Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazwaki bozwi ya solosolo

Nazwaki bozwi ya solosolo
  • Abotamá na: 1968

  • Ekólo: États-Unis

  • Bomoi na ye ya kala: Moto ya mombongo oyo abondelaki mpo akóma mozwi

NDENGE NAZALAKI

 Nakolaki na lingomba ya Katolike na engumba Rochester, na etúká ya New York. Tata ná mama na ngai bakabwanaki ntango nazalaki na mbula 8. Nazalaki kofanda ná mama kobanda mokolo ya liboso tii ya mitano na mwa ndako moko na kartye moko ya babola, mpe na nsuka ya pɔsɔ nazalaki kokende kofanda epai ya tata na kartye moko ya bato ya bozwi. Ntango nazalaki komona ndenge mama azalaki kobundabunda mpo na kobɔkɔla bana 6, nakómaki kolɔta kokóma moto ya mbongo mpo na kosunga libota na biso.

 Tata na ngai alingaki ete nalonga na bomoi, yango wana asalaki ete nakende kotala eteyelo moko ya lokumu na makambo etali ba-otɛlɛ. Nasepelaki na eteyelo yango mpe bakomisaki ngai kuna, kutu nazalaki kokanisa ete Nzambe ayanolaki mabondeli na ngai mpo nakóma mozwi mpe na esengo. Nayekolaki ndenge ya kotambwisa otɛlɛ, mibeko etali mombongo, mpe makambo etali mombongo na boumeli ya mbula 5 mpe kaka na ntango yango nazalaki kosala na otɛlɛ moko oyo babɛtaka masano ya mbongo na Las Vegas, na Nevada.

Mosala na ngai ezalaki mpe ya kokokisa bamposa ya bato ya mbongo oyo bazalaki kobɛta masano ya mbongo

 Ntango nazalaki na mbula 22, nakómaki mokambi ya mibale na otɛlɛ yango. Nazalaki komimona ete nakómi na bozwi to nalongi mpenza na bomoi, mbala mingi nazalaki kosepela kolya bilei ya kitoko mingi mpe komɛla vinyo ná masanga ya ntalo mingi. Baninga na ngai na makambo ya mombongo bazalaki koloba: “Tyá makanisi na eloko oyo esalaka ete mokili ezala; elingi koloba mbongo.” Mpo na bango, mbongo nde epesaka esengo ya solosolo.

 Mosala na ngai ezalaki mpe ya kokokisa bamposa ya bato ya mbongo mingi oyo bazalaki koya kobɛta masano ya mbongo na otɛlɛ na Las Vegas. Atako bato yango bazalaki na mbongo mingi, ezalaki komonana ete bazalaki na esengo te. Ngai mpe nakómaki komiyoka bongo. Atako nazalaki kokóma se na mbongo mingi, nazalaki kobanga ntango nyonso mpe nazalaki kokoka kolala malamu te. Kutu nakómaki kokanisa namiboma. Nazalaki kosepela lisusu te na lolenge na ngai ya bomoi, na yango nabondelaki Nzambe boye: “Epai wapi nakoki kozwa esengo ya solosolo?”

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Kaka na ntango wana, bandeko na ngai mibale ya basi oyo bakómaki Batatoli ya Yehova bayaki na Las Vegas. Atako nazalaki kondima te mikanda oyo bazalaki kopesa ngai, nazalaki kosalela Biblia na ngai moko mpo na kosolola na bango. Na Biblia na ngai, maloba ya Yesu ekomamaki na langi ya motane. Lokola nazalaki kondima makambo myonso oyo Yesu alobaki, bandeko na ngai ya basi bazalaki kolobela yango mingi. Nazalaki mpe kotánga Biblia ngai moko.

 Makambo mingi oyo natángaki ekamwisaki ngai. Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Tango bozali kosambela, bóloba maloba mingi té ndenge bato oyo bayebi Nzambe té basalaka. Bango bakanisaka ‘tè Nzambe akoyokela bango soki bazali koloba mingi.” (Matai 6:7, Bible na lingala ya lelo) Kutu, sango moko apesaki ngai elilingi ya Yesu mpe alobaki ete soki nazali kobondela elilingi yango, mpe nazali kozongela libondeli ya Tata wa biso mbala 10 mpe kozongela Maria losako mbala 10, Nzambe akopesa ngai mbongo nyonso oyo nazali na yango mposa. Na yango, namitunaki ntango nazali kozongela maloba yango mbala na mbala, nazali koloba maloba mingi té? Natángaki mpe maloba oyo ya Yesu: “Bóbengaka moto moko té ‘Tata’; pamba té bozali na Tata moko kaka oyo azali na Likolo.” (Matai 23:9, Bible na lingala ya lelo) Namitunaki lisusu boye: ‘Mpo na nini ngai ná bakristo mosusu ya Katolike tobengaka basango na biso “Tata”?’

 Ntango natángaki mokanda ya Yakobo, na ntango wana nakómaki kokanisa na mozindo makambo oyo nazalaki kosala na bomoi na ngai. Na mokapo 4, Yakobo akomaki boye: “Boyebi té ‘té kolinga makambo ya mokili ezali koyina Nzambe? Moto alingaka makambo ya mokili, akómi monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4, Bible na lingala ya lelo) Vɛrsɛ ya 17 esimbaki mpenza motema na ngai, elobi boye: “Moto oyo ayebi ndenge asengeli kosala kasi aboyi kosala yango, azali nde kosala masumu.” Na nsima, nabengaki bandeko ngai ya basi mpe nayebisaki bango ete nazali kotika kosala na otɛlɛ yango mpo ezalaki kotinda ngai nasala makambo oyo ezalaki kosepelisa ngai lisusu te, na ndakisa, kobɛta masano ya mbongo mpe kozala na lokoso.

“Ntango natángaki mokanda ya Yakobo, na ntango wana nakómaki kokanisa na mozindo makambo oyo nazalaki kosala na bomoi na ngai”

 Nalingaki kokómisa boyokani na ngai elongo na Nzambe makasi, elongo na baboti na ngai mpe bandeko na ngai. Na yango nazwaki ekateli ya kokóma na bomoi ezangi mindɔndɔ mpo nazwa ntango ya kosala yango. Kasi kosala yango ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, balingaki komatisa ngai grade na otɛlɛ esika nazalaki kosala mpe salɛrɛ na ngai elingaki komata mbala mibale to mbala misato. Kasi nsima ya kobondela mpo na likambo yango, nazwaki ekateli ya kotika lolenge wana ya bomoi. Natikaki mosala yango, nakomaki kofanda na mwa ndako esika mama na ngai abombaka motuka na ye, mpe na nsima nafungolaki mwa restora na ngai oyo ngai moko nazalaki kotya liste ya biloko.

 Atako Biblia esalisaki ngai nayeba makambo nini nasengelaki kotya na esika ya liboso, kasi nazalaki kaka te kokende na makita ya Batatoli ya Yehova. Bandeko na ngai ya basi batunaki ngai boye: “Makambo nini ya mabe ozali komona epai ya Batatoli ya Yehova?” Nayebisaki bango boye: “Ezali mpo Yehova, Nzambe na bino akabolaka mabota. Mpe lisusu nakokaki kolekisa ntango elongo na bino na fɛti ya Noele mpe ya mbotama, kasi bino bosalaka yango te.” Ndeko na ngai moko ya mwasi abandaki kolela mpe atunaki ngai boye: “Mikolo mosusu nyonso ya mbula ozalaka wapi? Tolingaka kozala elongo na yo ntango nyonso. Kasi yo olingi kaka koya na mikolo ya bafɛti mpe soki omoni kaka malamu koya nde oye.” Maloba na ye esimbaki mpenza motema na ngai, ngai mpe nalelaki elongo na ye.

 Ntango kaka nayaki komona ete Batatoli ya Yehova balingaka mabota na bango mingi mpe ete nazalaki na libunga, nabandaki mbala moko koyangana na makita na bango na Ndako ya Bokonzi na esika tofandi. Kuna nakutanaki na Kevin, ndeko moko oyo ayebi koteya Biblia malamu mpe tobandaki koyekola na ye.

 Kevin ná mwasi na ye bazalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ, yango esalaki ete bázala na ntango mingi ya kosalisa bato báyeba Biblia. Babombaki mbongo mpo bákende na Afrika mpe na Amérique centrale, epai bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga bandako ya Bafiliale ya Batatoli ya Yehova. Bazalaki na esengo mingi, mpe bazalaki kolingana makasi. Mpe nakanisaki boye: ‘Oyo nde bomoi nazali kolɔta kozala na yango.’

 Kevin alakisaki ngai video moko oyo emonisaki esengo oyo bato bazwaka na mosala ya misionɛrɛ, mpe nazwaki ekateli ya kokóma misionɛrɛ. Na 1995, nsima ya koyekola Biblia na mozindo na boumeli ya sanza 6, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Na esika nasɛnga Nzambe bozwi, nakómaki kobondela boye: “Kopesa ngai bobola te, bozwi mpe te.”​—Masese 30:8.

MATOMBA OYO NAZWI

 Nazali sikoyo mozwi na mosuni te, kasi nde na elimo. Nakutanaki na Nuria, mwasi na ngai nalingaka mingi na Honduras, mpe elongo na ye tosalaki lokola bamisionɛrɛ na ekólo Panama mpe Mexique. Namoni ete maloba oyo ya Biblia ezali solo, mpo elobi: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango”!​—Masese 10:22.