Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki kobanga liwa!

Nazalaki kobanga liwa!
  • ABOTAMÁ NA: 1964

  • EKÓLO: ANGLETERRE

  • BOMOI NA YE YA KALA: ELENGE MWASI YA LOYENGE MPE ABOTÁ

NDENGE NAZALAKI

 

Nabotamá na Paddington, kartye moko ya bato ebele na Londres. Tozalaki kofanda na mama mpe bayaya na ngai misato ya basi. Na bantango mosusu papa azalaki kosundola biso mpo azalaki kolangwa masanga mingi.

Ntango nazalaki mwana moke, mama alakisaki ngai kobondela butu nyonso. Nazalaki na Biblia moko ya moke oyo ezalaki kaka na mokanda ya Nzembo mpe nakómisaki yango miziki mpo nayembaka. Nabosanaka te maloba moko namonaki na buku na ngai ya kelasi oyo etikalá na makanisi na ngai: “Kolala kolamuka ezali momeseno te.” Maloba yango ezalaki kokimisa ngai mpɔngi mpe nazalaki kokanisa avenire. Nazalaki koloba ete ‘bomoi esengeli kozala kaka boye te. Mpo na nini nazali awa na mokili?’ Nazalaki kobanga liwa!

Nakómaki kosepela na misala ya bilimo mabe. Nazalaki koluka kosolola na bakufi, kokende na malita mpe kotala bafilme oyo ebangisaka elongo na baninga na ngai ya kelasi. Tozalaki kosepela na bafilme yango atako ezalaki kobangisa.

Ntango nakokisaki mbula zomi nakómaki loyenge. Nabandaki komɛla makaya mpe nakómaki moombo na yango. Na nsima nakómaki komɛla bangi. Na mbula 11, nakómaki komɛla masanga mingi. Atako nazalaki koyoka yango elɛngi te, kasi nazalaki kosepela ndenge elangwisaka. Nazalaki mpe kosepela na miziki ná kobina. Nazalaki kokende na bafɛti mpe banganda ya butu ntango nyonso nalingi. Na butu nazalaki kobima mpe kozonga na kobatama liboso ntɔngɔ etana. Lokola ezalaki kolɛmbisa ngai, nabandaki kokima kelasi mbala mingi. Soki nakei kelasi, mbala mingi nazalaki komɛla masanga ntango tosilisi liteya moko liboso tókɔta na oyo mosusu.

Nazwaki bapwɛ moke na mbula ya nsuka ya kelasi na ngai. Lokola mama ayebaki te bizaleli oyo nakómaki na yango, asepelaki na bapwɛ yango te mpe asilikaki. Toswanaki mpe nakimaki ndako. Nafandaki epai ya makango na ngai Tony, oyo azalaki na nsuki ya barasta. Azalaki koyiba mpe kotɛka drɔgɛ mpe ayebanaki lokola moto ya nkanda makasi. Eumelaki te nakómaki na zemi ntango nazalaki naino na mbula 16 mpe nabotaki mwana mobali.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 

Mbala ya liboso oyo nakutanaki na Batatoli ya Yehova ezalaki ntango nazalaki kofanda na ndako oyo leta atyá mpo na bilenge basi oyo babalá te, kasi bazali na babebe. Bakonzi ya leta bapesaki ngai shambre moko kuna. Batatoli ya Yehova mibale ya basi bazalaki koya kotala bilenge basi mosusu oyo tozalaki kofanda na bango. Mokolo moko ngai mpe nakɔtaki na lisolo na bango. Nalukaki komonisa lokuta ya Batatoli ya Yehova. Kasi, na kimya nyonso basalelaki Biblia mpo na koyanola na motuna mokomoko oyo nazalaki na yango. Nasepelaki na ezaleli na bango ya boboto. Yango wana nandimaki báyekola na ngai Biblia.

Eumelaki te nayekolaki likambo moko na Biblia oyo ebongolaki bomoi na ngai. Banda bomwana nazalaki kobanga liwa. Kasi, nayaki koyeba mateya ya Yesu oyo etali lisekwa! (Yoane 5:28, 29) Nayekolaki mpe ete Nzambe akipaka ngai mpenza. (1 Petro 5:7) Maloba oyo ezali na Yirimia 29:11 esimbaki mpenza motema na ngai; elobi: “‘Mpo ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’” Nakómaki kondima ete nakoki kozala na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.​—Nzembo 37:29.

Batatoli ya Yehova bamonisaki ete balingaka ngai mpenza. Mbala ya liboso oyo nakendaki na makita ya losambo na bango, bayambaki ngai malamu mpe moto nyonso azalaki na boboto. (Yoane 13:34, 35) Bakesanaki mpenza na bato ya eglize oyo nazalaki liboso. Batatoli ya Yehova bayambaki ngai atako lolenge ya bomoi na ngai ezalaki malamu te. Batikelaki ngai ntango, batyelaki ngai likebi mpe bapesaki ngai lisalisi oyo ebongi. Namimonaki mpenza ete nakɔti na libota moko monene ya bandeko oyo balinganaka.

Boyekoli ya Biblia esalisaki ngai namona ete esengelaki nasala bambongwana mpo nayokanisa bomoi na ngai na mibeko ya Nzambe. Namonaki ete ezali pɛtɛɛ te kotika komɛla makaya. Kasi namonaki mpe ete miziki mosusu ezalaki kopesa ngai mposa ya komɛla bangi, yango wana natikaki koyoka miziki ya ndenge wana. Mpo nalangwa te, natikaki kokende bafɛti mpe banganda ya butu bisika oyo ezalaki kotinda ngai namɛla masanga mingi. Nalukaki baninga ya sika oyo bizaleli na bango ya malamu esalisaki ngai nazongela te bomoi na ngai ya kala.​—Masese 13:20.

Na ntango wana, Tony mpe akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Lokola basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ye, akómaki kondima ete makambo oyo azali koyekola ezali ya solo. Abongwanaki mpenza: akabwanaki na bato ya mabe oyo azalaki kotambola na bango, atikaki koyiba mpe komɛla bangi. Mpo tósepelisa mpenza Yehova, tomonaki ete tosengelaki kotika bomoi ya mbindo mpe kosala ete mwana na biso akola na esika moko ya malamu. Tobalanaki na mobu 1982.

“Mpɔngi ekimaka ngai lisusu te na butu mpo na komitungisa mpo na avenire to liwa”

Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki koluka masolo ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! * oyo elobelaki bato oyo basalaki bambongwana oyo ngai mpe nazalaki na mposa nasala. Bandakisa na bango elendisaki ngai! Namonaki mpenza ete nasengeli kosala makasi mpe nalɛmba te. Nabondelaki Yehova asalisa ngai. Ngai ná Tony tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova na 07/1982.

MATOMBA OYO NAZWI

 

Boninga oyo nasalaki na Yehova ebikisá bomoi na ngai. Ngai ná Tony tomonaki ndenge Yehova asalisaki biso na ntango ya mpasi. Toyekoli ndenge ya kotyela Yehova motema na ntango ya mpasi mpe tomonaka ete asalisaka mpe apesaka libota na biso mabɔkɔ ntango nyonso.​—Nzembo 55:22.

Nazali na esengo ndenge nasalisaki mwana na biso ya mobali mpe ya mwasi báyeba Yehova lokola ngai. Lelo oyo nazalaka mpe na esengo ya ndenge wana ntango namonaka bana na bango mpe bazali kokola na boyebi ya Nzambe.

Mpɔngi ekimaka ngai lisusu te na butu mpo na komitungisa mpo na avenire to liwa. Ngai ná Tony tomipesaka mpenza na kotala masangá ndenge na ndenge ya Batatoli ya Yehova pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisa bandeko. Tokendaka elongo na bango koteya bato mosusu ete soki bamonisi kondima epai ya Yesu, bango mpe bakoki kozwa bomoi ya seko.

^ par. 19 Ebimisami na Batatoli ya Yehova