Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki kobundela makambo oyo ezangi bosembo mpe mobulu

Nazalaki kobundela makambo oyo ezangi bosembo mpe mobulu
  • ABOTAMAKI NA: 1960

  • EKÓLO: LIBAN

  • BOMOI NA YE YA KALA: ELOMBE NA LISANO YA KUNG FU

NDENGE NAZALAKI:

Nakolaki na Rmaysh, pene ya ndelo ya Israël ná Liban, na eleko ya etumba ya bana-mboka. Nabosanaka te ndenge bamine ezalaki kopanzana na mboka yango mpe ndenge ezalaki kopanza makolo ya bato. Bomoi ezalaki mpasi, makambo mabe mpe mobulu ezalaki bisika nyonso.

Bato ya libota na biso bazalaki kokende eglize ya Maronite, Lingomba moko ya Katolike ya Moyen-Orient. Tata azalaki ntango nyonso kosala mosala mpo na koleisa libota ya bato 12, kasi mama azalaki kosala nyonso mpo tózangaka misa te. Kasi na nsima, nakómaki komona ete ndenge moko na bato nyonso, eglize yango mpe elongaki te kosalisa bato oyo bazangi makasi.

Ntango nazalaki elenge, nazalaki kosepela mingi na lisano ya kung fu. Yango wana, nazalaki kokende na formasyo ya makasi mpenza mpe nayebaki mpenza kosalela mabɔkɔ mpe makolo mpe bisaleli ndenge na ndenge ya karate Na motema na ngai nazalaki koloba boye: ‘Nakoki te kosala ete bitumba esila, kasi nakoki nde kosilisa bato ya mobulu.’ Soki kaka namoni bato mibale bazali kobunda, mbala moko nazalaki kokɔta na etumba yango. Nazalaki motema mɔtɔmɔtɔ, mpe nazalaki koumela te kosilika. Bato nyonso ya sudi ya Liban bazalaki kobanga ngai mpo nazalaki kobundela makambo oyo ezangi bosembo mpe mobulu.

Na 1980, nakɔtaki na etuluku moko ya bato ya lisano ya kung fu, na Beyrouth. Babɔmbi ya minene mpe ya mike ezalaki kokwea mikolo nyonso, kasi nazalaki kaka kokende na formasyo na ngai. Mosala na ngai ezalaki kaka kolya, kolala mpe kosala makambo lokola Bruce Lee, mosani monene ya kung fu, moto ya Chine oyo akómaki mpe moto ya Amerika. Nalandaki ndenge na ye ya kokata nsuki, kotambola mpe koganga ntango azali kosala kung fu. Nazalaki kosɛka te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Natyaki mokano ya kokóma mosani monene ya kung fu na Chine. Mokolo moko na mpokwa, ntango nazalaki komibongisa mpo na kokende na Chine, nayokaki moto moko abɛti porte na ngai. Moninga na ngai moko ayaki ná Batatoli ya Yehova mibale. Lokola nalataki elamba na ngai ya lisano ya langi ya moindo mpe nazalaki kotɔka makasi, nayebisaki bango ete: “Nayebi makambo ya Biblia te.” Nayebaki te ete na ntango yango nde bomoi na ngai elingaki kobongwana.

Batatoli yango balakisaki ngai na Biblia ntina oyo bato bakoki te kosilisa makambo oyo ezangi bosembo mpe mobulu. Bamonisaki ngai ete Satana Zabolo nde abimisaka makambo ya ndenge wana. (Emoniseli 12:12) Komona kimya mpe elikya oyo bazalaki na yango ekamwisaki ngai mpenza. Mpe ntango bateyaki ngai ete Nzambe azali na nkombo, esimbaki mpenza motema na ngai. (Nzembo 83:18) Balakisaki ngai mpe 1 Timote 4:8, oyo elobi ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke; kasi ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na litomba na makambo nyonso, mpo yango ezali na elaka ya bomoi ya lelo mpe ya bomoi ya mikolo oyo ezali koya.” Na nsima, maloba yango ebongolaki mpenza bomoi na ngai.

Likambo ya mawa, nazalaki lisusu komonana na bango te mpo bato ya libota na ngai bayebisaki bango báya lisusu te. Ata bongo, nazwaki ekateli ya kotika lisano ya kung fu mpe ya kobanda koyekola Biblia. Bandeko na ngai basepelaki na likanisi yango te, kasi nazwaki lisusu ekateli makasi ya koluka Batatoli ya Yehova mpo báyekola na ngai Biblia.

Nakobaki koluka Batatoli, kasi namonaki bango te. Kaka na ntango yango, tata na ngai akufaki, mpe bato ya libota na ngai bakutanaki na makambo mosusu ya mabe, yango epesaki ngai mawa mpenza. Nakómaki kosala na kompanyi moko oyo etalaka makambo ya kotonga bandako, mpe mokolo moko Adel, moninga na ngai moko ya mosala atɛlɛmisaki ngai mpe atunaki ngai mpo na nini nazali mawamawa. Ayebisaki ngai elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi. Na boumeli ya basanza libwa oyo elandaki, Motatoli wana ya boboto mpenza akobaki koyekola na ngai Biblia.

Wana boyekoli yango ezalaki kokoba, namonaki ete esengelaki natika mpenza bizaleli na ngai ya mabe. Kasi ezalaki pɛtɛɛ te.Ntango nyonso nazalaki kaka na nkanda mpe nazalaki motema mokuse. Biblia esalisi ngai nayeba kopekisa nkanda na ngai mpe nazala motema mokuse te. Na ndakisa, Matai 5:44 ezali na toli ya Yesu oyo: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” Mpe Baroma 12:19 elobi boye: “Moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te, . . . mpo ekomamá ete: ‘“Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe,” Yehova alobi bongo.’” Mokemoke bavɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu esalisaki ngai nakóma motema mpio.

MATOMBA OYO NAZWI:

Atako na ebandeli bato ya libota na ngai baboyaki ekateli oyo nazwaki ya koyekola ná Batatoli ya Yehova, nsukansuka bakómaki kopesa bango limemya. Kutu ndeko na ngai akómaki mpe kosambela Yehova mpe mama azalaki kolobela kondima na biso epai ya basusu tii na liwa na ye.

Nabali Anita mwasi moko malamu mpenza mpe ya sembo oyo azali moninga na ngai ya motema oyo nalekisaka na ye ntango mingi na mosala ya kosakola. Kobanda mobu 2000, ngai ná Anita tofandaka na Eskilstuna na Suède epai toyekolaka Biblia na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Arabe.

Tii lelo, nayokelaka bato oyo banyokwamaka mpo na mobulu mawa. Kasi koyeba mpenza ntina na yango mpe koyeba ete mosika te Nzambe akosilisa yango epesaka ngai esengo mpe kimya.​—Nzembo 37:29.

Mosala ya kosakola epesaka ngai ná mwasi na ngai esengo. Tosepelaka koteya basusu makambo ya Yehova