Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Okosala nini soki mwana na yo ya elenge abebisi konfianse oyo opesaka ye?

Okosala nini soki mwana na yo ya elenge abebisi konfianse oyo opesaka ye?

 Bilenge mosusu bazongaka na ndako nsima na ngonga oyo baboti batyá. Basusu bakosaka baboti na bango, mbala mosusu babukaka lokuta to babimaka na ndako kozanga koyebisa baboti na bango mpo bábima elongo na baninga na bango. Okosala nini soki mwana na yo ya elenge asali likambo moko oyo ekosala ete opesa ye lisusu konfianse te?

 Mwana na ngai ya elenge akómi nde motomboki?

 Mpenza te. Biblia elobi: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali,” mpe mbala mingi makambo oyo bilenge basalaka endimisaka bosolo ya maloba yango. (Masese 22:15) Doktɛrɛ Laurence Steinberg akomi boye: “Longola mabunga mosusu, bilenge bazwaka bikateli mosusu mbangumbangu mpe ezalaka ya bozoba.” a

 Bongo soki akosi?

 Kowela koloba te ete mwana na yo ya elenge azali na mokano ya koboya kotosa yo. Bolukiluki emonisi ete bilenge bakipaka mpenza makambo oyo baboti bakanisaka mpo na bango, ata soki makanisi yango emonanaka ndenge mosusu na miso na bango. Atako mwana na yo ya elenge akoki te komonisa yango, ntango mosusu ye moko akoki kolɛmba nzoto mpo na makambo oyo asalaki mpe akoki komona ete alɛmbisi yo nzoto.

Kaka ndenge mokuwa oyo ebukani ekoki kozonga na esika na yango mpe kozwa lisusu makasi ntango kaka ebongi. Ndenge moko mpe konfianse oyo ebebaki ekoki kozonga lisusu

 Ezali foti ya nani?

  •    Ezali nde baninga na ye? Biblia elobi: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Na ntembe te, baninga bakoki kobongisa to kobebisa bilenge. Ezali mpe na makambo mosusu oyo ekoki kobebisa bilenge, na ndakisa basite Internet ya kosolola na baninga mpe bapiblisite. Longola yango, bilenge bayebi makambo mingi te ya bomoi, yango wana ezali pɛtɛɛ koyeba ntina oyo esalaka ete bilenge bázwaka bikateli ya mabe. Yango wana, basengeli koyekola kozwa mokumba na bango na lisɛki te mpo na oyo etali kozwa bikateli soki balingi kokóma mikóló oyo bakoyeba kotambwisa makambo.

  •    Ezali foti na ngai? Okoki komituna soki ozalaki makambo makasimakasi mpe yango nde esalaki ete azala na etamboli ya mabe. To na bantango mosusu, okoki komituna soki ozalaki kokanga miso na mabe mpe yango nde esalaki ete mwana akóma kosala nyonso oyo alingi. Na esika otya kaka miso na makambo oyo osalaki, kanisá likambo oyo okoki kosala sikoyo mpo na kosalisa ye.

 Ndenge nini nakoki kosalisa mwana na ngai ya elenge abongisa makambo mpo napesa ye lisusu konfianse?

  •   Yebá komipekisa. Mwana na yo ya elenge akoki komizela ete osilika. Mpo na yango ekozala malamu ete osilika te. Kutu sololá na mwana na yo na motema mpiɔ mpo na koyeba ntina oyo asalaki likambo yango. Alingaki nde koyeba makambo? Alɛmbaki? Azalaki ye moko? Azalaki koluka baninga kasi azwaki te? Ezali na ntina moko te ekokaki kosala ete asala mabe, kasi ekoki kosalisa yo ná mwana na yo ya elenge bókanga ntina ya likambo oyo esalaki ete asala bongo.

     Toli ya Biblia: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.”​—Yakobo 1:19.

  •   Salisá mwana na yo ya elenge akanisa na mozindo makambo oyo esalemaki. Tuná ye mituna oyo: Makambo oyo esalemaki eteyi yo nini? Okosala nini soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo lisusu? Mituna ya ndenge wana ekoki kosalisa yo okolisa makoki ya kokanisa ya mwana na yo ya elenge.

     Toli ya Biblia: “Pamelá, sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.”​—2 Timote 4:2.

  •   Salisá mwana na yo ya elenge amona mbuma mabe oyo makambo asalaki ebimisaki. Makambo mingi oyo baboti bapekisaka bana na bango ya bilenge eutaka na makambo ya mabe oyo bana yango basalaki. Na ndakisa, soki mwana na yo ya elenge abebisi konfianse oyo ozalaki kopesa ye ntango azwi motuka na yo kozanga ndingisa, okoki kopekisa ye atambwisa yango na boumeli ya mwa ntango.

     Toli ya Biblia: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

  •   Kanisá ndenge ya kozongisa konfianse oyo ozalaki na yango. Ya solo, ekozwa ntango mpo na kozongisa yango. Kasi, mwana na yo ya elenge asengeli koyeba ete konfianse oyo abebisaki akoki kozongisa yango nsima ya mwa ntango. Omindimisa ete ayebi ete akozala na likoki ya kozongisa konfianse oyo ozalaki kopesa ye. Soki mwana na yo ya elenge ayoki ete akozala ata moke te na likoki ya kozongisa konfianse oyo ozalaki kopesa ye, akoki kolɛmba nzoto mpo na kozongisa yango.

     Toli ya Biblia: “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”​—Bakolose 3:21.

a Euti na buku You and Your Adolescent.