Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazalaki kotimola lilita na ngai moko”

“Nazalaki kotimola lilita na ngai moko”
  • Abotamá na: 1978

  • Ekólo: El Salvador

  • Bomoi na ye ya kala: Azalaki na etuluku ya bato ya mobulu

NDENGE NAZALAKI

 “Soki olingi koyeba Nzambe, kangamá na Batatoli ya Yehova.” Nakamwaki ntango nayokaki maloba yango. Na ntango yango, Batatoli ya Yehova bayekolaki na ngai Biblia mpo na mwa ntango. Kasi mpo bóyeba ntina oyo nakamwaki, tiká nabɛtɛla bino mwa moke lisolo ya bomoi na ngai.

 Nabotamá na Quezaltepeque, engumba moko na El Salvador. Babotá biso 15, ngai mwana ya 6. Ndenge oyo baboti na ngai babɔkɔlaki ngai, balingaki nazala sembo mpe natosaka mibeko. Longola yango, Leonardo mpe Batatoli ya Yehova mosusu bazalaki koya na bantango mosusu koyekola na biso Biblia. Kasi nazwaki makambo oyo bazalaki koteya ngai na valɛrɛ te mpe nazalaki kaka kozwa bikateli ya mabe mpenza. Ntango nakómaki na mbula 14, nabandaki komɛla masanga mpe bangi elongo na baninga ya kelasi. Mokomoko na bango asundolaki kelasi mpe akɔtaki na etuluku ya bato ya mobulu mpe ngai nalandaki ndakisa na bango ya mabe. Tokómaki kolekisa ntango na biso na babalabala, kosɛnga mbongo mpe koyiba mpo na kokokisa bamposa na biso.

 Etuluku yango ya bato ya mobulu ekómaki libota na ngai. Namonaki ete nasengeli kozala sembo epai na bango. Na ndakisa, mokolo moko, moninga na ngai moko oyo alangwaki bangi abundisaki moto moko ya kartye na biso. Ntango bazalaki kobunda, moto yango alukaki kokanga moninga na ngai mpe kobenga bapolisi. Nasilikaki mpe nakómaki kobebisa motuka na ye na nzete moko ya monene mpo atika moninga na ngai. Moto yango ya kartye na biso abondelaki ngai natika kobebisa bavitre ya motuka na ye, kasi naboyaki koyoka mpe nabebisaki motuka yango mobimba.

 Ntango nakokisaki mbula 18, etuluku na biso ebundaki na bapolisi. Ntango nalingaki kobwakela bango bɔmbi oyo biso moko tosalaki, epanzanaki na mabɔkɔ na ngai, nayebi mpenza te ndenge nini epanzanaki. Nazali koyeba kaka ndenge natalaki lobɔkɔ na ngai oyo epanzanaki mpe na nsima nazalaki komiyeba lisusu te. Ntango nalamukaki na opitale, namonaki ete lobɔkɔ na ngai ya mobali ekatanaki, litoi na ngai ya ngámbo yango ezalaki koyoka lisusu te mpe liso ya ngámbo kaka wana ezalaki komona lisusu te.

 Atako nazwaki mpasi yango, ntango nabimaki opitale, nazongelaki mbala moko etuluku na ngai wana ya mobulu. Nsima na yango, eumelaki te, bapolisi bakangaki ngai mpe batyaki ngai na bolɔkɔ. Boninga ngai ná bato ya etuluku na ngai ekómaki makasi na bolɔkɔ. Tozalaki kosala makambo elongo na boumeli ya mokolo mobimba​—kobanda na bilei ya ntɔngɔ, ntango tobendi bangi ya liboso, tii ntango tokokende kolala.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Ntango nazalaki na bɔlɔkɔ, Leonardo ayaki kotala ngai. Ntango tozalaki kosolola, alakisaki ngai nzoloko oyo ezalaki na lobɔkɔ na ngai ya mobali. Atunaki boye: “Oyebi soki madodo oyo ezali na nzoloko oyo misato elimboli nini?” Nalobaki na ye, “nayebi,” elimboli “kosangisa nzoto, drɔgɛ mpe miziki babengi rock.” Kasi Leonardo alobaki: “Mpo na ngai, elimboli opitale, bolɔkɔ mpe liwa. Ozalaki na opitale, sikoyo ozali na bolɔkɔ; oyebi oyo ekolanda na nsima.”

 Makambo Leonardo alobaki etungisaki ngai. Alobaki solo. Nazalaki kotimola lilita na ngai moko mpo na bomoi mabe oyo nazalaki na yango. Leonardo asɛngaki ayekola na ngai Biblia mpe nandimaki. Makambo nayekolaki na Biblia etindaki ngai nabongwana. Na ndakisa, Biblia elobi ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Na yango, likambo ya liboso oyo nasengelaki kosala ezalaki ya koluka baninga ya sika. Yango wana, nazalaki kokende lisusu te na makita ya etuluku na biso ya bato ya mobulu, kasi nakómaki kokende makita ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na kati ya bolɔkɔ. Na makita ya Batatoli ya Yehova, nakutanaki na moto moko ya bolɔkɔ na nkombo Andrés, oyo azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova na bolɔkɔ. Abengaki ngai mpo tólya elongo na ye. Na nsima, nazalaki lisusu te kobanda mokolo na kobenda bangi. Kutu ngai ná Andrés tokómaki kotalela vɛrsɛ moko ya Biblia ntɔngɔ nyonso.

 Bato ya etuluku na ngai ya mobulu bamonaki mbala moko ete nakómaki kobongwana. Yango wana, moko ya bakambi ya etuluku yango alobaki ete azalaki na mposa ya kosolola na ngai. Ebangisaki ngai mpo nayebaki te soki akosala ngai nini ntango akoyeba mposa na ngai ya kolongwa na etuluku yango mpo ezalaka mpasi kolongwa na etuluku ya bato ya mobulu. Alobaki: “Tomoni ndenge okómi kokende makita ya Batatoli ya Yehova mpe ozali koya lisusu te na makita na biso. Mposa na yo ezali nini?” Nayebisaki ye ete nazalaki na mposa ya kokoba koyekola Biblia mpe kobongola bomoi na ngai. Likambo ya kokamwa, ayebisaki ngai ete etuluku na biso ekotosa ekateli na ngai soki nalingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova. Na nsima, alobaki: “Soki olingi mpenza koyeba Nzambe, kangamá na Batatoli ya Yehova. Tozali kozela otika kosala makambo ya mabe. Napesi yo longonya. Olandi nzela ya malamu. Batatoli ya Yehova bakoki mpenza kosalisa yo. Bayekolaki na ngai Biblia na États-Unis mpe bato mosusu ya libota na ngai bazali Batatoli ya Yehova. Kobanga te. Kobá na yo.” Nazalaki kaka kobanga, kasi nasepelaki makasi mpenza. Napesaki Yehova Nzambe mersi na motema na ngai. Namiyokaki lokola ndɛkɛ oyo babimisi ye na mwa ndako oyo bakangaki ye mpe nakangaki ntina ya maloba oyo ya Yesu: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:32.

 Kasi, baninga na ngai mosusu ya kala bazalaki kopesa ngai bangi mpo na komeka ngai. Mpo na koloba solo, na bantango mosusu nazalaki kokwea na motambo na bango. Kasi na nsima, nakómaki kobongela mingi mpe nsukansuka natikaki drɔgɛ.​—Nzembo 51:10, 11.

 Nsima ya kobima bolɔkɔ, bato mingi bakanisaki ete nakozongela bomoi na ngai ya kala, kasi nazongelaki yango te. Kutu, mbala mingi nazalaki kozonga na bolɔkɔ mpo na koyebisa baninga na ngai ya bolɔkɔ makambo nayekolaki na Biblia. Nsukansuka, baninga na ngai ya kala bandimaki mpenza ete nabongwanaki. Kasi likambo ya mawa, banguna na ngai ya kala bayebaki yango te.

 Mokolo moko, ntango nabimaki mosala ya kosakola, bato ya etuluku mosusu oyo bazalaki koyokana te na etuluku oyo nazalaki liboso, bazingaki ngai ná ndeko oyo tozalaki kosakola na ye; bazalaki na bibundeli na mabɔkɔ mpe balingaki koboma ngai. Na limemya nyonso, ndeko oyo tozalaki na ye alimbwelaki bango ete nalongwá na etuluku yango. Na ntango yango, nasalaki nyonso mpo nazala kimya. Nsima ya kobɛta ngai mpe kokebisa ngai ete nalekaka lisusu te na esika wana, bakitisaki bibundeli na bango mpe batikaki biso tókende. Biblia ebongoli mpenza bomoi na ngai. Ndenge nazalaki liboso, nalingaki kozongisa mabe na mabe. Kasi sikoyo nalandaka toli oyo ya Biblia na 1 Batesaloniki 5:15: “Bókeba ete moto azongisa mabe na moto mosusu te, kasi ntango nyonso bino na bino bólanda kosalelana oyo ezali malamu; bósalaka yango mpe epai ya bato mosusu nyonso.”

 Bandá nakómá Motatoli ya Yehova, nasalaka nyonso nazala sembo. Ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi na lisalisi ya Yehova Nzambe, ya toli ya Biblia mpe ya baninga na ngai ya sika, nalongaki. Nakolinga lisusu te kozongela bomoi na ngai ya kala.​—2 Petro 2:22.

MATOMBA OYO NAZWI

 Liboso nazalaki moto ya mobulu oyo atondi na nkanda. Nandimaka mpenza ete nalingaki kozala lisusu na bomoi te soki nakobaki na nzela na ngai wana ya mabe. Makambo oyo nayekolaki na Biblia ebongolaki bomoi na ngai. Natiká makambo ya mabe mpe nayekoli ndenge ya kozala na kimya elongo na banguna na ngai ya kala. (Luka 6:27) Mpe sikoyo, nazali na baninga oyo basalisaka ngai nakolisa bizaleli malamu. (Masese 13:20) Nazali na bomoi ya esengo mpe ya ntina, nazali kosalela Nzambe oyo andimaki kolimbisa mabe nyonso oyo nasalaki.​—Yisaya 1:18.

 Na 2006, nakɔtaki Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo bazali minzemba. Mwa bambula na nsima, nabalaki mwasi moko malamu mpe tozali kobɔkɔla mwana na biso ya mwasi. Lelo oyo nalekisaka ngonga mingi na koteya basusu mateya ya Biblia oyo esalisaki ngai. Nazali mpe nkulutu na lisangá na biso mpe namekaka kosalisa bilenge bálanda te mabunga oyo ngai nasalaki ntango nazalaki na mbula na bango. Na esika natimola lilita na ngai moko, nazali sikoyo komibongisa mpo na avenire kitoko oyo Nzambe alaki na Biblia.