Lakisá makambo oyo ezali na kati

Koyika mpiko na mikakatano

Batatoli ya Yehova bamonaka ete sante to kozala ebɔsɔnɔ esengeli te kolongola bango esengo na bomoi.

DeJanerio Brown: Abulunganaki kasi abungisaki elikya te

Ndenge nini Yehova asalisaka bango báyika mpiko na ntango ya makama oyo ebimaka na mbalakaka?

Azali na mpiko mpe na makanisi malamu atako azali na mpasi

Esali sikoyo mbula 23 banda Virginia azali kobɛla maladi babengi syndrome d’enfermement. Kasi elikya na ye ebɔndisaka ye mpe ebatelaka ye.

Kosalela Nzambe nde nkisi na ye!

Onesmus abotamá na maladi moko oyo esalaka ete mikuwa ebukanaka mpambampamba. Ndenge nini bilaka ya Nzambe oyo ezali na Biblia elendisaki ye?

Nazwaka makasi na bolɛmbu na ngai

Mwasi moko oyo azali na kiti ya bibɔsɔnɔ bomoi na ye mobimba azwaka “nguya oyo eleki makasi” mpo azali na kondima epai ya Nzambe.

Yehova apesi ngai mingi koleka oyo nasengeli na yango

Félix Alarcón ayaki koyeba ntina mpenza ya bomoi nsima ya kosala aksida na tukutuku oyo ekómisaki ye paralize kobanda na nkingo tii na nse.

Nazwaki elikya na ntango oyo nazalaki mpenza na mposa na yango

Na mbula 20, Miklós Alexa akómaki paralize na aksida moko ya mabe mpenza. Ndenge nini Biblia esalisaki ye azwa elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya?

Kozala moto oyo akufá matoi epekisaki ngai te koteya basusu

Atako Walter Markin akufá matoi, azalaki na bomoi ya esengo na mosala ya Yehova mpe azwaki mapamboli mingi.

Ndenge miso ya Jairo esalisaka ye asalela Nzambe

Atako maladi moko mabe ya bɔɔngɔ enyokolaka ye, Jairo amonaka ete bomoi na ye ezali na ntina.

Nayambi solo ya Biblia atako nazangi mabɔkɔ

Elenge mobali oyo akómá ebɔsɔnɔ mpo na aksida, ata bongo amoni ntina ya kondimela Mokeli.

“Naboyaka kotya makanisi na maladi na ngai”

Nini esalisaka Elisa akanga motema mpe na bantango mosusu abosana ete azali na maladi?

Akangamaki na mateya oyo andimaka

Song Hee Kang alongaki mpenza mokakatano oyo etali sante na ye, oyo etyaki kondima na ye na komekama ntango azalaki na mbula 14.