Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ndenge ya kolonga komekama

Ndenge ya kolonga komekama

MOKAKATANO

“Na bantango mosusu, bana basi basɛngaka nimero na ngai ya telefone mpe balingaka ‘tóbima’ na bango. Naboyaka mpe nalongwaka na esika yango. Kasi na nsima namitunaka boye: ‘Soki napesaka bango nimero na ngai ya telefone, elingaki kosala nini?’ Mpo na koloba solo, bana basi yango mosusu bazali kitoko mpenza. Ezali mpasi te komituna boye: ‘Mpo na nini naboyaki?’”​—Carlos, * mbula 16.

Yo mpe okutanaka na komekama lokola Carlos? Soki ezali bongo, yebá ete okoki kolonga etumba yango.

OYO OSENGELI KOYEBA

Okomiyokisa mpasi yo moko soki ondimi kokwea na komekama

Moto nyonso akutanaka na komekama ata mpe mikóló. Komekama ekoki kozala na balolenge mingi. Ntoma Paulo azalaki elenge te ntango akomaki boye: “Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu.” (Baroma 7:22, 23) Atako akutanaki na komekama mingi, ntoma Paulo akweaki te na komekama yango, ekoki mpe kozala bongo mpo na yo! Mpo na nini kozala moombo ya bamposa na yo? (1 Bakorinti 9:27) Soki oyebi ndenge ya kolonga komekama ntango ozali naino elenge, yango ekosala ete okutana na mikakatano mingi te sikoyo mpe likoki yango ekosalisa yo ntango okokóma mokóló.

Bafilme, miziki mpe babuku mosusu ebakisaka komekama. Biblia elobeli “bamposa ya bolenge,” oyo ezalaka mpenza makasi. (2 Timote 2:22) Kasi mbala mingi, bafilme oyo bilenge batalaka, miziki oyo bayokaka mpe babuku oyo balendisaka bango bátánga, ebakisaka bamposa yango mpo emonisaka ete kokwea na komekama ezali mabe te. Na ndakisa, soki bato mibale na filme bazali ‘kolingana,’ na ntembe te tii na esika moko boye ya filme yango, bakosangisa kaka nzoto. Nzokande, Biblia elobi ete basi mpe mibali ya solosolo bazalaka na nguya ya ‘koboya bamposa ya nzoto.’ (1 Petro 2:11) Yango elingi koloba ete okoki kopona kolonga komekama. Kasi, ndenge nini?

OYO OKOKI KOSALA

Yebá bolɛmbu na yo. Shɛni ezalaka makasi kaka soki matonga na yango oyo ezalaka pɛtɛɛ ezali malamu. Ndenge moko mpe, ekateli na yo ya kosala oyo ezali malamu ekoki kobeba na makambo oyo ozalaka na bolɛmbu mingi. Osengeli komibatela na makambo nini?​—Toli ya Biblia: Yakobo 1:14.

Kanisá oyo okosala soki okutani na komekama. Kanisá makambo oyo ekoki kotya yo na komekama. Meká kokanisa oyo okosala soki komekama moko ekómeli yo.​—Toli ya Biblia: Masese 22:3.

Kómisá kondima na yo makasi. Biblia elobi ete ntango amekamaki mpo asala pite, Yozefe alobaki boye: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” (Ebandeli 39:9) Fraze “ndenge nini nakoki” emonisi ete Yozefe ayebaki malamu mpenza oyo ezali mabe mpe malamu. Bongo yo?

Luká baninga ya malamu. Okoki kolongola komekama mingi soki oponi baninga oyo batosaka mibeko ya Nzambe lokola yo. Biblia elobi ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

Boyá makambo oyo ekokómisa komekama mpasi mpo na kolonga. Na ndakisa:

  • Kolinga te kozala na moto oyo azali molongani na yo te na esika ya bino mibale kaka.

  • Kosalela te Internet na ngonga to esika oyo ekoki kotinda yo otala pornografi.

  • Zalá mosika na bato oyo maloba mpe bizaleli na bango emonisaka ete lisumu ezali mabe te.

Toli oyo wapi okoki kosalela oyo ekosalisa yo okwea te na komekama?​—Toli ya Biblia: 2 Timote 2:22.

Bondelá Nzambe asalisa yo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” (Matai 26:41) Osengeli koyeba ete Yehova Nzambe alingi ete olonga komekama, mpe akoki kosalisa yo. Biblia elobi boye: “Akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”​—1 Bakorinti 10:13.

^ par. 4 Topesi ye nkombo mosusu.