Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Bomoi na ngai ekobaki kobeba se kobeba

Bomoi na ngai ekobaki kobeba se kobeba
  • Abotamá na: 1971

  • Ekólo: Tonga

  • Bomoi na ye ya kala: Momɛli bangi, akɔtaki bolɔkɔ

NDENGE NAZALAKI

 Tozali bato ya Tonga, ekólo moko oyo ezali na bisanga soki 170 mpe ezwami na sudi-wɛsti ya Pacifique. Na Tonga tozalaki na bozwi mingi te, kura to motuka ezalaki te. Kasi tozalaki na pɔmpi ya mai na ndako; tozalaki mpe na mwa bansoso. Soki tozwi konje na kelasi, ngai ná bandeko na ngai mibale ya mibali tozalaki kosalisa tata na bilanga epai tozalaki kokona makemba, mboma, mbala mpe pondu. Biloko ya bilanga oyo tozalaki kotɛka ezalaki kobakisela tata mwa mbongo mpo mbongo oyo azalaki kozwa na misala mikemike oyo azalaki kosala ezalaki moke mpenza. Ndenge moko na bato mingi oyo bafandaka na bisanga yango, libota na biso mpe ezalaki komemya Biblia mingi mpe tozalaki kokende eglize mbala na mbala. Ata bongo, tozalaki kokanisa ete mpo na kozala na bomoi ya malamu, esɛngi kokende kofanda na ekólo moko ya bozwi.

 Ntango nazalaki na mbula 16, nɔkɔ abengisaki libota na biso na Californie, na États-Unis. Ezalaki mpenza mpasi tómesana na mimeseno ya kuna! Atako bomoi na biso ebongaki mwa moke, tozalaki kofanda na kartye ya babola, epai bato mingi bazalaki kosala mobulu mpe komɛla bangi. Mbala mingi na butu tozalaki koyoka lokito ya masasi mpe bato mingi ya kartye na biso bazalaki kobanga bato ya mobulu. Bato mingi bazalaki na mandoki na bandako mpo na komibatela to mpo na kosilisa matata. Nazwaká lisasi na mpanzi mpo na matata ya ndenge wana.

 Na eteyelo ya katikati, nakómaki na mposa ya kozala lokola bilenge mosusu. Mokemoke namipesaki na bafɛti ya lokoso, komɛla masanga mingi, mobulu mpe komɛla bangi. Nsukansuka, nakómaki moombo ya bangi babengi cocaïne. Mpo na kosomba yango, nakómaki koyiba. Atako bato ya libota na ngai bazalaki kozangisa eglize te, nazwaki te litambwisi oyo ekokaki kosalisa ngai nayeba ndenge ya kotɛmɛla mbamba oyo baninga batyaka moto asala mabe. Mbala mingi bazalaki kokanga ngai mpo na mobulu na ngai. Bomoi na ngai ekobaki kobeba se kobeba! Nsukansuka, nakɔtaki bolɔkɔ.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Mokolo moko na 1997, ntango nazalaki na bolɔkɔ, moninga moko ya bolɔkɔ amonaki ete nasimbaki Biblia. Ezalaki mokolo ya Noele, eleko oyo ezalaki mosantu mpo na bato mingi ya Tonga. Atunaki ngai soki nayebi oyo Biblia elobaka mpenza mpo na mbotama ya Kristo, kasi nayebaki te oyo Biblia elobi. Alakisaki ngai lisolo ya mbotama ya Yesu na Biblia, mpe namonaki ete mimeseno mingi ya Noele ezali na Biblia te. (Matai 2:1-12; Luka 2:5-14) Ekamwisaki ngai mpenza. Namitunaki makambo nini mosusu Biblia elobi. Moninga yango azalaki kokende pɔsɔ na pɔsɔ na makita oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosala na bolɔkɔ mpe namonaki malamu nakende na ye na makita yango. Bazalaki kolobela mokanda ya Emoniseli. Atako nakangaki mpenza ntina te ya makambo mingi oyo balobaki kuna, namonaki ete makambo nyonso oyo bateyaki kuna eutaki na Biblia.

 Ntango Motatoli ya Yehova moko asɛngaki ayekola na ngai Biblia, nandimaki na esengo nyonso. Mpo na mbala ya liboso, nayekolaki elaka oyo Biblia epesi ya paradiso awa na mabele na mikolo ezali koya. (Yisaya 35:5-8) Ekómaki polele na makanisi na ngai ete, mpo na kosepelisa Nzambe, nasengelaki kobongola makambo mingi na bomoi na ngai. Namonaki ete Yehova Nzambe akondima te makambo na ngai ya mabe na paradiso oyo alaki. (1 Bakorinti 6:9, 10) Yango wana namonaki malamu natika ezaleli ya nkandankanda, komɛla makaya, komɛla masanga mingi mpe kosalela bangi.

 Na 1999, liboso nasilisa etumbu na ngai ya bolɔkɔ, bakonzi balongolaki ngai na bolɔkɔ mpe batyaki ngai na kaa oyo batyaka bapaya oyo balingi kozongisa bango na bamboka na bango. Mbula koleka moko, nazalaki na likoki te ya kokutana na Batatoli ya Yehova. Kasi nazalaki na ekateli ya kokoba kobongola bomoi na ngai. Na 2 000, guvɛrnema eboyaki natikala na États-Unis, mpe bazongisaki ngai na Tonga.

 Ntango nazongaki na Tonga, nalukaki Batatoli ya Yehova na mposa mpenza mpe nazongelaki koyekola Biblia. Nazalaki kosepela na makambo nazalaki koyekola mpe ekamwisaki ngai ndenge Batatoli ya Yehova na esanga yango bazalaki kozwa mateya na bango nyonso na Biblia kaka ndenge Batatoli ya Yehova kuna na États-Unis bazalaki kosala.

 Tata ayebanaki mingi na kartye mpo azalaki mokonzi na lingomba. Na ebandeli, bato ya libota na ngai bakamwaki mpe basilikaki ndenge nazalaki koyangana na Batatoli ya Yehova. Kasi, na nsima baboti na ngai basepelaki ndenge toli ya Biblia esalisaki ngai natika bizaleli na ngai ya mabe.

Ndenge moko na mibali mingi ya Tonga, nazalaki kolekisa ebele ya bangonga pɔsɔ nyonso na komɛla masanga babengi kava

 Likambo elekaki mpasi mpo na kotika ezalaki momeseno ya komɛla masanga mingi oyo bato ya mboka na biso bazalaki na yango. Mibali na Tonga bazalaki kolekisa ebele ya bangonga pɔsɔ nyonso na komɛla masanga babengi kava, masanga moko oyo epesaka mpɔngi, oyo basalaka yango na misisa ya nzete ya pilipili. Lokola nazongaki na mboka na ngai, nakómaki na momeseno ya kokende na esika bamɛlaka kava butu nyonso mpe komɛla masanga yango tii nazalaki komiyeba lisusu te. Mokakatano na ngai ezalaki ya kozala na baninga oyo bakipaka mpenza te makambo ya Biblia. Nsukansuka, Batatoli ya Yehova basalisaki ngai namona ete bizaleli wana ezalaki kosilikisa Nzambe. Natikaki yango mpo Nzambe apambola mpe andima ngai.

 Nakómaki koyangana na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova. Koyangana na bato oyo bazalaki koluka kosepelisa Nzambe esalisaki ngai nakwea te na komekama. Na 2002, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI

 Nazwi matomba mpo na motema molai ya Nzambe ndenge Biblia emonisi yango: “Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Na ntembe te akokaki koboma mokili oyo mabe banda kala, kasi atiki yango naino mpo na bato lokola ngai tókóma baninga na ye. Nalingaka kokanisa ndenge akoki kosalela ngai mpo na kosalisa basusu básala mpe bongo.

 Na lisalisi ya Yehova natikaki kobebisa bomoi na ngai. Nayibaka lisusu te mpo na kokokisa mposa mabe oyo elingaki koboma ngai. Kutu, nalukaka kosalisa bato ya kartye na ngai bákóma mpe baninga ya Yehova. Koyangana na Batatoli ya Yehova esalisi ngai nakutana na mwasi na ngai Tea, mwasi moko kitoko. Tozali na bomoi ya libota ya esengo elongo na mwana na biso ya moke ya mobali. Elongo na bango, toyebisaka basusu elikya oyo Biblia epesi ya kozala na bomoi libela na kimya na paradiso.