Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ebongolaka bato

Na masolo oyo ya bomoi, talá ndenge Liloba ya Nzambe esalisi bato ya mikili ndenge na ndenge bákóma na bizaleli malamu.

Bomoi ya esengo

Nazwaki bozwi ya solosolo

Ndenge nini moto ya mombongo amonaki eloko ya motuya mpenza oyo eleki bozwi mpe mbongo?

Juan Pablo Zermeño: Yehova apesaki ngai bomoi oyo ezali na ntina

Mikakatano oyo tokutanaka na yango na bomwana ekoki kotikala na makanisi na biso ntango molai. Moná ndenge Juan Pablo azwaki kimya, bomoi ya ntina mpe esengo ya solosolo, atako akutanaki na mikakatano na bomwana.

Ntango nini bolingo ya sembo ekolonga koyinana?

Kolonga koyinana ekoki kozala mpasi. Talá ndenge Moyuda moko ná Mopalestina moko balongaki yango mpenza.

Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai

Ernest Loedi azwaki biyano ya mituna mosusu ya ntina mingi koleka oyo etali bomoi. Biyano ya polele ya Biblia epesaki ye elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.

Mituna misato ebongolaki bomoi na ngai

Ntango molakisi akómaki mwana-kelasi mpe mwana-kelasi akómaki molakisi, Doris Eldred azwaki biyano oyo ebongi na mituna oyo azalaki komituna mpo na bomoi.

Nazalaki kobanga liwa!

Mokolo moko Yvonne Quarrie amitunaki, “Mpo na nini nazali awa na mokili?” Eyango azwaki ebongolaki bomoi na ye.

Yehova asali mingi mpo na ngai

Mateya nini ya Biblia esalisaki Crystal, oyo babebisaki ye ntango azalaki mwana moke, akóma mpenza moninga ya Yehova Nzambe mpe amona ete bomoi na ye ezali na ntina?

Nayokaka lisusu nsɔni te

Talá ndenge nini Israel Martínez alongolaki ezaleli ya komiyoka mpamba; ezaleli oyo epikamaki makasi na motema na ye mpe ndenge akómaki komimona mpamba.

Nsukansuka boyokani na ngai ná tata ezongaki

Talá mpo na nini Renée amipesaki na drɔgɛ mpe komɛla masanga mpe ndenge atikaki momeseno yango ya mabe.

Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu

Julio Corio akutanaki na likama ya nsɔmɔ mpe akanisaki ete Nzambe azalaki kokipe ye te. Maloba oyo ezali na Kobima 3:7 esalisaki ye abongola makanisi na ye.

Nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko

Christof Bauer amipesaki na kotánga Biblia na boumeli ya ntango oyo azalaki na mobembo na masuwa ya moke na kati ya Mbu Atlantike. Makambo nini ayekolaki?

Nalingaki kosilisa kozanga bosembo

Rafika akɔtaki na lisangá moko ya batomboki mpo na kotɛmɛla makambo ya kozanga bosembo. Kasi amonaki elaka ya Biblia oyo elobeli kimya mpe bosembo na Bokonzi ya Nzambe.

“Namonaka lisusu te ete nasengeli kobongola mokili”

Ndenge nini koyekola Biblia esalisaki moto moko oyo abundaka mpo na mbongwana ayeba epai mbongwana ya solosolo mpo na bato ekouta?

Nabwakaki mandoki

Talá ndenge nsango ya Biblia oyo ekitisaka motema esalisaki Cindy atika mobulu.

Nazalaki kondima te ete Nzambe azali

Ndenge nini moto moko oyo banda bomwana na ye azalaki kondima likanisi ya Bakoministe mpe liteya oyo elobaka ete Nzambe azali te, akómaki kondimela Biblia?

Biblia ebongolaka bato​—11/2012

Ndenge nini mwasi oyo azalaki na mosala ya malamu, moto oyo azalaki kobɛta masano ya mbongo, mpe moto oyo alɛmbaki bomoi bazwaki esengo ya solosolo?

Biblia ebongolaka bato​—Moto oyo azalaki na basi ebele akómi mobali malamu

Nini esalisaki moto oyo azalaki na basi ebela abongola ndenge na ye ya kotalela libala?

Kokóma na bindimeli mosusu

“Nazalaki na mituna mingi kasi ezangaki biyano”

Makambo nini esalaki ete Mario, oyo azalaki pastɛrɛ ya eglize, andima ete Batatoli ya Yehova bateyaka mpenza solo ya Biblia?

Solo ya Biblia ekokisaki mposa makasi nazalaki na yango ya kozwa biyano

Mayli Gündel atikaki kondimela Nzambe ntango tata na ye akufaki. Ndenge nini akómaki na kondima ya solosolo mpe azwaki kimya ya motema?

Basalelaki Biblia mpo na koyanola na motuna nyonso!

Isolina Lamela azalaki mamelo ya Katolike, mpe na nsima koministe kasi akómaki lisusu kosepela na makambo yango te. Na nsima, akutanaki na Batatoli ya Yehova oyo basalisaki ye na nzela ya Biblia mpo bomoi na ye ezala mpenza na ntina.

Natikaki kokende na losambo

Tom alingaki kondimela Nzambe kasi makambo ya lingomba mpe milulu ezangá ntina na yango elɛmbisaki ye. Ndenge nini boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ye akóma na elikya?

“Yehova abosanaki ngai te”

Mwasi oyo akangamaki na makambo ya losambo; kasi na nsima ayaki kozwa biyano ya Biblia na mituna oyo azalaki komituna mpo na ntina oyo moto akufaka mpe nini ekómelaka moto soki akufi. Talá ndenge solo ebongolaki bomoi na ye.

“Nazalaki na mposa ya kokóma sango”

Banda ntango azalaki elenge, Roberto Pacheco azalaki na mokano ya kokóma sango ya Katolike. Talá makambo oyo ebongolaki bomoi na ye.

“Balingaki ngai moko namona oyo Biblia eteyaka mpenza”

Luis Alifonso azalaki na mposa ya kokóma misionɛrɛ na Lingomba ya Mormon. Ndenge nini koyekola Biblia ebongolaki mikano na ye mpe bomoi na ye?

Masanga mpe badrɔgɛ

“Nazali lisusu te moombo ya mobulu”

Mokolo ya liboso na mosala na ye ya sika, batunaki Michael Kuenzle boye: “Okanisi ete bampasi oyo ezali na mokili oyo eutaka epai ya Nzambe?” Yango ebongolaki makambo na bomoi na ye.

Bomoi na ngai ekobaki kobeba se kobeba

Solomone akendaki kofanda na États-Unis, na elikya ya kozala na bomoi ya malamu. Kutu, abandaki nde komɛla bangi mpe asukaki na bolɔkɔ. Nini esalisaki ye abongisa bomoi na ye?

Balabala nde ekómaki ndako na ngai

Mobulu, komɛla bangi mpe kolangwa masanga etindaki Antonio amona ete bomoi ezali na ntina te. Nini ebongolaki makanisi na ye?

Nayekolaki komemya basi mpe komipesa kilo

Joseph Ehrenbogen atángaki likambo moko na Biblia oyo esalisaki ye abongola mpenza bomoi na ye.

“Nakómaki komituna mpenza soki bomoi na ngai ezalaki kokende wapi”

Tángá ndenge batoli ya Biblia esalisaki moto moko abongola bizaleli mpe makanisi na ye mpo asepelisa Nzambe.

Nalɛmbaki bomoi oyo nazalaki na yango

Dmitry Korshunov azalaki momɛli makasi ya masanga, kasi abandaki kotánga Biblia mokolo na mokolo. Nini esalisaki ye abongola bomoi na ye mpe akóma na esengo ya solosolo?

Biblia ebongolaka bato​—10/2012

Ndenge nini bato mibale balongaki kotika makambo ya mabe, na ndakisa masangá mpe bangi, mpe bakómaki mpenza na esengo?

“Nazwi sikoyo bonsomi ya solosolo”

Talá ndenge oyo Biblia esalisaki elenge mobali moko atika komɛla makaya mpe komɛla mingi badrɔgɛ mpe masanga.

Mobulu mpe kobomana

“Kosala mabe mpe kolinga mbongo mingi ememelaki ngai mpasi na bomoi”

Ntango Artan abimaki na bolɔkɔ, ayekolaki ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bolingo ya mbongo ezali solo.

“Nazali lisusu te moto ya mobulu”

Nini esalisaki Sébastien Kayira atika kolangwa masanga mpe kobɛta mwasi na ye mpe akóma tata mpe mobali malamu?

“Nazalaki kotimola lilita na ngai moko”

Nini etindaki moto moko ya mobulu na El Salvador abongola bomoi na ye?

Nakómi kotalela bato lolenge mosusu

Sobantu ayekolaki Biblia mpe atikaki bomoi ya mobulu. Sikoyo ateyaka bato ete na mikolo ezali koya, mobulu ekozala lisusu te.

Nazalaki moto ya nkandankanda

Moto moko oyo azalaki kala na etuluku ya bato ya mobulu andimi mpenza ete bomoi oyo azali na yango sikoyo emonisi ete Biblia ezali na nguya ya kobongola bato. Azali lelo na boyokani malamu na Nzambe.

Nazalaki nkandankanda mpe mobulu

Nini esalisaki moto moko oyo azalaki kobunda na balabala na Mexique abongisa bomoto na ye?

Pesá ngai ata mbula moko ya kimya mpe ya esengo

Vɛrsɛ ya 1 Yoane 1:9 esimbaki motema ya Alain

Nakanisaki ete nazalaki kosepela na bomoi na ndenge esengeli

Pawel Pyzara azalaki moto ya mobulu, momɛli drɔgɛ, mpe koluka mosala ya lokumu na makambo ya mibeko nyonso na mbala moko. Makambo ebongwanaki ntango abundaki na mibali mwambe.

Bomoi na ngai ezalaki kobeba se kobeba

Stephen McDowell azalaki elenge mobali moko ya mobulu mpenza, kasi lokola azalaki te ntango baninga na ye babomaki moto, azwaki ekateli ya kobongola bomoi na ye.

Nayekolaki ete Yehova azali motema mawa mpe alimbisaka

Mpo na Normand Pelletier, kobuba bato ekómaki lokola komɛla drɔgɛ. Kasi atangisaki mai ya miso ntango atángaki vɛrsɛ moko ya Biblia.

Nazalaki kobundela makambo oyo ezangi bosembo mpe mobulu

Antoine Touma azalaki mosani monene ya kung fu, kasi vɛrsɛ ya 1 Timote 4:8 ebongolaki bomoi na ye.

Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso

Annunziato Lugarà azalaki na etuluku moko ya bato ya mobulu, kasi ntango akendaki na Ndako ya Bokonzi makambo ebongwanaki na bomoi na ye.

“Bato mingi bayinaki ngai”

Talá ndenge koyekola Biblia esalisaki moto moko ya mobulu akóma moto ya kimya.

Masano, miziki, mpe kominanola

Jason Worilds: Kosalela Yehova esalaka ete moto alonga ntango nyonso

Kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso ememaka esengo oyo ezangi nsuka.

“Nakanisaki ete nazwaki nyonso oyo nazalaki koluka”

Stéphane azalaki elenge oyo alongaki na mosala ya miziki mpe azalaki na lokumu. Emonanaki lokola azali na nyonso, kasi azalaki komiyoka lokola azangi eloko moko. Ndenge nini azwaki esengo ya solosolo mpe bomoi na ye ekómaki na ntina?

Mbano malamu koleka na bomoi na ngai

Nini etindaki mobɛti monene ya lisano ya tenisi akóma koteya bato Biblia?

“Nazalaki kosepela mingi na masano ya bitumba”

Ntango Erwin Lamsfus atunaki moninga na ye moko boye: “Osí omituná mpo na nini tozali awa na mabele?” Eyano yango ebongolaki bomoi na ye.

Ezalaki mpasi natika bomoi na ngai ya kala

Mobali moko alongwaki na boombo ya pornografi mpe akómaki na kimya ya makanisi ndenge Biblia elobaka?

“Bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza”

Atako alongaki na mosala na ye ya miziki, Esa amonaki ete azali na esengo te. Talá ndenge mobɛti-miziki wana azwaki esengo ya solosolo.

Kosalela Yehova nde epesaka makasi

Vɛrsɛ moko ya Biblia endimisaki Hércules ete endimisaki Hércules ete akoki kolongola bomoto na ye ya nkanda, mpe kokóma moto ya kimya mpe ya bolingo.

Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!

Samuel Hamilton alingaki masano mingi, kasi boyekoli ya Biblia ebongolaki bomoi na ye.

Elaka ya paradiso na mabele ebongolaki bomoi na ngai!

Ivars Vigulis amipesaki na lisano ya momekano ya tukutuku mpo na koluka lokumu mpe bisengo. Ndenge nini Biblia ebongolaki bomoi na ye?