Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Basalelaki Biblia mpo na koyanola na motuna nyonso!

Basalelaki Biblia mpo na koyanola na motuna nyonso!
  • ABOTAMAKI NA: 1950

  • EKÓLO: ESPAGNE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MAMELO YA LINGOMBA YA KATOLIKE

NDENGE NAZALAKI:

Ntango nabotamaki, baboti na ngai bazalaki na mwa ferme na Galicia, mwa mboka moko na nɔrdi-wɛsti ya Espagne. Nazali mwana ya minei na libota ya bana mwambe. Bomoi ya libota na biso ezalaki ya esengo. Na ntango wana na Espagne, bato bazalaki na momeseno ya kotinda ata mwana moko na seminɛrɛ to na kuva. Na libota na biso, ngai ná bandeko na ngai mibale tolandaki nzela yango.

Ntango nakómaki na mbula 13, nalandaki yaya na ngai ya mwasi na kuva ya engumba Madrid. Bato ya kuva yango bazalaki boboto te. Boninga ezalaki te, kaka mibeko, mabondeli mpe masɛki ezalaki te. Na ntɔngɔntɔngɔ tozalaki koyangana na ndako-nzambe mpo na komanyola atako mbala mingi likanisi ata moko te ezalaki koyela ngai. Na nsima tozalaki koyemba loyembo ya Nzambe mpe kosala misa na monɔkɔ ya Latin. Nazalaki mpenza kokanga ntina ata ya likambo moko te mpe komona lokola Nzambe azalaki mpenza mosika na ngai. Mikolo na ngai ezalaki koleka kozanga ete nasolola na moto. Ata ntango tozalaki kokutana na yaya na ngai tozalaki kaka koloba, “Losako santu Maria.” Bamamɛlo bazalaki kotikela biso kaka miniti 30 ya kosolola nsima ya kolya. Ekesanaki mpenza na bomoi ya esengo oyo nazalaki na yango epai na biso! Nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko mpe mbala mingi nazalaki kolela.

Atako nazalaki komona ete Nzambe azali mosika na ngai, nasalaki elako na ngai mpe nakómaki mamelo ntango nazalaki na mbula 17. Nasalaki kaka oyo basɛngaki ngai nasala, kasi eumelaki te nakómaki komituna soki Nzambe aponaki ngai mpenza na mosala yango. Mbala mingi bamamelo bazalaki koloba ete baoyo bazali na ntembe ya ndenge wana bakosuka na lifelo! Ata bongo, nazalaki kaka na bantembe. Nayebaki ete Yesu Kristo azalaki kokima bato te, kutu amipesaki na koteya mpe kosalisa basusu. (Matai 4:23-25) Ntango nakómaki na mbula 20, namonaki te ntina ya kotikala mamelo. Likambo ya kokamwa, mamelo oyo azalaki mokonzi na biso ayebisaki ngai ete soki namoni ete ebongi te natikala mamelo esengelaki natika mosala yango nokinoki. Namonaki ete azalaki kobanga ete nakotinda bamosusu mpe bálanda makanisi na ngai. Yango wana nabimaki na kuva.

Ntango nazongaki ndako, baboti na ngai bamonaki yango mabe te. Kasi lokola mosala ezalaki te na mboka na biso, nakendaki na Allemagne epai yaya na ngai ya mobali azalaki kofanda. Azalaki na etuluku moko ya bakoministe ya bato ya Espagne oyo bakendaki kofanda na ekólo yango. Nazalaki koyoka malamu kozala na bato wana mpo bazalaki kobundela lotomo ya basali mpe koluka ete mwasi azala ndenge moko na mobali. Yango wana nakómaki koministe mpe nsukansuka nabalaki moko na bango. Nakanisaki ete nazalaki kosala likambo moko ya malamu, kopesa bato mikanda ya bakoministe mpe kobima na balabala mpo na kotomboka.

Kasi na nsima, nalɛmbaki lisusu nzoto. Mbala mingi nazalaki komona ete bakoministe bazalaki te kosalela makambo oyo bazalaki koloba. Bantembe na ngai wana ekómaki makasi na 1971 ntango bilenge mosusu ya etuluku na biso batumbaki ambasade ya Espagne na Francfort. Basalaki bongo mpo na kotɛmɛla makambo ya kozanga bosembo oyo ezalaki kosalema na Espagne. Kasi namonaki ete ezali ndenge ya malamu te ya komonisa ete osepeli te na likambo moko boye.

Ntango nabotaki mwana na ngai ya liboso, nayebisaki mobali na ngai ete nakokende lisusu te na makita ya bakoministe. Nasundolamaki mpenza mpo ata moninga na ngai moko te ya kala ayaki kotala ngai ná bebe na ngai. Nazalaki komituna soki ntina ya bomoi ezali nini. Ezalaki mpenza na ntina kosala milende mpo na kobongisa bomoi ya bato?

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Na 1976, Batatoli ya Yehova mibale ya Espagne bayaki epai na biso mpe bapesaki ngai mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Ntango bayaki lisusu kotala ngai, natunaki bango ebele ya mituna na likambo etali bampasi, ndenge bato nyonso bazali ndenge moko te mpe kozanga bosembo. Nakamwaki ndenge basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso! Nandimaki mbala moko koyekola Biblia.

Na ebandeli nazalaki kosepela koyekola kaka mpo nayeba makambo. Kasi makambo ebongwanaki ntango ngai ná mobali na ngai tokómaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Na ntango wana tozalaki na bana mibale. Batatoli bazalaki koya kozwa biso mpe bazalaki kosalisa biso na kobatela bana ntango makita ezalaki kosalema. Nakómaki kosepela mpenza na Batatoli ya Yehova.

Ata bongo, nazalaki kaka na mwa bantembe na makambo ya Nzambe. Nazwaki ekateli ya kokende kotala libota na ngai na Espagne. Papa-leki na ngai oyo azalaki sango, amekaki kolɛmbisa ngai mpo natika koyekola Biblia. Kasi Batatoli ya mboka yango basalisaki ngai mingi mpenza. Bayanolaki na mituna na ngai na Biblia kaka ndenge Batatoli ya Yehova ya Allemagne basalaki. Nazwaki ekateli ya kozongela boyekoli na ngai ya Biblia ntango nazongaki na Allemagne. Atako mobali na ngai azwaki ekateli ya kotika koyekola Biblia, kasi nakobaki na boyekoli na ngai. Na 1978, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Boyebi ya sikisiki ya Biblia esali ete bomoi na ngai ezala mpenza na ntina mpe nayeba komitambwisa malamu. Na ndakisa, 1 Petro 3:1-4 elendisi basi ‘bámikitisaka’ liboso ya mibali na bango ‘na limemya makasi’ mpe bázala na ‘elimo ya boboto oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.’ Batoli yango esalisi ngai nakokisa mokumba na ngai ya mwasi mpe ya mama.

Eleki sikoyo mbula 35 banda nakómá Motatoli. Nazali na esengo ya kosalela Nzambe na kati ya libota ya bandeko ya mokili mobimba mpe na esengo ndenge bana na ngai minei mpe bazali kosala bongo.