Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ntango mwana na yo akosi

Ntango mwana na yo akosi

MOKAKATANO

Mwana na yo ya mbula mitano azali kosakana na shambrɛ mosusu. * Na mbala moko, oyoki eloko moko ekwei. Okei mbangu epai azali mpe omoni ye atɛlɛmi pene ya saani ya mbɛlɛ oyo epasuki. Ndenge elongi na ye ezali komonana, esalisi yo oyeba nyonso oyo eleki.

Na nkanda nyonso otuni mwana na yo boye: “Yo nde opasoli yango?”

Ayanoli mbala moko boye: “Te mama, ngai te.”

Yango ezali mbala ya liboso te mwana yango akosa na pɛtɛɛ nyonso ndenge wana. Osengeli komitungisa mpo na yango?

OYO OSENGELI KOYEBA

Lokuta nyonso ezali mabe. Biblia elobi ete Yehova Nzambe ayinaka “lolemo ya lokuta.” (Masese 6:16, 17) Mibeko oyo apesaki Bayisraele esɛngaki kopesa etumbu epai ya moto nyonso oyo akosi moto mosusu.​—Balevi 19:11, 12.

Kasi, lokuta nyonso ezalaka ndenge moko te. Lokuta mosusu ezalaka mabe mpenza; ezalaka mpo na kosala basusu mabe. Bato mosusu babukaka lokuta mpo batye bango mbamba, mbala mosusu mpo na koboya mindɔndɔ to etumbu. (Ebandeli 18:12-15) Atako lokuta nyonso ezalaka mabe, kasi lokuta mosusu ezalaka mabe koleka. Soki mwana na yo akosi, talelá mbula na ye mpe nini etindi ye akosa.

Osengeli kosembola ye ntango azali naino mwana. Doktɛrɛ David Walsh alobi boye: “Koloba solo, mingimingi ntango ezali mpasi kosala yango, ezali liteya ya ntina mpenza mpo na bana. Boninga esɛngaka konfianse, kasi lokuta ebebisaka konfianse yango.” *

Kasi, kobanga te. Ata soki mwana na yo akosi, yango elingi koloba te ete azali kokóma nokinoki moto mabe. Kobosana te ete Biblia elobi ete: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali.” (Masese 22:15) Bana mosusu bamonisaka bozoba yango na kobuka lokuta, mbala mosusu bakanisaka ete soki bakosi bongo, bakokima etumbu. Boye, ndenge oyo okosala na likambo yango ezali na ntina.

OYO OKOKI KOSALA

Luká koyeba mpo na nini mwana na yo akosi. Azali nde kobanga etumbu? Aboyi kopesa yo mpasi na motema? Soki mwana na yo azali kobɛta masolo ya lokuta mpo na kokamwisa baninga na ye, ezali mpo akoli naino te mpo na koyeba bokeseni oyo ezali kati na makambo ya solo mpe ya lokuta? Soki oyebi ntina oyo mwana na yo azali kokosa, okoyeba malamu ndenge ya kopesa ye disiplini.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 13:11.

Na bantango mosusu, kotuna ye te, lobelá ye nde likambo asali. Na lisolo oyo touti kolobela na likoló, mama wana ayebaki likambo oyo mwana asalaki kasi na nkanda nyonso atunaki ye boye: “Yo nde opasoli yango?” Mwana yango akosaki, ntango mosusu mpo na kobanga nkanda ya mama na ye. Kasi na esika ya kotuna motuna ya ndenge wana, tókanisa naino soki mama yango alobaki kaka boye: “Ah, opasoli saani!” Koloba mbala moko na esika ya kotuna motuna ekotinda mwana te akosa; mpe ekosalisa mwana akolisa ezaleli ya kolobaka solo.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:9.

Kumisáká ye soki alobi solo. Mwana nyonso alingaka kosepelisa baboti na ye, boye, salelá mposa wana mpo na litomba na yo. Salisá mwana ayeba ete koloba solo ezali na ntina mingi na libota na bino, na yango okolinga ete alobaka solo.​—Toli ya Biblia: Baebre 13:18.

Monisá mwana polele ete kobuka lokuta ebebisaka konfianse mpe ekoki kosɛnga ntango molai mpo konfianse yango ezonga lisusu. Soki alobi solo, kumisáká ye mpo na kosalisa ye akóma na bizaleli malamu. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Epesaka ngai esengo soki olobi solo.”

Zalá ndakisa. Ezali polele ete okozela te ete mwana na yo alobaka solo soki azali koyoka yo ozali koloba makambo lokola: “Yebisá ye nazali te” ntango olingi te kosolola na moto moko na telefone to “lelo nakoya te mpo nazali kobɛla” nzokande ozali kaka na mposa ya kozwa mwa mopɛpɛ.​—Toli ya Biblia: Yakobo 3:17.

Saleláká Biblia. Batoli mpe masolo ya bato oyo Biblia elobeli elendisaka koloba solo. Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, ekoki kosalisa yo okɔtisa batoli ya Biblia na motema ya mwana. Mokapo 22 ya buku yango ezali na motó ya likambo “Ntina oyo tosengeli kokosa te.” (Talá mwa ndambo ya maloba na yango na etanda “ Buku mpo na kosalisa mwana na yo.”)

^ par. 4 Na lisolo oyo tolobeli bana nyonso, ezala mibali to basi.

^ par. 11 Euti na buku, No: Why Kids​—of All Ages—​Need to Hear It and Ways Parents Can Say It.