Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu

Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu
  • ABOTAMAKI NA: 1981

  • EKÓLO: GUATEMALA

  • BOMOI NA YE YA KALA: ANYOKWAMAKI MINGI NA BOMWANA

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Acul, engumba moko ya mosika na bangomba na wɛsti ya Guatemala. Bato ya libota na ngai bazali bato ya Ixil, oyo bankɔkɔ na bango bazalaki Ba-Maya. Longola monɔkɔ ya Espagnol, nalobaka mpe monɔkɔ ya mboka na biso. Nakolá na eleko oyo Guatemala ezalaki na bitumba ya bana-mboka oyo eumelaki mbula 36. Na ntango wana nyonso ebele ya bato ya Ixil bakufaki.

Ntango nazalaki na mbula minei, yaya na ngai ya mbula nsambo azalaki kosakana na grenade na mabɔkɔ mpe epanzanaki na mbalakaka. Likambo ya mawa, ebomaki ngai miso mpe yaya na ngai akufaki. Na nsima, nalekisaki bomwana na ngai na eteyelo ya bato bakufá miso na engumba Guatemala epai nayekolaki ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Mpo na bantina oyo nayebaki mpenza te, bakambi ya eteyelo yango baboyaki nasololaka na bana mosusu mpe baninga na ngai ya kelasi bazalaki kokima ngai. Nazalaki ntango nyonso kaka ngai moko mpe nazalaki kozela na mposa makasi sanza mibale ya konje oyo tozalaki kozwa mbula nyonso mpo nazala elongo na mama na ngai mpo azalaki ntango nyonso na boboto mpe motema mawa. Likambo ya mawa, mama akufaki ntango nazalaki na mbula zomi. Lokola namonaki ete nazangi moto kaka moko na mokili oyo azalaki kolinga ngai, nalɛmbaki mpenza nzoto.

Ntango nakokisaki mbula 11, nazongaki na mboka na biso mpe nakómaki kofanda elongo na ndeko na ngai ya mobali ná libota na ye. Bazalaki kokokisa bamposa na ngai ya mokolo na mokolo kasi ata moko te akokaki kosalisa ngai natika komitungisa na makanisi. Na bantango mosusu nazalaki kolelela Nzambe boye: “Mpo na nini mama na ngai akufi? Mpo na nini miso na ngai ekufá?” Bato bazalaki koyebisa ngai ete bampasi yango ezalaki mokano ya Nzambe. Namonaki ete Nzambe azali mafumafu mpe sembo te. Soki namibomaki te ezali kaka mpo nazangaki likoki ya kosala yango.

Lokola nazalaki komona te, nazalaki na likoki ya komibatela te. Ntango nazalaki mwana, basangisaki na ngai nzoto na makasi mbala mingi. Nayebisaki moto moko te likambo yango mpo nakanisaki ete bakokipe yango te. Bato bazalaki mpenza kosolisa ngai te mpe ngai nazalaki kosolisa moto te. Nazalaki kotungisama na makanisi mpe nazalaki kotyela moto ata moko te motema.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango nazalaki naino elenge mpenza, Batatoli ya Yehova mibale (mwasi moko ná mobali na ye) basololaki na ngai na ntango oyo bana-kelasi bapemaka mwa moke. Moko ya balakisi ya eteyelo na biso oyo azalaki koyokela ngai mawa asɛngaki bango báyaka kotala ngai. Bayebisaki ngai elaka ya Biblia oyo elobi ete bakufi bakosekwa mpe baoyo bakufá miso bakomona lisusu. (Yisaya 35:5; Yoane 5:28, 29) Nasepelaki na makambo bateyaki ngai, kasi ezalaki mpasi nasolola na bango mpo namesanaki kosolola na bato te. Kasi, ata bongo, na boboto nyonso mpe motema molai, bakobaki koya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia. Mwasi ná mobali yango bazalaki kotambola na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 10 likoló ya ngomba mpo na kokóma na engumba na biso.

Ndeko na ngai azalaki koyebisa ngai ete mwasi yango ná mobali na ye bazalaki kolata malamu atako bazalaki na bozwi mingi te. Ata bongo, bazalaki ntango nyonso kotyela ngai likebi, bazalaki mpe komemela ngai mwa bakado. Namonaki ete kaka bakristo ya solo nde bakoki komipimela ndenge wana.

Nayekolaki Biblia na lisalisi ya mikanda ya ekomeli ya bato bakufá miso. Atako nazalaki kokanga ntina ya makambo oyo nazalaki koyekola, kasi ezalaki mpasi nandima makambo mosusu. Na ndakisa, ezalaki mpasi nandima ete Nzambe akipaka ngai mpenza mpe ete basusu bakoki koyebisa ngai ndenge oyo Nzambe atalelaka ngai. Nayebaki sikoyo ntina oyo Yehova atiki mabe ezala mpo na mwa ntango kasi ezalaki mpasi mpo natalela ye lokola Tata ya bolingo mpenza. *

Makambo oyo nayekolaki na Biblia esalisaki ngai mokemoke nabongola makanisi na ngai. Na ndakisa, nayekolaki ete Nzambe amityaka mpenza na esika ya baoyo bazali konyokwama. Mpo na basambeli na ye oyo bazalaki konyokola bango, Nzambe alobaki boye: “Namoni mpasi ya bato na ngai . . . Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” (Kobima 3:7) Ntango nakómaki kosepela na bizaleli kitoko ya Yehova, etindaki ngai napesa bomoi na ngai epai na ye. Na 1998, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

Elongo na ndeko oyo libota na ye ezwaki ngai epai na bango

Mbula moko nsima ya batisimo na ngai, nazalaki kolanda mateya mpo na bato bakufá miso pene ya engumba Escuintla. Nkulutu moko ya lisangá oyo ezalaki pene wana amonaki ete nazalaki konyokwama mpo na koya na makita mpo engumba oyo nazalaki kofanda ezalaki mosika. Lisangá ya penepene ezalaki kaka na bangomba oyo mwasi ná mobali oyo bazalaki koyekola na ngai Biblia bazalaki kouta mpe ezalaki mpasi nakende koyangana kuna. Mpo na kosalisa ngai, nkulutu yango alukaki libota moko ya Batatoli ya Yehova na Escuintla oyo bandimaki koyamba ngai na ndako na bango mpe kosalisa ngai nayanganaka na makita ya losambo. Tii lelo bazwaka ngai lokola moto ya libota na bango mpenza.

Nakoki kolobela bandakisa mingi mosusu ya bolingo ya solosolo oyo bandeko ya lisangá bamoniselaki ngai. Makambo nyonso wana endimisi ngai ete lokola nazali Motatoli ya Yehova, nazali na kati ya bakristo ya solo.​—Yoane 13:34, 35.

MATOMBA OYO NAZWI:

Namiyokaka lisusu te ete nazangi ntina mpe elikya. Sikoyo bomoi na ngai ezali na ntina mpenza. Lokola nalekisaka ngonga mingi na mosala ya koteya bato Biblia oyo Batatoli ya Yehova basalaka, namipesaka mingi na koteya basusu makambo kitoko oyo ezali na Biblia na esika ya kokipe mpasi na ngai. Lisusu, nazwi libaku ya kosala lokola moko ya bandeko oyo bakambaka lisangá mpe kosala badiskur na masangá. Nazwaki kutu libaku ya kosala badiskur na mayangani na biso ya minene epai ebele ya bato bayanganaka.

Nazali kosala diskur na lisalisi ya Biblia na ngai ya ekomeli ya bato bakufá miso

Na 2010, nazwaki diplome na Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba (lelo oyo, babengaka yango Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu), oyo esalemaki na El Salvador. Eteyelo yango esalisaki ngai nakokisaka malamu mikumba na ngai na lisangá. Formasyo yango esali ete namona mpenza ete Yehova Nzambe, oyo akoki kobongisa moto nyonso mpo na mosala na ye, azwaka ngai na valɛrɛ mpe alingaka ngai.

Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Lelo oyo, nakoki mpenza koloba ete nazali na esengo atako liboso nakanisaki te ete ekoki kosalema. Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu.

^ par. 13 Mpo na koyeba mpo na nini Nzambe atiki mabe ezala, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.