Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Nasala nini soki molongani na ngai azali na mwa bizaleli oyo esilikisaka ngai?

Nasala nini soki molongani na ngai azali na mwa bizaleli oyo esilikisaka ngai?
  •   Osepelaka kosala makambo na mbalakaka; kasi molongani na yo asepelaka kotya makambo nyonso na programɛ.

  •   Ozalaka kimya mpe nsɔninsɔni, kasi molongani na yo alingaka kozala elongo na bato mosusu.

 Molongani na yo azali na mwa ezaleli moko oyo esilikisaka yo? Soki ozali kotya makanisi na yo kaka na mwa ezaleli yango, yango ekoki kobebisa libala na bino. Yango wana, Biblia elobi ete “ye oyo azali se kolobaloba likambo azali kokabola baninga ya motema.”​—Masese 17:9.

 Na esika otika mwa ezaleli ya molongani na yo ebimisa matata na libala na bino, okoki kotalela mwa ezaleli yango na ndenge mosusu to na ndenge ebongi.

Na lisolo oyo, tokolobela:

 Ndenge malamu ya kotalela mwa bizaleli ya molongani na yo oyo esilikisaka yo

 Ezaleli moko ya molongani na yo oyo esilikisaka yo ekoki kozala ezaleli ya malamu oyo ebendaki yo epai ye. Tótalela ndakisa misato:

 “Mbala mingi mobali na ngai asalaka makambo malɛmbɛmalɛmbɛ to amibongisaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kobima. Kasi ezaleli yango esalaka ete azala na motema molai, ata epai na ngai. Na bantango mosusu ndenge na ye wana ya kosala makambo epesaka ngai nkanda, kasi na bantango mosusu nasepelaka komona ezaleli yango epai na ye.”​—Chelsea.

 Mwasi na ngai alandelaka makambo nyonso ya mikemike; azalaka na mposa ya koyeba soki makambo nyonso ezali kotambola malamu, ezaleli ya ndenge wana ekoki kopesa moto nkanda. Kasi, ezaleli na ye ya kolandela makambo ya mikemike esalaka ete asala te makambo kozanga ete amibongisa.”​—Christopher.

 “Na bantango mosusu mobali na ngai akipaka makambo te, mpe epesaka ngai nkanda. Kasi, ndenge na ye wana ya kosala makambo ezali moko ya bizaleli oyo nalingaka komona epai na ye. Nasepelaka na ezaleli na ye ya kozala kimya ntango mikakatano ebimi.”​—Danielle.

 Talá makambo oyo Chelsea, Christopher, mpe Danielle bayekoli: makambo malamu mpe bolembu ya molongani moko ekoki komonana na ndenge mosusu kasi ezali kaka ezaleli moko wana. Yango wana, okoki te kolongola bolɛmbu moko kozanga kolongola makambo ya malamu oyo bolɛmbu yango ebimisaka na mbala moko, ndenge moko mpe, okoki te kolongola ngámbo moko ya mbongo ya ebende.

 Ya solo, bolɛmbu mosusu ezalaka na makambo ya malonga te. Na ndakisa, Biblia elobi ete bato mosusu ‘balingá kosilika.’ (Masese 29:22) Na yango, moto nyonso asengeli kosala milende mpo na kolongola “makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga.” a​—Baefese 4:31.

 Kasi ata soki molongani na yo azali na mwa ezaleli moko oyo esilikisaka yo, landá toli oyo ya Biblia: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu . . . soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—Bakolose 3:13.

 Longola yango, meká komona mwa ezaleli yango na ndenge ebongi. Mbala mosusu ezaleli yango nde ebendaki yo epai ya molongani na yo na ebandeli. Mobali moko na nkombo Joseph alobi boye: “Kotya makanisi kaka na mwa ezaleli oyo esilikisaka, ezali lokola kotya kaka likebi na ndelo ya diama oyo ezokisaka, kasi ozali kosepela na kongɛnga na yango te.”

 Mituna oyo ekosalisa yo

 Liboso, mokomoko na bino akanisa na mozindo na mituna oyo. Na nsima, bólobela biyano na bino elongo.

  •   Okanisi ete molongani na yo azali na mwa ezaleli moko oyo ezali kobimisa matata na libala na bino? Soki ezali bongo, wapi ezaleli yango?

  •   Ezaleli yango ezali mpenza mabe, to esilikisaka yo?

  •   Ezaleli yango ezali na makambo ya malamu? Soki ezali bongo, makambo yango nini, mpo na nini ezaleli yango ezali na ntina mingi na bomoto ya molongani na yo?