala ya nsima oyo okosilika mpo na likambo moko oyo molongani na yo alobi to asali, omituna boye: ‘Likambo yango ezali mpenza na ntina? Nasengeli kozela asɛnga ngai bolimbisi, to nasengeli nde kobosana likambo yango mpe kokende liboso?’​—Toli ya Biblia: 1 Petro 4:8.

Bólobela likambo yango soki esengeli. Na kimya nyonso, yebisá nini esilikisaki yo mpe mpo na nini ozali komiyoka bongo. Kotinda ye te akóma na makanisi mabe mpe kotingama kaka te na maloba moko boye, mpo yango ekoki kotinda molongani na yo aluka komilongisa. Kutu yebisá ye nde mpasi oyo oyokaki mpo na likambo oyo asalaki yo.