Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nakanisaki ete nazalaki kosepela na bomoi na ndenge esengeli

Nakanisaki ete nazalaki kosepela na bomoi na ndenge esengeli
  • ABOTAMAKI NA: 1982

  • EKÓLO: POLOGNE

  • BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KOLINGA MOBULU, DRƆGƐ MPE MOSALA YA LOKUMU

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na engumba moko ya moke na Pologne, mosika te na ndelo oyo ekaboli ekólo yango na Allemagne. Nazalaki na bomoi moko ya kimya na esika oyo ezalaki penepene ya baferme mpe bazamba. Baboti na ngai balingaki ete nazala moto malamu, nasilisa kelasi mpe nazwa mosala moko ya lokumu.

Mobulu na ngai ebandaki ntango nakɔtaki iniversite na engumba Wrocław mpo nakóma avoka. Lokola nazalaki mosika na baboti na ngai, nakómaki na baninga ya mabe. Nazalaki ntango nyonso kolinga lisano ya bale, kasi baninga na ngai wana ya sika basalaki ete nakóma kolinga lisano yango mingi mpenza. Ekipi oyo nazalaki kolinga mingi ezalaki ya engumba Varsovie mpe na bawikende nazalaki kolanda yango bisika nyonso oyo ezalaki kokende kobɛta bale. Na mibembo yango tozalaki komɛla masanga mingi, drɔgɛ mpe ntango mosusu kobunda bitumba ya nsɔmɔ na bato oyo bazalaki kokɔtela ekipi mosusu. Namonaki yango lokola mwaye ya kokima mitungisi ya mokolo na mokolo, atako nayebaki ete soki bapolisi bakangi ngai ekoki kobebisa kelasi na ngai ya avoka.

Ngai ná baninga na ngai tozalaki kolinga kokende banganda ya butu mpe bisika babɛtaka miziki. Na bisika yango, tozalaki mbala mingi kobunda na babalabala. Bapolisi bakangaki ngai mbala ebele, kasi nazalaki kosala nyonso namema ngambo monene te na bato ya mibeko, yango wana na bantango mosusu nazalaki kopesa kanyaka. Nakanisaki ete nazalaki kosepela na bomoi na ndenge esengeli. Ata bongo, na nse ya motema nayebaki ete nazalaki kosala mabe. Nazalaki kokende eglize mikolo nyonso ya lomingo mpo lisosoli na ngai etika kotungisa ngai.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Na 2004, Batatoli ya Yehova mibale babɛtaki porte na ngai mpe nandimaki báyekola na ngai Biblia. Ntango nayekolaki makambo mingi etali ndenge ya kozala mokristo ya solo, lisosoli na ngai ekómaki mpenza kotungisa ngai. Nayebaki ete nasengeli kotika komɛla masanga mingi, koboya drɔgɛ mpe kokabwana na baninga oyo batosaka mibeko ya Biblia te. Namonaki ete nasengelaki mpe kotika ezaleli na ngai ya nkanda mpe mobulu. Atako namonaki bongo, kasi nabongwanaki ata moke te.

Makambo ebongwanaki mokolo moko na butu ntango nabundaki na bato mwambe. Nazali koyeba lisusu ndenge nalalaki na balabala ntango babɛtaki ngai makɔfi mpe banyatanyataki ngai na motó. Lokola namonaki ete nakómi pene ya liwa, nabondelaki boye: “Limbisá ngai Yehova, ndenge nazwaki maloba na yo na lisɛki. Soki nabiki, nalaki ete nakoyekola Biblia na Batatoli na yo mpe nakobongisa bomoi na ngai.” Likambo ya kokamwa, nabikaki. Nakokisaki elaka na ngai ya koyekola Biblia.

Na 2006, nakendaki na Angleterre. Nazalaki na mposa ya kozwa mbongo mingi mpo nazonga na Pologne mpe nazwa diplome monene ya avoka. Ntango nazalaki kokoba koyekola Biblia, vɛrsɛ moko esimbaki mpenza motema na ngai. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo na motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu Nkolo na ngai, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso lokola biloko oyo ebungá. Mpo na ye nandimi kobungisa biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola bosɔtɔ mpamba, mpo nazwa Kristo.” (Bafilipi 3:8) Ntoma Paulo atángaki kelasi ya mibeko lokola ngai mpe azalaki moto ya mobulu mpenza lokola ngai. (Misala 8:3) Ata bongo, Paulo amonaki lolenge eleki malamu ya kotambwisa bomoi na ye: Kosalela Nzambe mpe kosala nyonso mpo na kolanda ndakisa ya Yesu. Ntango nakanisaki na mozindo ndakisa ya Paulo, namonaki ete kosala mosala ya mbongo mingi mpe kozala mobulu yango te nde epesaka moto esengo. Nandimisamaki ete soki Paulo abongwanaki, ngai mpe nakoki kobongwana. Yango wana nazwaki ekateli ya kotikala na Angleterre mpe nalongolaki makanisi ya kokoba kelasi yango ya mibeko.

Ntango nazalaki kokoba koyekola makambo mingi oyo etali Yehova, boninga na ngai na ye ezalaki kokóma makasi. Koyeba ete Nzambe alaki kolimbisa baoyo nyonso balingi kobongwana, esimbaki mpenza motema na ngai. (Misala 2:38) Ntango nakanisaki na mozindo maloba oyo ezali na 1 Yoane 4:16, oyo elobi ete “Nzambe azali bolingo,” nakómaki komona mpo na nini Nzambe ayinaka mobulu.

Nazalaki na mposa ya kozala mpe na kati ya libota na bango ya bandeko

Bizaleli ya Batatoli ya Yehova mpe ekamwisaki ngai. Namonaki polele ete bazalaki kosala nyonso bázala na bizaleli oyo Biblia endimaka. Nazalaki na mposa ya kozala mpe na kati ya libota na bango ya bandeko. Nsima ya kosala makasi mpe kobongisa makambo mosusu na bomoi na ngai, nazwaki batisimo na 2008, mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

Ngai ná Esther tozwaka mpenza esengo ntango toyekolaka na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Polonais Biblia

MATOMBA OYO NAZWI:

Biblia esali ete nalongwa moto oyo azalaki kolinga makambo ya minene, mobulu, drɔgɛ, komɛla masanga mingi, kokumisa mingi ekipi ya bale mpe nakóma mosaleli ya Nzambe oyo alingaka koteya basusu makambo ya Biblia. Nalingaka kaka kotala lisano ya bale, kasi nazali na ekateli ya kotya masano ya ndenge wana na esika na yango.

Sikoyo nabalá Esther, mwasi moko kitoko oyo asambelaka mpe Yehova mpe tozali na esengo. Tozwaka mpenza esengo ntango toyekolaka Biblia na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Polonais na nɔrdi-wɛsti ya Angleterre. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nazwi esengo ya solosolo. Nazali na lisosoli ya pɛto mpe bomoi na ngai ekómi mpenza na ntina.