Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazali lisusu te moombo ya mobulu”

“Nazali lisusu te moombo ya mobulu”
  • Abotamá na: 1956

  • Ekólo: Canada

  • Bomoi na ye ya kala: Moto ya mobulu, amipesaki na pite mpe alɛmbaki nzoto

NDENGE NAZALAKI

 Nabotamaki na engumba ya Calgary na Alberta, na Canada. Ntango nazalaki mwana moke, papa ná mama babomaki libala na bango, mpe ngai ná mama tokendaki kofanda epai ya bankɔkɔ na ngai. Bankɔkɔ na ngai bazalaki kolinga ngai ná mama mingi, nazalaki mpenza na esengo. Nabosanaka te bolingo mpe kimya oyo nazalaki na yango na ntango wana.

 Ntango nakómaki na mbula 7, bomoi na ngai ebongwanaki ntango mama ná papa babalanaki lisusu mpe tokendaki kofanda na St. Louis, na Missouri, na États-Unis. Namonaki ete papa na ngai akómaki nkandankanda. Na ndakisa, ntango nautaki kelasi mokolo ya liboso na eteyelo na ngai ya sika mpe nazongaki ndako, papa amonaki ete babɛtaki ngai mpe nazongisaki te. Asilikaki mpe abɛtaki ngai makasi koleka kutu ndenge babɛtaki ngai na kelasi! Nazwaki liteya na likambo yango ya mabe mpe nabundaki mpo na mbala ya liboso ntango nazalaki na mbula 7.

 Nkanda makasi ya papa ebebisaki mpe mama na ngai, bakómaki koswana ntango nyonso mpe bazalaki koyokana te. Nakómaki kosalela drɔgɛ mpe komela masanga ya makasi ntango nazalaki na mbula 11. Mokemoke nakómaki moto ya mobulu mpenza mpe nakómaki kobunda mbala mingi na balabala. Nsima ya kozwa diplome, nakómaki lisusu mobulu makasi.

 Ntango nakómaki na mbula 18, nakotaki na molɔngɔ ya basoda ya Corps des marines des États-Unis. Kuna nayekolaki lisusu ndenge ya koboma moto. Nsima ya mbula mitano, natikaki mosala ya soda mpe nakendaki kosala kelasi ya pisikoloji mpo nakóma kosala na Bureau fédéral d’enquêtes (FBI). Nakotaki Iniversite na États-Unis mpe ntango nazongaki na Canada nakobaki na Iniversite mosusu.

 Ndenge oyo bato bazalaki kosala makambo na Iniversite elɛmbisaki ngai nzoto makasi. Bato bazalaki koluka kaka matomba na bango moko, makambo nyonso ezalaki ntina te, mpe ezalaki komonana lokola mitungisi ya bato ezalaki na solisyo te. Nazalaki lisusu te kondima ete bato bakoki kobongisa mabele.

 Lokola nazalaki komona mpenza te ntina ya bomoi, namipesaki na komela masanga ya makasi, kosalela drɔgɛ, kosala pite mpe koluka mbongo. Nabandaki kozangisa ata fɛti moko te mpe nazalaki kolekisa te libaku ya kosangisa nzoto. Lokola nazwaki formasyo na mosala ya soda, nazalaki komipekisa te kobunda. Nazalaki na ndenge na ngai ya kokata soki likambo ezali sembo to te, mpe nazalaki kotɛmɛla moto nyonso oyo asali likambo oyo ngai namoni ete ezali mabe. Kasi, mpo na koloba solo, nakómaki nde moombo ya mobulu.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Mokolo moko ngai ná moninga na ngai tofandaki na eteni ya nse ya ndako mpe tozalaki na kwiti makasi, tozalaki kobongisa ndenge ya kotinda na kobombama drɔgɛ oyo babengi marijuana mpo na koteka yango, mpe moninga na ngai atunaki ngai soki nandimelaka Nzambe. Nayebisaki boye: “Soki Nzambe nde moto abimisaka bampasi oyo ezali na mokili, nazali na ntina ya koyeba ye te!” Mokolo elandaki, ezalaki mokolo nabandaki mosala na ngai ya sika, moninga moko ya mosala oyo azalaki Motatoli ya Yehova atunaki ngai boye: “Okanisi ete bampasi oyo ezali na mokili oyo eutaka epai ya Nzambe?” Nakamwaki mpo ezalaki likambo oyo tolobelaki mokolo eleki, mpe nakómaki na mposa ya koyeba likambo yango. Na basanza 6 oyo elandaki, tosololaki mingi mpe alakisaki ngai na Biblia biyano na mituna mingi oyo nazalaki komituna mpo na bomoi.

 Fianse na ngai, oyo nazalaki kofanda na ye makango, azalaki kosepela te nayebisa ye makambo oyo nazalaki koyekola. Mokolo moko ya lomingo nayebisaki ete nabengisaki Batatoli ya Yehova mpo báyekola na biso Biblia. Mokolo oyo elandaki, ntango nautaki mosala nakutaki akɔngɔlaki biloko nyonso ya ndako mpe akimaki. Nabimaki libándá mpe nalelaki. Lisusu nabondelaki Nzambe, mpe nasengaki ye asalisa ngai. Yango ezalaki mbala ya liboso oyo nasalelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, na libondeli.​—Nzembo 83:18.

 Mikolo mibale na nsima nabandaki koyekola Biblia na babalani moko oyo bazalaki Batatoli ya Yehova. Ntango bakendaki natikalaki kotánga buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, mpe nasilisaki kotánga yango na butu wana kaka. a Makambo oyo nayekolaki mpo na Yehova Nzambe mpe mwana na ye Yesu Kristo, esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki ete Yehova azali na motema mawa mpe ayokaka mpasi ntango tonyokwamaka. (Yisaya 63:9) Ndenge Yehova alingaki ngai mpe apesaki Mwana na ye mpo na ngai esimbaki motema na ngai makasi. (1 Yoane 4:10) Nayaki komona ete Yehova amoniselaki ngai motema molai “mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Namiyokaki mpenza ete Yehova alingi nazala moninga na ye.​—Yoane 6:44.

 Nabandaki koyangana na makita kaka na pɔsɔ wana. Nazalaki na nsuki ya milai, biloko ya matoi, mpe ndenge nazalaki komonana ezalaki kobangisa bato, kasi Batatoli ya Yehova bayambaki ngai lokola ndeko moko ya libota oyo bamoná kala. Bamonisaki mpenza ete bazali bakristo ya solo. Namiyokaki lokola nazongaki epai ya bankɔkɔ na ngai, kasi sikoyo na esika moko kitoko koleka.

 Eumelaki te makambo oyo nayekolaki ekómaki kobongola bomoi na ngai. Nakataki nsuki na ngai, natikaki misala nyonso ya pite, natikaki kosalela drɔgɛ mpe komɛla masanga ya makasimakasi. (1 Bakorinti 6:9, 10; 11:14) Nalingaki kosepelisa Yehova, mpo na yango ntango nayekolaki ete asepelaka te na likambo moko oyo nazalaki kosala, nazalaki kotika ezaleli yango mbala moko. Na esika namitungisa na makanisi. Nazalaki komilobela boye: ‘Nakosala lisusu likambo oyo te’. Mpe kozanga kokakatana nazalaki kosala makasi nabongola lolenge na ngai ya kokanisa mpe ya kosala makambo. Mokemoke nakómaki komona matomba ya kosalela mitinda ya Yehova. Na mokolo ya 29/07/1989​—sanza 6 nsima ya boyekoli na ngai ya liboso ya Biblia, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI

 Biblia esalisi ngai nabongola bomoto na ngai. Kala, nazalaki kosala mobulu soki nayokani te na moto moko. Kasi sikoyo nazali kosala makasi nazala na “kimya na bato nyonso.” (Baroma 12:18) Nyonso wana ezali na makasi na ngai moko te, kasi nde na nguya oyo Liloba ya Yehova mpe elimo santu na ye ezali na yango ya kobongola bato.​—Bagalatia 5:22, 23; Baebre 4:12.

 Na esika nazala moombo ya drɔgɛ, ya mobulu, mpe ya bamposa ya mbindo, nazali sikoyo kobunda mpo na kosepelisa Yehova Nzambe mpe kopesa ye oyo eleki malamu. Mpe lisusu kosalisa bato báyeba ye. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, nakendaki kopesa mabɔkɔ na mboka mosusu esika oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi. Nsima ya bambula mingi, nayokaki esengo ya koteya ebele ya bato mpe komona ndenge Biblia ezali kosalisa bango kaka ndenge esalisaki ngai. Nasepelaki mpe lisusu ntango mama na ngai akómaki Motatoli ya Yehova, ekoki kozala mpo amonaki ndenge nasalaki mbongwana na bomoi na ngai.

 Na 1999, nazwaki diplome na eteyelo oyo bazali kobenga lelo Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi (EER). Eteyelo yango esalisaki ngai nakolisa makoki na ngai ya kosakwela bato nsango malamu, koteya mpe kozala mobateli malamu ya bampate na lisangá. Nsima ya mbula yango, nabalaki mwasi na ngai, Eugenia. Biso mibale tozali kosala lokola babongisi nzela ya ntango nyonso na Guatemala.

 Sikoyo, na esika ete nalɛmba nzoto mpo na mitungisi ya bomoi, nazali nde na esengo makasi. Kosalela mitinda ya Biblia elongoli ngai na boombo ya pite, ya mobulu mpe epesi ngai bomoi ya esengo mpe kimya.

a Batatoli ya Yehova bayekolaka mbala mingi na bato na buku Sepelá na bomoi libela na libela!