Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Te na yo etikala kaka Te

Te na yo etikala kaka Te

MOKAKATANO

Ata soki oyebisi mwana na yo ete oboyi, ayokaka kaka te. Kozanga koyoka na ye * esukisaka yo motema. Ata soki olobi to osali nini, atingamaka kaka mpe nsukansuka omonaka ete ebongi kaka okokisa mposa na ye. Atako oboyaki, na nkanda nyonso omoni malamu opesa ye kaka eloko oyo asɛngi.

Okoki kosala ete atika ezaleli mabe wana. Kasi liboso, tótalela mwa makambo oyo osengeli koyeba na oyo etali koboyela mwana makambo mosusu.

OYO OSENGELI KOYEBA

Koboyela mwana likambo ezali mabe te. Baboti mosusu bakoki koboya likanisi yango, mbala mosusu bakoki koloba ete osengeli kosolola na ye, komonisa ye ntina oyo oboyi, to mpe koluka koyokana na ye. Balobi ete osengeli koloba na mwana te ete oboyi, soki te akokangela yo nkanda.

Na ebandeli, ndenge “oboyeli” ye ekosepelisa ye te. Ata bongo, akoki kozwela yango liteya ya ntina mingi ete na bomoi, moto akoki te kosala makambo nyonso oyo alingi. Soki ozali kondima nyonso oyo mwana alobi, bokonzi na yo ekozala lisusu na ntina te mpe ekosala ete abanda kosakana na yo mpe kolelalela ntango nyonso oyo alingi eloko moko boye. Ntango abandi kokola, eyano na yo ekoki kosala ete akangela yo nkanda. Kutu, ndenge nini mwana akoki kotosa moboti oyo azalaka na bokonzi te likoló na ye?

Soki Te na yo etikalaka Te, ekosalisa mwana ntango akokola. Ekoteya ye litomba ya komipimelaka makambo mosusu. Liteya yango ekosalisa ye ntango akokóma elenge, soki baninga batye ye mbamba asalela drɔgɛ to asangisa nzoto liboso ya kobala.

Koboyela mwana likambo ekosalisa ye mpe ntango akokóma mokóló. Doktɛrɛ David Walsh akomaki boye: “Kutu, biso [mikóló] tozwaka ntango nyonso te biloko oyo tozalaka na yango mposa. Soki tozali kopesa bana eloko nyonso oyo balingi, ekosalisa bango te bákóma mikóló oyo bayebi kokokisa mikumba na bango.” *

OKOKI KOSALA BOYE

Tyá makanisi na mokano na yo. Mokano na yo ezali ete mwana na yo akóma na makoki, ayeba komipekisa mpe akóma mokóló oyo ayebi kokokisa mikumba na ye. Kasi soki ozali kopesa ye eloko nyonso asɛngi, mokano wana ekokokisama te. Biblia elobi ete ‘soki bazali kobondelabondela moto banda bolenge na ye, na mikolo ya nsima na bomoi na ye, akokóma kutu moto oyo azangi botɔndi.’ (Masese 29:21) Koloba Te, ezali lolenge moko ya disiplini oyo ebongi. Formasyo ya ndenge wana ekonyokola mwana te, kasi ekosalisa nde ye.​—Toli ya Biblia: Masese 19:18.

Soki oboyi, kobongola makanisi te. Mwana akokani na yo te. Yango wana ntina ezali te oluka kolimbolela ye mpo na nini oboyi lokola nde ozali kobondela ye andima. Toboyi te, ntango bana bazali kokola, bazalaka na mposa ya kozala na ‘makoki ya kososola, oyo emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Na yango, ezali mabe te kosolola na mwana. Ata bongo, kokwea na motambo te ya kotyanaka ntembe ná bana na yo ya mike mpo na ntina oyo oboyi. Soki ozali kokoba kotyana ntembe ná bango, bakomona te ete ezali ekateli ya makasi oyo ozwi kasi nde ozali kosɛnga bango bápona.​—Toli ya Biblia: Baefese 6:1.

Kangamá na ekateli na yo. Mwana na yo akoki kobanda kolelalela mpo na komona soki okokangama na ekateli na yo. Okosala nini soki asali bongo na ndako? Buku moko (Loving Without Spoiling) elobi ete :“Longolá mwana esika ozali. Yebisá ye boye: ‘soki ozali kolela kaka, malamu, kasi nazali na mposa ya koyoka yango te. Ebongi okende na shambrɛ na yo. Okoki kolela kuna tii ntango okotika.’” Na ebandeli, ekoki kozala mpasi ozwa ekateli ya makasi bongo​—mpe mpasi mpo mwana na yo andima yango. Kasi akoki kotika kotingama na eloko oyo alingi soki amoni ete okangami na ekateli na yo.​—Toli ya Biblia: Yakobo 5:12.

Koboya kaka te mpo na kolakisa bokonzi na yo

Kolekisa ndelo te. Koboya kaka te mpo na kolakisa bokonzi na yo. Kutu, ‘ezaleli na yo ya makambo makasimakasi te eyebana.’ (Bafilipi 4:5) Ata soki otikaka te komilelalela ya mwana etinda yo opesa ye eloko alingi, na bantango mosusu okoki kondima kopesa ye eloko oyo asɛngi soki ezali mabe te.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:21.

^ par. 4 Lisolo oyo elobeli bana nyonso ezala ya mibali to ya basi.

^ par. 10 Euti na buku No: Why Kids​—of All Ages—​Need to Hear It and Ways Parents Can Say It.