Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso

Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso
  • ABOTAMAKI: 1958

  • EKÓLO: ITALIE

  • BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI NA ETULUKU YA BATO YA MOBULU

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá mpe nakolá na esika moko oyo bato mingi bazalaki babola, pembeni ya engumba Rome. Bomoi ezalaki mpasi. Nayebaki te mama oyo abotá ngai, mpe nazalaki koyokana malamu te ná tata na ngai. Nakolaki na balabala.

Ntango nakómaki na mbula 10, nabandaki koyiba. Ntango nakokisaki mbula 12, nakimaki ndako mpo na mbala ya liboso. Mbala mingi, tata azalaki kokende kozwa ngai na mabɔkɔ ya bapolisi mpo na kozongisa ngai na ndako. Nazalaki koswana na bato ntango nyonso, nazalaki mobulu mpe na nkanda epai ya moto nyonso. Ntango nakómaki na mbula 14, nakimaki ndako mpo na libela. Nakómaki komɛla drɔgɛ mpe kofanda na balabala. Lokola esika ya kolala ezalaki te, nazalaki kolala na mituka mpe kolamuka na ntɔngɔ mpenza. Na nsima, nazalaki koluka esika mai ezali mpo nasukola.

Nakómaki moyibi monene; nazalaki koyiba na basakosi ya bato tii na bandako, ezala na bandako ya mineneminene na butu. Nakendaki nsango mabe mpe eumelaki te, etuluku moko ya bato ya mobulu esɛngaki nakóma moto na bango, yango epesaki ngai “libaku” ya koyiba tii na babanki. Lokola nazalaki mobulu makasi, eumelaki te, bato ya etuluku na ngai bakómaki kotosa ngai. Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso; kutu, nazalaki kolala na yango na nse ya kusɛ. Mobulu, drɔgɛ, koyiba, maloba mabe, mpe pite ekómaki lolenge ya bomoi na ngai. Bapolisi bazalaki koluka ngai ntango nyonso. Bakangaki ngai mbala na mbala, mpe nazalaki kolekisa bambula na kati to na libanda ya bɔlɔkɔ.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Mokolo moko, ntango nabimaki bɔlɔkɔ, nazwaki ekateli ya kokende kotala leki ya mama na ngai. Kozanga ete nayeba, mama-leki ná bana na ye mibale bakómaki Batatoli ya Yehova. Babengisaki ngai na makita na bango. Lokola nazalaki kaka na mposa ya komona oyo elekaka na makita na bango, nandimaki kokende. Ntango nakómaki na Ndako ya Bokonzi, natingamaki kaka nafanda pene ya porte mpo namonaka bato oyo bazali kokɔta mpe kobima. Kasi, nazalaki na mondoki na ngai.

Makita yango ebongolaki bomoi na ngai. Nakanisaka ndenge namonaki lokola nazali na mokili mosusu! Bazalaki kopesa ngai mbote na esengo, na boboto, mpe na mwa kosɛka. Nabosanaka te boboto mpe bosembo ya solosolo oyo ezalaki komonana na bilongi na bango. Ekesanaki mpenza na lolenge ya bomoi oyo namesanaki na yango!

Batatoli bakómaki koyekola na ngai Biblia. Wana nazalaki koyekola, namonaki ete nasengelaki kobongola mpenza bomoi na ngai. Nalandaki toli oyo ezali na Masese 13:20: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” Namonaki ete esengeli natika baninga na ngai ya mobulu. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi na lisalisi ya Yehova, nalongaki.

Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nakómaki na komipekisa na makambo oyo nazalaki kosala

Nabongisaki mpe nzoto na ngai. Nasalaki mpenza milende mpo natika komɛla makaya mpe kosalela drɔgɛ. Nakataki nsuki na ngai ya milai, nalongolaki biloko ya matoi, mpe natikaki maloba mabe. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nakómaki na komipekisa na makambo oyo nazalaki kosala.

Nazalaki kolinga kotánga to koyekola ata moke te, yango wana ezalaki mpenza mokakatano natya likebi ntango nazalaki koyekola Biblia. Kasi, lokola nasalaki milende, mokemoke nakómaki kolinga Yehova mpe likambo moko ekómaki kobongwana na kati na ngai; lisosoli na ngai ekómaki kotungisa ngai. Mbala mingi makanisi ya mabe ezalaki koyela ngai, nazalaki kondima te ete Yehova akolimbisa ngai mpo na makambo nyonso ya mabe oyo nasalaki. Ntango makanisi wana ezalaki koyela ngai, kotánga masolo oyo emonisi ndenge Yehova alimbisaki Mokonzi Davidi nsima ya kosala masumu minene, ezalaki kopesa ngai makasi.​—2 Samwele 11:1–12:13.

Ezalaki mpe mpasi mpo nabima mosala ya kosakola ndako na ndako mpo na koyebisa basusu mateya oyo nandimaka. (Matai 28:19, 20) Nazalaki kobanga nakutana na moto moko oyo kala, nasalaki ye mabe na lolenge moko to mosusu! Kasi, mokemoke, natikaki kobanga. Nakómaki kosepela mpenza kosalisa basusu báyekola makambo kitoko oyo etali Tata na biso ya likoló, oyo alimbisaka na motema moko.

MATOMBA OYO NAZWI:

Koyekola makambo ya Yehova ebikisaki bomoi na ngai! Baninga na ngai mingi ya kala bakufá, bamosusu bazali na bolɔkɔ, kasi nazali mpenza na bomoi ya esengo mpe nazali kozela avenire moko ya malamu. Nayekoli kozala na komikitisa, kotosa mpe kopekisa ezaleli na ngai ya nkanda makasi. Yango esali ete nakóma na boyokani malamu mpenza na bato oyo tofandi na bango. Nabalá Carmen, mwasi moko kitoko mpe tozali na esengo na libala na biso. Biso mibale tozwaka esengo mingi na kosalisa basusu báyekola Biblia.

Ɛɛ, sikoyo nasalaka mosala na bosembo; mbala mosusu esɛngaka nakende na babanki, kasi na esika nayiba, nasukolaka nde yango!