Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kosakwela basusu solo ya Biblia

Talá makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango ntango basakolaka Liloba ya Nzambe mpe nsango na yango epai ya bato ebele.

Lisalisi mpo na minganga oyo bazali kobunda na mitungisi

Lisalisi nini minganga bazali kozwa na eleko oyo ya maladi mabe ya coronavirus?

Bakobaki kosakola na eleko ya maladi mabe

Bandeko basi mpe mibali bazali kobatela esengo na bango mpe makanisi malamu wana bazali kobongola mayele na bango ya kosakola nsango ya Biblia mpo na kobɔndisa basusu.

Mpela ememeli bato nsango malamu

Nsima ya mbula makasi, bamboka ya zamba na Nicaragua ezwi lisalisi na esika oyo ekanami te.

Nzambe ayoki mabondeli ya mwasi moko oyo akufá miso

Mingjie abondelaki mpo na komona bakristo ya solo. Nini etindaki ye andima ete Nzambe ayoki mabondeli na ye?

Boyekoli moko ya Biblia kasi ebendi ebele ya bato

Batatoli ya Yehova na Guatemala bazalaki na likoki ya kosakwela bato mingi oyo balobaka monɔkɔ ya Kekchi makambo ya solo ya Biblia.

Mokonzi moko ya lingomba azwi biyano na mituna na ye

Nsima ya kobɛla mpe kokufa ya mwana na bango, mokonzi ya lingomba ná mwasi na ye balelaki mpenza makasi. Kasi eumelaki te babandaki kozwa biyano ya kokitisa motema na mituna oyo bazalaki na yango mpo na liwa.

Mobembo na ebale Maroni mpo na kosakwela bato nsango ya Biblia

Batatoli ya Yehova 13 babandi mobembo mpo na kosakola nsango ya Biblia epai ya bato oyo bafandaka mosika mpenza na zamba ya Amazone na Amerika ya Sudi.

Motuka ya bapolisi ememi Joseph

Ndenge nini bapolisi basalisaki Batatoli ya Yehova na esanga moko ya moke básakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?

Batɛlɛmaki mpo na kopesa lisalisi

Mpo na nini bilenge mitano babangaki malili mpe nɛjɛ te mpo na kosalisa moto moko ya kartye?

“Amonisi bosembo”

Luká koyeba ntina oyo Motatoli ya Yehova moko na Afrika ya sudi asalaki ntaka molai mpo na kozongisa sakosi mpe saki ya mbongo oyo babosanaki na restora.

“Nasalaka oyo nakoki kosala”

Atako azali na mbula soki 90, mikanda oyo Irma akomaka mpo na kosakwela basusu ngango malamu esimbaka mitema ya bato mingi oyo bazwaka mikanda yango.

Yebisá bango ete olingaka bango

Talá ndenge Biblia esalisaki libota moko ekóma na boyokani malamu koleka mpe esengo.

“Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”

Bavideo oyo ezali na site jw.org ezali kobenda likebi ya balakisi mpe bato mosusu.

Likambo moko oyo emonisaki boboto

Ndenge nini likambo moko ya boboto esalisaki moto oyo azalaki motɛmɛli asepela na mateya ya Biblia?

Kobungisa elikya te!

Osengeli kobungisa elikya te nsukansuka ezali na moto oyo akondima solol. Tangá lisolo ya moto moko oyo asalaki bongo mpe mpo na nini.

Hulda akokisaki mokano na ye

Hulda asalaki nini mpo akoka kozwa tablɛti oyo ekosalisa ye na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá?

Kampanye moko oyo ebongisamaki malamu eboti mbuma

Tangá ndenge elenge mwasi ya mbula zomi na Chile asalaki makasi mpo na kobengisa moto nyonso na kelesi na bango oyo alobaka monɔkɔ ya Mapudungum mpo na likita moko ya ntina mingi.

Tótalaka kaka libándá te!

Nini esalemaki ntango Motatoli moko amonisaki motema molai ntango azalaki kosolola na mobali moko oyo ayebaki ndenge ya kokima bato mpe azalaki kolala na balabala?