Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kopekisa nkanda na yo

Ndenge ya kopekisa nkanda na yo

 Molongani na yo alobi to asali likambo moko oyo epesi yo nkanda mpe oboyi kobimisa nkanda na yo. Kasi, na nsima molongani na yo amoni lokola likambo moko ya mabe ezali mpe abandi kotunatuna yo. Yango ebakisi nkanda na yo. Ndenge nini okoki kopekisa nkanda na yo na likambo ya boye?

 Oyo osengeli koyeba

  •   Nkanda ekoki kobebisa sante na yo. Baankɛtɛ emonisi ete moto oyo apekisaka nkanda na ye te akoki kobɛla maladi ya tansiɔ, ya motema, ya makanisi mpe maladi ya estoma. Balobaka mpe ete ezangisaka mpɔngi, ematisaka mitungisi, ebebisaka loposo mpe moto akoki kosala AVC. Yango wana Biblia elobi: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.”​—Nzembo 37:8.

  •   Kofandisa nkanda na motema ekoki mpe kosala yo mabe. Kozala kaka na nkanda ekoki kozala lokola maladi oyo ezali kolya yo na kati. Na ndakisa, okoki kokóma na ezaleli ya kokanisela basusu mabe to koloba mabe mpo na bango. Ezaleli ya bongo ekoki kosala ete bato bakóma kokima yo mpe ekoki kobebisa libala na yo.

 Oyo okoki kosala

  •   Luká bizaleli ya malamu ya molongani na yo. Tángá makambo misato ya molongani na yo oyo esepelisaka yo. Mbala ya nsima oyo okoyoka nkanda mpo na likambo moko asali, kanisá bizaleli na ye oyo outi kotánga. Yango ekoki kosalisa yo opekisa nkanda na yo.

     Toli ya Biblia: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

  •    Kómá na ezaleli ya kolimbisaka. Ya liboso, luká kotalela makambo ndenge molongani na yo azali kotalela yango. Yango ekosalisa yo oyoka ndenge moninga azali komiyoka; Biblia ebengi yango ‘komitya na esika ya basusu.’ (1 Petro 3:8) Na nsima, omituna, ‘likambo oyo etindi ngai nayoka nkanda ezali mpenza monene na boye ete nakoki kolimbisa te?’

     Toli ya Biblia: ‘Ezali kitoko kolimbisa likambo oyo ebuki mibeko.’​—Masese 19:11.

  •    Na boboto nyonso mpe na mayele, monisá ndenge ozali komiyoka. Salelá liloba “ngai.” Na ndakisa, na esika ya koloba “ozwaka ngai na valɛrɛ te ntango obengaka ngai te mpo na koyebisa ngai esika ozali,” loba nde, “etungisaka ngai soki ngonga epusani mpe nayebi te soki ozali malamu.” Koloba na boboto ekoki kosalisa yo opekisa nkanda na yo.

     Toli ya Biblia: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.”​—Bakolose 4:6.

  •    Yoká ye na limemya nyonso. Nsima ya kobimisa makanisi na yo, tiká mpe molongani na yo aloba kozanga kokata ye maloba. Soki molongani na yo asilisi koloba, zongelá makambo alobi mpo omona soki okangi ntina na yango mpenza. Kaka koyoka ya mpamba ekoki mpenza kosalisa yo opekisa nkanda na yo.

     Toli ya Biblia: ‘Yokáká noki, kowelaka koloba te.’​—Yakobo 1:19.